PROVERBS
Chapter 24
Prov | LinVB | 24:6 | Okanisa malamu liboso ’te obanda etumba, soko ozali na bato mingi ba malako malamu okolonga. | |
Prov | LinVB | 24:7 | Bwanya boleki mayele ma moto zoba mosika, o likita lya bakolo ba mboka akofungolaka monoko te. | |
Prov | LinVB | 24:11 | Bikisa bato bakateli bango etumbu ya liwa, batela baye balengi ntango balingi baboma bango. | |
Prov | LinVB | 24:12 | Mbele okoloba : « Ngai nayebaki te ! » Kasi Oyo akomekaka mitema mya bato akoyeba, Oyo akokengeke yo, ayebi manso, mpe akozongisela moto moko moko engebene na misala mya ye. | |
Prov | LinVB | 24:13 | Lia mafuta ma nzoi, mwana wa ngai, zambi mazali malamu. mwa mafuta ma nzoi mazali elengi o edada. | |
Prov | LinVB | 24:14 | Motema mwa yo mokosepela na bwanya se bongo. Soko ozwi bwango, mikolo mikoya mikobombela yo bolamu, okomono ’te otii elikya mpamba te. | |
Prov | LinVB | 24:16 | zambi ata moto semba akokweya mbala nsambo, akoteleme ; kasi bato babe bakokweya libela o mikolo mya mpasi. | |
Prov | LinVB | 24:18 | mpo ’te Yawe, ntango amoni yango, asilikela yo te mpe atika koyokela moto ona nkanda. | |
Prov | LinVB | 24:20 | mpo baye bakosalaka mabe bakoumela mikolo mingi te, mwinda mwa baye baboyi Nzambe mokozima noki. | |
Prov | LinVB | 24:22 | zambi mpasi ekoki kokwela bango na mbalakaka. Mpe nani ayebi ndenge nini bakosuka ? | |
Prov | LinVB | 24:23 | Yoka naino maloba masusu ma bato ba bwanya : Otala bilongi bya bato te, ntango okokata makambo ma bango. | |
Prov | LinVB | 24:24 | Oyo akoloba na moto asali mabe : « Osali mabe te », bato banso bakotombela ye bobe, bikolo binso bikoyina ye. | |
Prov | LinVB | 24:25 | Kasi baye bayebi kopesa etumbu, bakozwa bolamu, bato banso bakotombela bango esengo na bolamu. | |
Prov | LinVB | 24:27 | Bongisa liboso mosala mwa yo mwa libanda, liboso kata bilanga bya yo bo ebongi, bobele na nsima okoki kotonga ndako ya yo. | |
Prov | LinVB | 24:29 | Oloba te : « Nakosala ye lokola ye asali ngai, nakozongisela ye maye asali ngai ! » | |
Prov | LinVB | 24:30 | Naleki penepene na elanga ya moto goigoi, penepene na lopango la nzete ya vino ya moto zoba. | |
Prov | LinVB | 24:31 | Mpe tala, bisika binso se matiti mabe, mabelé matondi se na nzube, efelo ya mabanga ebukani. | |