ACTS
Chapter 16
Acts | LinVB | 16:1 | Akómí o Dérbe mpé o Lístra. Moyékoli mǒkó azalákí kúná nkómbó ’te Timotéo ; mamá wa yě mo-Yúda akómá mokrístu, tatá wa yě mo-Gréki. | |
Acts | LinVB | 16:3 | Pólo alingí kokende mobémbo elongó na yě. Bôngó akamátí yě mpé akátísí yě nzóto, mpô ba-Yúda bazalákí o ekólo êná, mpé bato bánso bayébí ’te tatá wa Timotéo azalákí mo-Gréki. | |
Acts | LinVB | 16:4 | O bingumbá bínso bazalákí koleka basangélí mibéko miye bapóstolo na bakóló bapésákí o Yéruzalem, mpé batíndí ’te bátósa myangó. | |
Acts | LinVB | 16:5 | Bato ba Biklézya baléndí o boyambi ; motángo mwa bayékoli mozalákí sé kokóla mokolo na mokolo. | |
Acts | LinVB | 16:6 | Bakátísí Frígia mpé mokili mwa Galáta, zambí Elímo Sántu apekísí bangó kosangela Liloba o Azía. | |
Acts | LinVB | 16:7 | Ekómí bangó penepene na Mízia, bamekí kokende o Bitínia, kasi Elímo wa Yézu alingísí bangó té. | |
Acts | LinVB | 16:9 | Kúná Pólo amóní limóní na butú : Moto mǒkó wa Masedónia atélémí o bosó bwa yě mpé abóndélí yě ’te : « Kátísá mbú kín’o Masedónia, yáká kosálisa bísó. » | |
Acts | LinVB | 16:10 | Emóní yě limóní liye, tolukí nokí nzelá ya kokóma o Masedónia, zambí toyébí malámu ’te Nzámbe moto abéngákí bísó tósangela bangó Nsango Elámu. | |
Acts | LinVB | 16:11 | Tokwélí o masúwa o Tróas, tokeí libosó o esanga Samotráse, mpé mokolo mwa nsima tokómí o Neápoli ; | |
Acts | LinVB | 16:12 | tolongwí kúná mpé tokeí o Filípi mbóka-mokonzi ya Masedónia, esíká ba-Róma bakofándaka. Tofándí mwâ mikolo o engumbá êná ; | |
Acts | LinVB | 16:13 | o mokolo mwa sábato tobimí o engumbá mpé tokeí o libóngo lya mongálá, mpô tokanísí ’te tokokúta bato bazalí kosámbela wâná ; tofándí mpé tosolólí na básí basangání wâná. | |
Acts | LinVB | 16:14 | Mǒ kó wa bangó, nkómbó ’te Lídia, azalákí koyóka bísó ; yě moto wa mombóngo mwa bilambá bya lángi longóndo o engumbá Tiatíra ; akokúmisaka Nzámbe. Mokonzi afungólí motéma mwa yě mpô ’te ándima maloba ma Pólo. | |
Acts | LinVB | 16:15 | Awa akúlí batísimo elongó na bato bánso ba ndáko ya yě, abóndélí bísó, alobi : « Sókó bomóní ’te nayambí Mokonzi Yézu sôló, yákáni kofánda o ndáko ya ngáí. » Abóndélí bísó míngi mpô tóndima. | |
Acts | LinVB | 16:16 | Mokolo mǒkó, áwa tozalákí kokende o losámbo, tokútání na elengé mwásí mǒkó óyo azalákí na elímo ekoyébisaka yě mambí makoyâ nsima ; na boyébisi mangó azalákí kozwela bankóló ba yě mbóngo míngi. | |
Acts | LinVB | 16:17 | Abandí kolanda bísó na Pólo, agángí : « Bato baye bazalí basáleli ba Nzámbe wa Ntá-Likoló, bakosangelaka bínó nzelá ya libíkí ! » | |
