Chapter 1
Nahu | LinVB | 1:2 | Yawe azali Nzambe wa zuwa linene, ye mobekoli monene ! Yawe akobekolaka banguna ba ye, nkanda ya ye ezali enene, akobombelaka banguna ba ye nkanda. | |
Nahu | LinVB | 1:3 | Solo, Yawe akosilikaka noki te, kasi azali makasi mpo ya nguya ya ye. Akotikaka mabe moko mpamba te. Akoyaka na mompepe mwa ekumbaki mpe na mbula makasi, mampata mazali mputulu ye akobutisaka na makolo ma ye. | |
Nahu | LinVB | 1:4 | Akokanela mai ma mbu, mpe mai makokauka, akokaukisa mai o miluka minso. Mikili mya Basan mpe mya Karmel mikobeba, matiti mabesu ma Libano makokufa. | |
Nahu | LinVB | 1:5 | Ngomba inene ikolenge mpo ya ye, ngomba ike ikoningana. Mokili mokobulungana o miso ma ye, mpe bato banso bazali o mokili bakobanga. | |
Nahu | LinVB | 1:6 | Nani akoki na nkanda enene ya ye ? Soko atoki na nkanda, nani akobanga te ? Nkele ya ye ekotumba lokola móto, mpe mabanga makopaswana o boso bwa ye. | |
Nahu | LinVB | 1:7 | Yawe azali nta bolamu, ebombamelo o mikolo mya malozi, akobatelaka baye bakoluka libiki epai ya ye | |
Nahu | LinVB | 1:8 | o eleko ya mpela enene. Akosilisa baye bakotombokela ye, akobengana banguna ba ye kin’o kati ya molili. | |
Nahu | LinVB | 1:9 | Bolingi kosala Yawe mabe nini ? Ye azali oyo akosukisaka banguna banso. Malozi manene masengeli kokwela bato mbala ibale te. | |
Nahu | LinVB | 1:10 | Bakoliama lokola maboke ma matiti ma nzube, lokola bato balangwi masanga, bakozika lokola matiti makauka. | |
Nahu | LinVB | 1:12 | (Yuda,) Yawe alobi boye : Ata banguna bazali mingi mpe makasi, banso bakosila mpe bakokufa. Nasambwisaki yo, kasi nakosambwisa yo lisusu te. | |
Chapter 2
Nahu | LinVB | 2:1 | Ntoma ayei mbangu o nzela ya ngomba koyebisa bato ’te mokili mokozwa boboto. E Yuda, sepela biyenga bya yo bya kala, kokisa bilako bya yo. Mobebisi monene akoleka o mokili mwa yo lisusu te, zambi asili asuki mpenza. | |
Nahu | LinVB | 2:2 | (Ninive), Mobebisi abelemi na yo, kende kokengele o ebombamelo, tala nzela inso malamu, sala makasi mpe pika mpende. | |
Nahu | LinVB | 2:3 | Solo, Yawe akobongisa lokumu la Yakob, akozongisa nkembo ya Israel. Bayibi babotoloki bango biloko binso, babebisaki nzete inso o bilanga. | |
Nahu | LinVB | 2:4 | Nguba ya bilombe ba ye ipakolami na ngola, basoda ba ye balati bilamba bitane. Bibende bya makalo bikongengeke lokola móto, ntango bamilengeli na etumba makongo maningani. | |
Nahu | LinVB | 2:5 | O balabala batambwisi makalo mbangu mpenza, maleki o bisobe lokola bisungi bya móto, lokola minkalali bakimi epai na epai. | |
Nahu | LinVB | 2:6 | Mokonzi abengi bakomanda ba ye, bakomi kotatabana ; bakimi penepene na efelo enene ya lopango, baluki esika ya kobombama. | |
Nahu | LinVB | 2:7 | Bafungoli bizibeli bya lopango bitalani na ebale, mpe ndako enene ya mokonzi eningani. | |
Nahu | LinVB | 2:8 | Bakei na ekeko ya nzambe mwasi wa bango, basi basaleli bazali kokimela lokola bibenga ; baleli, maboko o mitó ; | |
Nahu | LinVB | 2:9 | Ninive azali lokola sani enene ya mai, mai mana mazali kobima. Bagangi : « Boteleme ! Boteleme ! », kasi moto moko atali nsima te. | |
Nahu | LinVB | 2:10 | « Boyiba palata, boyiba wolo ! » Biloko bya motuya bilekeli bango mingi, biloko bya nkita ebele. | |
