Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 13
Exod LinVB 13:2  « Bonzela ngai bana ba yambo banso ba Israel, baye babimi liboso o libumu lya mama. Bazala bana ba bato to bana ba nyama, banso bazali ba ngai. »
Exod LinVB 13:3  Mose alobi na bato : « Bokundolaka o mitema mokolo moye bobimaki o Ezipeti, o ekolo ya boombo ; mpo Yawe abimisi bino na bokasi bwa loboko la ye. Bongo bolia mampa te, maye malambami na nkisi.
Exod LinVB 13:4  Lelo o mokolo moye mwa sanza ya Abib, bokobima.
Exod LinVB 13:5  Mokolo Yawe asili kokotisa bino o mokili mwa Kanana, mokili mwa ba-Iti, ba-Amor, ba-Ivi na ba-Yebus, mokili moye alayelaki bankoko ba bino ’te akopesa bino, mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi, mokolo mona bosepela eyenga ya Pasika se o sanza eyemei.
Exod LinVB 13:6  Mikolo nsambo mobimba bolia mampa mazangi nkisi, mpe mokolo mwa nsambo mosala eyenga ya kokumisa Yawe.
Exod LinVB 13:7  Mikolo miye nsambo bolia bobele mampa mazangi nkisi. O mokili mwa bino mobimba mampa malambami na nkisi to nkisi mpamba ezala o ndako ya bino te.
Exod LinVB 13:8  O mokolo mona okoloba na mwana wa yo ape : ‘Nakosala bongo mpo ya maye Yawe asalaki ngai o mokolo nabimaki o Ezipeti.’
Exod LinVB 13:9  Nzambe abimisaki yo na bokasi bwa ye o mokili mwa Ezipeti ; yango wana okolata elembo o loboko mpe o elo-ngi, mpo ’te mobeko mwa Yawe mosala seko o monoko mwa yo.
Exod LinVB 13:10  Otosa mobeko mona o elaka batindi yo, mobu na mobu.
Exod LinVB 13:11  Mokolo Yawe asili kokotisa yo o mokili mwa Kanana lokola alayelaki yo na bankoko ba yo, mpe asili kopesa yo mwango,
Exod LinVB 13:12  obonzela Yawe mwana wa yo oyo abimi liboso o libumu lya mama wa ye, bonza mpe nyama ya yambo. Bana babali banso bazali ba Yawe.
Exod LinVB 13:13  Mpo ya kosikola mwana wa yambo wa mpunda, ofuta mpata. Soko osikoli yango te, buka yango nkingo. Osengeli kosikola bana babali ba yo ba yambo banso.
Exod LinVB 13:14  Soko na nsima mwana wa yo wa mobali akotuna yo ntina ya likambo liye, okoloba na ye : “Nzambe abimisaki biso o Ezipeti, o mokili mwa boombo na bokasi bwa loboko la ye.
Exod LinVB 13:15  O ntango Farao alakisaki motó makasi mpe aapaki kotika biso tolongwa o mokili mwa ye, Yawe abomaki bana ba yambo banso ba Ezipeti, ná bana ba bato ná bana ba nyama. Yango wana nakobonzela Yawe bana babali ba yambo banso, kasi mwana wa yambo wa bato nakosikola ye.”
Exod LinVB 13:16  Yango wana okolata elembo o loboko mpe o elongi ; ekosalisa yo mpo ’te okundola yango o motema, mpo Yawe abimisaki biso o Ezipeti na bokasi bwa loboko la ye. »
Exod LinVB 13:17  Awa Farao atiki bato bakende, Nzambe akambi bango o nzela ya mokili mwa ba-Filisti te, ata nzela eye ezalaki nzela ekuse ; zambi Nzambe amilobeli : Soko bato bakokutana na banguna, mbele bakoyoka mawa zambi balongwi o Ezipeti, mbele bakosonga kuna.
Exod LinVB 13:18  Yango wana Nzambe atambwisi bango o nzela elai, atindi bango o nzela ya eliki epai ya Mbu ya Nsoló. Elongwi bana ba Israel o mokili mwa Ezipeti, bamemi bibuneli.
Exod LinVB 13:19  Mose akei na minkuwa mya Yosefu, zambi oyo alayisaki bana ba Israel ndai eye : « Mokolo Nzambe akoya kotala bino, bokende na minkuwa mya ngai. »
Exod LinVB 13:20  Balongwi o Sukot mpe bapiki nganda o Etam, o ndelo ya eliki.
Exod LinVB 13:21  Yawe atamboli na bango elongo ; na moi likonzi lya limpata lilakisi bango nzela mpe na butu likonzi lya móto mongengeli bango mpo ’te bakoka kotambola butu moi.
Exod LinVB 13:22  Likonzi lya limpata lilongwi na moi ata mbala yoko te, se bongo likonzi lya móto na butu.