Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOB
Prev Up Next
Chapter 8
Job LinVB 8:2  Mikolo boni okoloba naino bongo ? Maloba ma yo mazangi ntina mpenza !
Job LinVB 8:3  Bongo Nzambe akoki nde kozanga bosembo ? Mokonzi wa bokasi akoki nde kobongola mibeko ?
Job LinVB 8:4  Bana ba yo basalaki masumu o miso ma ye, bazwi etumbu mpo ya mabe ma bango.
Job LinVB 8:5  Soko okoluka Nzambe na motema moko, soko ozali kobondela Mokonzi wa bokasi,
Job LinVB 8:6  soko ozali moto malamu mpe wa bosembo, ye akokengele yo malamu mpenza, mpe akopesa yo binso bikoki na yo.
Job LinVB 8:7  Biye ozwaki liboso bizali bike, biye okozwa nsima bikoleka na boike.
Job LinVB 8:8  Tuna ata bankoko ba kala, luka kozwa mayele epai ya bango.
Job LinVB 8:9  Biso bato tobotami se lobi, toyebi eloko te, bomoi bwa biso awa o nse bozali koleka lokola elilingi.
Job LinVB 8:10  Kasi na maloba ma bango bakoteya yo, mpo ya maye makweli bango, bakoloba boye :
Job LinVB 8:11  « Nsoló ekokolaka o esika potopoto ezali te ? Nkekele ekokolaka o esika mai mazali te ?
Job LinVB 8:12  Soki te, ata ekomeli te mpe bakati yango te, ekokauka liboso lya matiti manso.
Job LinVB 8:13  Baye babosani Nzambe bakosuka se bongo, moto akopesa Nzambe mokongo, akozanga elikya.
Job LinVB 8:14  Akotika kobete bontolo, mpo azali se makasi lokola nsinga ya limpulututu.
Job LinVB 8:15  Ata atii motema na ndako ya ye, ekokweya, ata alingi kobombama wana, ndako ekobukana.
Job LinVB 8:16  Azali lokola nzete ebesu o moi makasi, eye etandi bitapi o lopango mobimba.
Job LinVB 8:17  Minsisa mikei o mabelé makasi, mikoti mpe o kati ya mabanga ;
Job LinVB 8:18  kasi soko bapikoli yango, moto moko akoyeba lisusu te esika ezalaki.
Job LinVB 8:19  Nzete ezali kopolo o nzela, nzete isusu ikobima o esika ya yango.
Job LinVB 8:20  Yeba ’te Nzambe akoboyaka moto wa bosembo te, akosalisa mpe bato babe o makambo ma bango te.
Job LinVB 8:21  Akosala ’te okoka koseke lisusu mpe koyemba na nsai.
Job LinVB 8:22  Banguna ba yo bakoyoka nsoni, mpe biema bya bato babe bikolimwa. »