Nahu | LinVB | 2:11 | Bayibi, babotoli mpe babebisi biloko ! Mitema mya bango milembi, makasi masileli bango ; bakomi kolenge nzoto mobimba, bilongi bya bango banso biteli. | |
Nahu | LinVB | 2:12 | Mobenga mwa nkosi ezali wapi sikawa ? Wapi esika bana ba ye bazalaki kozwa bilei ? Ntango nkosi mobali ebimaki, nkosi mwasi etikalaki, moto moko te atungisaki bana ba nkosi. | |
Nahu | LinVB | 2:13 | Nkosi ezalaki kokatakata nyama mpo ya koleisa bana, mpe koboma mpo ya kopesa basi ba yango, atondisi mobenga na nyama iye ebomaki, mpe esika ya kolala na misuni. | |
Chapter 3
Nahu | LinVB | 3:1 | Mawa na yo, engumba ya babomi, etondi na lokuta mpe na biloko biyibami, otikaka koyiba mokolo moko te ! | |
Nahu | LinVB | 3:2 | Yoka bobeti bwa fimbo, yoka boleli bwa yika ya makalo, lokito la farasa ipoti mbangu mpe ya makalo mapimbwi. | |
Nahu | LinVB | 3:3 | Tala bitumba bya batambwisi farasa, bongengi bwa mimpanga lokola móto mpe makongo lokola móto mwa minkalali ; bato ebele bazoki, baike bakufi, bibembe bilali epai na epai, bato bakwei o bibembe ! | |
Nahu | LinVB | 3:4 | Mpo osali makambo ma bosoni lokola ndumba, mwasi kitoko solo, kasi na mayele ma bosenginyi. Na bondumba bwa yo okomisi bato baombo mpe obembi bango na makambo ma nkisi. | |
Nahu | LinVB | 3:5 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Ngai oyo nabelemi na yo ! Nakotombola nsonge ya elamba ya yo tee o elongi, nakolakisa bato ba bikolo binso bolumbu bwa yo. Nakoyokisa yo nsoni o miso ma bikolo bisusu. | |
Nahu | LinVB | 3:7 | Baye bakomono yo, bakokima mpe bakoganga : « Ninive ekomi mopotu ! » Nani akoyokela ye mawa ? Moto akobondo yo akozwama wapi ? | |
Nahu | LinVB | 3:8 | Yo oleki nde Tebe na bokasi eye etongami o kati ya ebale Nil ? Mai mazingi yango, mai ma mbu mabateli yango, lokola efelo ya ebombamelo. | |
Nahu | LinVB | 3:10 | Ata ye mpe akendeki o boombo, bipai binso bana bake ba ye banyatemaki, babeteki zeke mpo ya kokabola bankumu ba ye, bakangaki bato banene ba ye banso na minyololo. | |
Nahu | LinVB | 3:11 | Sikawa yo mpe okolangwa mpe okobombama ; yo mpe okosengela koluka esika ya kobombama o boso bwa banguna. | |
Nahu | LinVB | 3:12 | Bibombamelo bya yo bizali lokola figi, lokola nzete ya figi eboti mbuma noki ; soko baningisi nzete, mbuma ikwei o monoko mwa moto alingi kolia yango. | |
Nahu | LinVB | 3:13 | Tala ekolo ya yo, otikali bobele na basi ; nzela ya mokili mwa yo ikomi polele, bikangeli binso biziki na móto. | |
Nahu | LinVB | 3:14 | Toka mai mpo ya ntango ya bitumba, lendisa bibombamelo bya yo, tambola o potopoto, nyata mabelé libazi, kamata ebeteli ya biliki o maboko. | |
Nahu | LinVB | 3:15 | Bongo móto mokozikisa yo, mopanga mokoboma yo, ata bozali ebele lokola ndonge, ebele lokola mapalela. | |
Nahu | LinVB | 3:17 | Bakengeli ba yo bazali ebele lokola mapalela, bakomi ba yo lokola lingambo lya nzoi, o ntango ya mpio ikobombama o kati ya nzete, kasi ebimi moi, yango ikokende epai moto ayebi te. | |
Nahu | LinVB | 3:18 | E mokonzi wa Asur, mawa na yo, boniboni bakengeli ba yo balali mpongi ? Basoda ba yo ba mpiko bapemi, bato ba yo bapanzani o kati ya ngomba, moto moko akoki kosangisa bango lisusu te. | |