Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
NUMBERS
Prev Up Next
Chapter 18
Numb LinVB 18:1  Yawe alobi na Aron : « Yo na bana ba yo na libota lya yo mo­bimba, bokomeme ngambo mpo ya masumu masalemi ona esika esantu mpe o mosala mwa bino mwa bo­nga­nga.
Numb LinVB 18:2  Tika bandeko ba yo ba libota lya Levi, libota lya tata wa yo, babeleme elongo na yo o esika esantu. Bazala baninga ba yo ba mosala, basa­lela yo, yo na bana ba yo o boso bwa Ema ya Bondeko.
Numb LinVB 18:3  Basalela yo mpe ema mobimba mosala ; nzokande bakoma penepene na biloko bisantu mpe na altare te, mpo bakufa te.
Numb LinVB 18:4  Bazala basaleli ba yo ; basala mosala o Ema ya Likita, basala misala minso mitali Ema ya Likita ; moto mosusu asala mosala mona te.
Numb LinVB 18:5  Bobele bino bokosala mosala o Esika esantu mpe pene na altare mpo ’te Nkanda ya Yawe ekwela bana ba Israel te.
Numb LinVB 18:6  Ngai moto naponoki bandeko ba yo ba-Levi o kati ya bana ba Israel mpe napesi yo bango. Bazali bato bapesami na Yawe mpo ya kosala mosala o Ema ya Likita.
Numb LinVB 18:7  Yo na bana ba yo, bosala mosala o Ema ya Likita, misala minso mitali altare mpe miye mikosalema nsima ya elamba elai. Bosala mosala moye, ngai moto napesi bino mosala moye mwa bonganga. Kasi moto mosusu akomeka kosala mwa­ngo akokufa. »
Numb LinVB 18:8  Yawe alobi na Aron : « Omoni ngai moko napesi yo mosala mwa koya­mba mabonza bana ba Israel babo­nze­li ngai bo biloko bisantu, napesi yo byango bisala lokola lifuta lya yo mpe lya bana ba yo ; mobeko mona mozali mwa seko.
Numb LinVB 18:9  Tala biloko bisan­tu bikozala bya yo, mabonza matu­mbami te, mango maye : mabonza manso ma bana ba Israel, mazala mabonza ma bolei, miboma mya boli­mbisi masumu mpe miboma mya bondeko : bina binso bizali biloko bisantu, bizali bya yo mpe bya bana ba yo.
Numb LinVB 18:10  Bokoki kolia biloko bisantu bina. Babali banso bakoki kolia byango. Tala byango lokola biloko bisantu.
Numb LinVB 18:11  Okozwa mpe biloko biye : mabonza manso bana ba Israel babonzeli ngai mpe biloko binso bapesi ngai, napesi yo mango mazala ma yo mpe ma bana ba yo babali na basi ; ezali mobeko mwa seko. Bato banso ba­ndako ya yo bakoki kolia mango soko bazali peto.
Numb LinVB 18:12  Mafuta maleki malamu, vino eleki elengi mpe mbuma ya mampa, mbuma iye ya yambo babonzeli ngai Yawe, napesi yo yango.
Numb LinVB 18:13  Mbuma inso ya yambo izwami o mokili mwa bango, iye babonzeli ngai Yawe, ikozala ya yo. Bato banso ba ndako ya yo bakoki kolia mango soko bazali peto.
Numb LinVB 18:14  Biloko binso biza­li ekila o Israel bizali bya yo.
Numb LinVB 18:15  Bana ba yambo banso, baye bayei kobo­nzela ngai Yawe, bazali ba yo, bazala bana ba bato to bana ba nyama. Nzokande okotinda bato ’te basikola mwa­na wa bango wa yambo na mpe mwana wa yambo wa nyama mbi­ndo,
Numb LinVB 18:16  soko mwana akokisi sanza yoko. Okofutisa bango mitako mya palata mitano, lokola bakotangaka o ndako esantu : motako moko mokokani na mosolo moke.
Numb LinVB 18:17  Okofutisa bango te mpo ya mwana wa yambo ya ngombe, ya mpata mpe ya ntaba. Yango isali biloko bisantu. Nyakela makila o altare, tumba mafuta ma yango, mpo mazala libonza lya nsolo mpimbo likosepelisa Yawe.
Numb LinVB 18:18  Kasi misuni mya yango misali mya yo, ntolo balakisaki Yawe na mpe ebelo ya mobali.
Numb LinVB 18:19  Ya biloko bisantu binso bana ba Israel bakobonzela Yawe, nakopesa yo eteni, ezala ya yo mpe ya bana ba yo babali na basi. Ezali bo­ndeko mwa seko bondimami na mo­ngwa o miso ma Yawe ; akati bwango na yo mpe na bana banso ba libota lya yo. »
Numb LinVB 18:20  Yawe alobi na Aron : « O mokili mwa bango okozwa mabelé te ; o kati ya bango okozala na biloko te. Ngai moto nakopesa yo biloko bo lisango o kati ya bana ba Israel.
Numb LinVB 18:21  Nakopesa bana ba Levi biteni bya zomi bya biloko binso o Israel, mpo ya misala minso mya bango mpe miye bakosalaka o Ema ya Likita.
Numb LinVB 18:22  Bongo bana ba Israel bakoma lisusu penepene na Ema ya Likita te ; soki te bakosumuka mpe bakokufa.
Numb LinVB 18:23  Bobele ba-Levi basala mosala o Ema ya Li­kita ; soko babebisi, bango moko bakozwa likambo. Tala mobeko mwa se­ko motali mabota manso makoya nsima : o kati ya bana ba Israel ba-Levi bazala na mabelé te,
Numb LinVB 18:24  zambi eteni ya zomi eye bana ba Israel base­ngeli kopesa Yawe, ngai napesi yango na ba-Levi, ezala lifuta lya bango. Ya­ngo wa­na nalobi na bango ’te bazala na mabelé te o kati ya bana ba Israel. »
Numb LinVB 18:26  « Loba na ba-Levi : Soko bokamati eteni ya zomi o maboko ma bana ba Israel, eteni eye napesi bino o nkombo ya bango, bokamata naino eteni ya zomi ya bilo­ko bina mpo ya kobonzela ngai Yawe.
Numb LinVB 18:27  Ekozala eteni bino moko bosengeli kopesa se lokola bango bakopesaka : ndambo ya mbuma ya mampa ya ebo­ka mpe ndambo ya vino ya sika ya eka­melo.
Numb LinVB 18:28  Se bongo, bino mpe bolongola o kati ya biteni bya zomi bi­nso bya bana ba Israel eteni ya zomi ya Yawe. Bopesa eteni yango ya Yawe na nganga Nzambe Aron.
Numb LinVB 18:29  O kati ya biloko bileki bilamu, biye babonzeli bino, bolongola eteni ya Yawe bo libonza lisantu.
Numb LinVB 18:30  Loba lisusu na ba-Levi : Soko bolongoli biloko biye bileki bilamu, biloko bitikali bya mbuma ya mampa o etutelo mpe bya mbuma ya vino o ekamelo, bizali bilei bya bino.
Numb LinVB 18:31  Bokoki kolia byango o bisika binso, ná bino ná bandeko ba bino ; lizali lifuta lya mosala bokosalaka o Ema ya Likita.
Numb LinVB 18:32  Mpo ya yango bokosala lisumu lyoko te, soko liboso oponoki biye bileki bilamu ; soko bosali bongo, bosantoli biloko bisantu bya bana ba Israel te mpe bokokufa te. »