Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LEVITICUS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 15
Levi LinVB 15:2  Boloba na bana ba-Israel : Soko mobali abeli bokono bwa botangi mai akomi na mbindo.
Levi LinVB 15:3  Ata nzoto ya ye ebimi mai to ekangi mai, mbindo azwi mpo ya botangi mai, ezali boye :
Levi LinVB 15:4  Mbeto esika mobali mokoni oyo alali, ezali na mbindo ; kiti mpe ebo-nga esika afandi ezali na mbindo.
Levi LinVB 15:5  Moto asimbi mbeto ya ye, ase-ngeli kosukola bilamba, asukola mpe nzoto ; akozala na mbindo tee mpo­kwa.
Levi LinVB 15:6  Oyo afandi o kiti ya mobali abeli, asukola bilamba, asukola mpe nzoto, akozala na mbindo tee mpo­kwa.
Levi LinVB 15:7  Oyo asimbi mobali abeli bokono bongo, asukola bilamba, asukola mpe nzoto ; akozala na mbindo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:8  Soko mobali oyo abwakeli moto peto nsoi, moto oyo asukola bila­mba, asukola mpe nzoto ; akozala na mbindo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:9  Efandeli ya mpunda ye afandelaki ekozala na mbindo.
Levi LinVB 15:10  Moto asimbi eloko ata nini mobali oyo afandelaki, akozala na mbindo tee mpokwa. Moto amemi eloko ena, asukola bilamba, asukola mpe nzoto ; akozala na mbindo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:11  Soko mobali oyo asimbi bato, kasi asukoli maboko liboso te, ba-ngo basukola bilamba, basukola mpe nzoto ; bakozala na mbindo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:12  Soko mobali oyo asimbi mbeki ya mabelé, babola mbeki yango, soko ezali mbeki ya nzete, basukola yango malamu.
Levi LinVB 15:13  Soko mobali oyo abiki o bokono boye, azila naino mikolo nsambo, na nsima akoki komipetola. Asukola bilamba, asukola mpe nzoto na mai ma liziba, bongo akokoma peto.
Levi LinVB 15:14  O mokolo mwa mwambe akamata bikokoba bibale to bibenga bibale, ameme byango o boso bwa Yawe o monoko mwa Ema ya Likita, mpe apesa nganga Nzambe byango.
Levi LinVB 15:15  Nga­nga Nzambe akobonza yoko bo moboma mwa masumu, esusu bo libonza lya kotumba. Nganga Nzambe asala bongo o boso bwa Yawe milulu mya bolongoli mbi-ndo ya moto azali na bokono bwa botangi mai ma nzoto.
Levi LinVB 15:16  Soko mai ma mobali mabimeli ye, asukola nzoto mobimba na mai, akozala naino na mbindo tee mpo­kwa.
Levi LinVB 15:17  Bilamba to mposo ya nyama bizwaki mai mana, basukola bya­ngo, bikozala naino na mbindo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:18  Soko mwasi ayebani na mobali, bango babale basengeli kosukola nzoto ; bakozala na mbindo tee mpo­kwa.
Levi LinVB 15:19  Soko mwasi amoni sanza to abimi makila, atikali mikolo nsa-mbo na mbindo ya makila. Moto ata nani asimbi ye, akozala na mbi­ndo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:20  Mbeto esika mwasi wa motindo mona alalaki ezali na mbindo, na mpe kiti to ebonga afandelaki.
Levi LinVB 15:21  Moto asimbi mbeto ya ye, asukola bilamba, asukola mpe nzoto, akozala na mbindo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:22  Oyo asimbi kiti to ebonga to efandeli ata nini eye afandelaki, asukola bilamba, asukola mpe nzoto ; akozala na mbindo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:23  Soko eloko yoko elali o mbeto to o efandeli esika afandaki, eloko ena ekozala na mbindo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:24  Soko mobali moko ayebani na ye, mbindo ya makila ma ye eko­zwa ye mpe. Akozala na mbindo mikolo nsambo mobimba. Mbeto esika akei kolala ekozala na mbindo.
Levi LinVB 15:25  Soko mwasi atangi makila mwa mikolo mingi nsima ya bomoni sanza, to mikolo mya sanza ya ye miumeli, akozala na mbindo o eleko mobimba azali kotanga makila, se lokola azali na mbindo o mikolo mya sanza ya ye.
Levi LinVB 15:26  Bobele bongo na mbeto esika alali o eleko abeli bokono bwa botangi makila na mpe mbeto esika alali o ntango azali na sanza. Efandeli ata nini esika afandi, ezali na mbindo, se lokola o ntango amoni sanza.
Levi LinVB 15:27  Moto asimbi yango, akomi mbindo ; asukola bilamba, asukola mpe nzoto ; akozala na mbindo tee mpokwa.
Levi LinVB 15:28  Soko mwasi oyo abiki o botangi makila, azila naino mikolo nsambo, na nsima akokoma peto.
Levi LinVB 15:29  O mokolo mwa mwambe, akamata bikokoba bibale to bibenga bibale mpe apesa nganga Nzambe byango o monoko mwa Ema ya Likita.
Levi LinVB 15:30  Nga­nga Nzambe abonza yoko bo moboma mwa masumu, esusu bo libo­nza lya kotumba. Nganga Nza­mbe asala bongo o miso ma Yawe milulu mya bolimbisi mabe mauti na botangi makila makomisi ye mbi­ndo.
Levi LinVB 15:31  Boyebisa bana ba-Israel maka­mbo makoki kokomisa bango mbi­ndo : mpo bakufa te o mokolo bakokoto o Ndako esantu, eye ezali o kati ya bango.
Levi LinVB 15:32  Tala mibeko mitali babali babeli bokono bwa botangi mai to bakomi na mbindo zambi mai ma mobali mabimeli bango,
Levi LinVB 15:33  mpe mibeko mitali mpe basi bamoni sanza, mobali to mwasi abeli bokono bwa botangi mai, na mpe mobali alali na mwasi azali na mbindo.