EZEKIEL
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
Chapter 34
Ezek | LinVB | 34:2 | Mwana wa moto, sakola ona bakengeli ba Israel. Yebisa bango makambo makoya. Loba na bango boye : Bakengeli ba Israel, boyoka maloba ma Mokonzi Yawe : Mawa na bakengeli ba Israel bakomileisaka ! Bakengeli basengeli koleisa mpata ya bango, | |
Ezek | LinVB | 34:3 | kasi bino boliaki mafuta, bolataki bilamba bya nsuki ya mpata, bobomaki mpata ileki mafuta, kasi boleisaki mpata te. | |
Ezek | LinVB | 34:4 | Bosalisaki mpata itau te, iye izali na mpasi bobikisaki yango te, bokangaki mpota te ya eye ezoki ; bozongisaki mpata ebungi o lopango te ; bokendeki koluka yango te, kasi bokambaki mpata ya bino na makasi mpenza. | |
Ezek | LinVB | 34:6 | Etonga ya ngai ekomi koyengayenga bipai binso, o ngomba inene mpe ike inso ; mpata ipanzani bipai binso bya mokili ; moto moko te apangani na yango, to akei koluka yango. | |
Ezek | LinVB | 34:8 | Mokonzi Yawe alobi o nkombo ya ye : bayibi bakoti o lopango la mpata ya ngai, mpe nyama ya zamba ikomi kosilisa yango mpo mokengeli azali te, mpo bakengeli ba ngai bakokengeleke etonga ya ngai te, kasi bakomileisaka mpe bakoleisaka mpata ya ngai te. | |
Ezek | LinVB | 34:10 | Mokonzi Yawe alobi boye : Tala, nasilikeli bakengeli, nakobotolo mpata ya ngai o maboko ma bango, mpe nakopekisa bango koleisa mpata ya ngai lisusu. Bongo bakengeli bakomileisa lisusu te. Nakobikisa mpata ya ngai o monoko mwa bango, bakoka kolia yango lisusu te. | |
Ezek | LinVB | 34:11 | Mokonzi Yawe alobi boye : Ngai moko nakokengele etonga ya ngai mpe nakopangana na yango. | |
Ezek | LinVB | 34:12 | Lokola mokengeli akopanganaka na mpata ya ye, ntango akomi o kati ya mpata ipanzani, ngai mpe nakopangana na mpata ya ngai ; nakolongola yango o bisika binso ipanzani mpo ya molili to londende. | |
Ezek | LinVB | 34:13 | Nakolongola yango o bikolo esika ifandi, nakosangisa yango ut’o mikili mya bampaya mpe nakozongisa yango o mokili mwa yango. Nakoleisa mpata ya ngai o ngomba ya Israel, o mabwaku mpe o bisika binso bato bazali. | |
Ezek | LinVB | 34:14 | Nakoleisa yango o esobe elamu, mpe o ngomba ya Israel ikozala na lopango lotondi na matiti malamu. Ikopema kuna o esobe elamu mpe ikolia matiti malamu o ngomba ya Israel. | |
Ezek | LinVB | 34:15 | Mokonzi Yawe alobi : Ngai moko nakoleisa mpata ya ngai mpe nakopesa yango esika ya kopema. | |
Ezek | LinVB | 34:16 | Nakoluka mpata ebungi, mpe nakozongisa eye ezongi te ; eye ezoki mpota, nakokanga mpota ya yango ; eye ezali na mpasi nakobikisa yango ; eye ezali na nzoto mafuta mpe makasi, nakokengele yango malamu ; nakoleisa mpata ya ngai na bosembo. | |
Ezek | LinVB | 34:17 | Mokonzi Yawe alobi boye : Bino mpata ya ngai, nakosambisa mpata na ntaba basi, mpata na ntaba babali. | |
Ezek | LinVB | 34:18 | Bosepeli te kolia matiti malamu ? Bokonyataka na makolo matiti maye bolei te. Bosepeli komele mai peto te mpe na makolo bokobebisaka mai masusu maye bomeli te. | |
Ezek | LinVB | 34:19 | Bongo mpata ya ngai ilia nde matiti bino bonyati na makolo, mpe imele mai bino bobebisi ? | |
Ezek | LinVB | 34:20 | Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Ngai moko nakosambisa mpata ya mafuta mingi, na mpata ya mafuta te. | |
Ezek | LinVB | 34:21 | Botindisaki baninga na mopanzi mpe na mapeke, mpe botutaki na maseke baye bazali makasi te tee bopanzi bango o libanda. | |
Ezek | LinVB | 34:22 | Ngai nakoya kobikisa mpata ya ngai, bongo bayibela bango lisusu biloko te. Nakosambisa mpata yoko yoko. | |
Ezek | LinVB | 34:23 | Nakopesa etonga ya ngai mobimba mokengeli se moko, ye akoleisa yango, ye nde Davidi, mosaleli wa ngai. Akoleisa etonga ya ngai mpe akokengele yango. | |
Ezek | LinVB | 34:24 | Ngai Yawe nakozala Nzambe wa bango, mpe mosaleli wa ngai Davidi akozala nkumu monene o ntei ya bango. Ngai Yawe nalobi. | |
Ezek | LinVB | 34:25 | Nakokata bondeko bwa boboto na etonga ya ngai ; nakolongola nyama inso ya zamba o mokili. Bato ba ngai bakofanda kimia o eliki mpe bakolala mpongi elamu o kati ya zamba. | |
Ezek | LinVB | 34:26 | Nakobenisa mokili moye na mpe mabelé manso mazali penepene na ngomba ya ngai. Nakonokisa mbula o ntango ekoki, ekozala mbula ya bobenisi. | |
Ezek | LinVB | 34:27 | Nzete ikobota mbuma, bilanga bikobota mbuma mingi. Bato ba ngai bakofanda kimia o mokili mwa bango. Bongo mokolo nakobuka mabaya ma bikangiseli bya bango mpe nakolongola bango o maboko ma banyokoli ba bango, bakoyeba ’te ngai nazali Yawe. | |
Ezek | LinVB | 34:28 | Bato ba bikolo bisusu bakobotolo bango biloko lisusu te, mpe nyama ya zamba ikolia bango lisusu te. Bakozala na kimia mpenza, moto moko akotungisa bango lisusu te. | |
Ezek | LinVB | 34:29 | Nakobongisela bango elanga kitoko. Moto moko akokufa na nzala lisusu te, bato ba bikolo bisusu bakoyokisa bango nsoni lisusu te. | |
Ezek | LinVB | 34:30 | Bongo bakoyeba ’te ngai nazali Yawe Nzambe wa bango, Oyo azali penepene na bango ; mpe bango, bato ba Israel, bazali bato ba ngai. Elobi bongo Mokonzi Yawe. | |