Acts | LinVB | 16:18 | Azalákí kosála bôngó mikolo míngi. Likambo lyangó litungísí Pólo, amíbóngólí epái ya yě mpé alobí na elímo êná : « O nkómbó ya Yézu Krístu natíndí yǒ óbima o nzóto ya yě. » Sé o ntángo êná elímo etíkí yě. | |
Acts | LinVB | 16:19 | Kasi, áwa bankóló ba yě bamóní ’te bakozwa lisúsu mosolo na mosálá mwa yě té, bakangí Pólo na Síla, babéndí bangó téé o esámbi ya engumbá o míso ma bakonzi. | |
Acts | LinVB | 16:20 | Balakísí bangó na bayángeli mpé balobí : « Bato baye bazalí kotía mobúlú o engumbá ya bísó. Bazalí ba-Yúda | |
Acts | LinVB | 16:22 | Bato bánso batombókélí bangó ; bayángeli batíndí ’te bálongola bangó bilambá mpé bábéte bangó fímbo. | |
Acts | LinVB | 16:23 | Awa babétí bangó míngi, babwákí bangó o bolóko mpé batíndí mokéngeli ákéngele bangó malámu. | |
Acts | LinVB | 16:24 | Lokóla batíndákí yě, akótísí bangó o ndáko ya katikáti ya bolóko mpé akangí bangó makolo na nkánga. Pólo na Síla babimí o bolóko | |
Acts | LinVB | 16:25 | Penepene na midí ya butú, Pólo na Síla bazalákí kosámbela mpé koyémbela Nzámbe, bato ba bolóko bazalákí koyóka bangó. | |
Acts | LinVB | 16:26 | Na mbala yǒkó mokili moningání makási mpenzá, mpé ndáko mobimba elingí ébúkana. Sé o ntángo êná bizibeli bínso bifungwámí mpé minyolólo mya bato bánso ba bolóko mifungwámí. | |
Acts | LinVB | 16:27 | Mokéngeli alamúkí mpé amóní ’te bizibeli bínso bya bolóko bifungwámí ; áwa akanísí ’te bato bánso ba bolóko bakímí, abimísí mompánga mpé alingí komíboma. | |
Acts | LinVB | 16:29 | Mokéngeli aséngí mwínda, akótí mbangú, amíbwákí o bosó bwa Pólo na Síla, aléngí na nsómo. | |
Acts | LinVB | 16:33 | Sé o ngonga êná ya butú mokéngeli akeí na bangó, asukólí mpótá ya bangó ; na nsima akúlí batísimo, yě na bato ba yě bánso. | |
Acts | LinVB | 16:34 | Akótísí bangó o ndáko ya yě mpé apésí bangó biléi ; ayókí esengo elongó na bato ba yě bánso, mpô bakómí koyamba Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 16:35 | Etání ntóngó, bayángeli batíndí bato báyébisa mokéngeli wa bolóko : « Tíká bangó bákende. » | |
Acts | LinVB | 16:36 | Mokéngeli ayéí koyébisa yangó na Pólo : « Bayángeli batíndí ’te nátíka bínó. Bôngó bóbima mpé bókende na bobóto. » | |
Acts | LinVB | 16:37 | Kasi Pólo alobí na bato baye bakonzi batíndákí : « Atâ basámbísí bísó té, babétísí bísó bána-mbóka ba Róma fímbo o míso ma bato mpé bakangísí bísó o bolóko ; mpé sikáwa balingí kobimisa bísó na bonkútú ! Ekokí kosálema bôngó sókí moké té ! Bangó mǒkó báyâ kobimisa bísó. » | |
Acts | LinVB | 16:38 | Bangó bakeí koyébisa bayángeli maloba mâná. Awa bayángeli bayókí ’te bazalákí bána-mbóka ba Róma, bakómí kobánga. | |
Acts | LinVB | 16:39 | Bayéí kosénge bangó bolímbisi, babimísí bangó o bolóko, mpé babóndélí bangó ’te bálongwa o engumbá. | |