II MACCABEES
Chapter 3
II M | LinVB | 3:1 | Bato banso bafandi o engumba esantu na boboto mpenza, bazalaki kotosa mibeko na motema moko, zambi nganga mokonzi azalaki komemya Nzambe mingi mpe koyina bobe. | |
II M | LinVB | 3:2 | Mbala esusu bakonzi ba bikolo bisusu bazalaki kokumisa Esika esantu mpe kopesa Tempelo lokumu lonene na makabo ma bango. | |
II M | LinVB | 3:3 | Seleko, mokonzi wa Azia, azalaki kofuta na mosolo mwa ye moko maye masengeli na mosala mwa mabonza. | |
II M | LinVB | 3:4 | Kasi moto moko, nkombo ’te Simoni, wa libota lya Bilga, azwi mosala mwa botali mosolo mwa sanduku ya Tempelo, azalaki koyokana te na nganga mokonzi Onias mpo ya likambo lya bakengeli ba zando. | |
II M | LinVB | 3:5 | Awa alongi likambo na Onias te, akei koyebisa Apolonio, mwana wa Tubi, moyangeli wa Sele-Siria na Fenisia o eleko ena. | |
II M | LinVB | 3:6 | Ayebisi ye ’te sanduku ya mosolo o Yeruzalem etondi na mosolo mpe na biloko bya nkita bileki mosika maye masengeli na mabonza. Bongo bakoki kopesa mokonzi monene nkita eye. | |
II M | LinVB | 3:7 | Mokolo Apolonio akutani na mokonzi, ayebisi ye likambo lya nkita yango lokola balobaki na ye. Mokonzi aponi Eliodoro, moyangeli wa makambo manene ma ekolo, atindi ye akende kokamata nkita ina inso. | |
II M | LinVB | 3:8 | Eliodoro azili te, akosi ’te akokende kotala mboka ya Sele-Siria na Fenisia, kasi akei se kosala maye mokonzi atindaki ye. | |
II M | LinVB | 3:9 | Ekomi ye o Yeruzalem, nganga mokonzi na bato banso bayambi ye na boboto ; ayebisi bango likambo ayokaki mpe ntina nini ayei. Atuni bango soko maye ayokaki mazalaki ma solo. | |
II M | LinVB | 3:10 | Nganga mokonzi ayebisi ye ’te bazalaki kobomba mosolo mwa basi bakufeli babali mpe mwa bana bitike o sanduku ya Tempelo. | |
II M | LinVB | 3:11 | Ndambo esusu ezalaki ya Irkano, mwana wa Tobia, nkumu moko wa ekolo. Maye Simoni, moto oyo aboya Nzambe, alobaki mazali ma lokuta, mpo mosolo o sanduku mokoki se na talenta nkama inei ya palata, mpe talenta nkama ibale ya wolo. | |
II M | LinVB | 3:12 | Bakoki mpe kobotolo bato mosolo mona te, awa batii mitema ’te mosolo mokoki kobunga o esika esantu te ; moto moko akoki kokamata mwango te o Tempelo eye bato ba nse mobimba bazalaki kokumisa. | |
II M | LinVB | 3:13 | Kasi mpo ya etinda ya mokonzi, Eliodoro ayebisi ’te balongola mosolo moye mpo ya kotia mwango o sanduku ya mokonzi. | |
II M | LinVB | 3:14 | O mokolo moye atiaki, ayingeli o Tempelo mpo ya kotanga nkita iye. Bato banso bakomi kobanga mingi. | |
II M | LinVB | 3:15 | Banganga Nzambe, na bilamba bya ndako esantu, bakumbami o boso bwa altare ya mabonza, babondeli Nzambe oyo apesaki mibeko mitali mosolo mwa Tempelo ’te abatela mosolo moye bato bayaki kobomba mwango wana. | |
II M | LinVB | 3:16 | Elongi ya nganga mokonzi ekomi mpembe mpenza : ezalaki kolakisa ’te azalaki koyoka nsomo o motema. | |
II M | LinVB | 3:17 | Azalaki kobanga mpe kolenge nzoto mobimba, bato banso bamoni ’te azalaki koyoka motema mpasi. | |
II M | LinVB | 3:18 | Bato baike babimi o ndako ya bango, mpe elongo na baninga babondeli o miso ma bato banso ’te basantola Tempelo te. | |
II M | LinVB | 3:19 | Basi baye bakangi ngoto o bontolo, batondi o balabala. Bilenge basi baye bakobimaka o ndako te, bakimi epai ya bizibeli na bifelo bya Tempelo, basusu bazalaki kotalaut’omaninisa, | |
II M | LinVB | 3:21 | Soko otali nkaka ya bato bakumbami o nse, mpe ndenge nganga mokonzi azalaki kobanga, oyoki mawa. | |
II M | LinVB | 3:22 | Ntango bato bazalaki kobondela Mokonzi wa bokasi bonso mpo ’te biloko bilongwa te mpe bitikala bya bato babombaki byango wana, | |
II M | LinVB | 3:24 | Ekomi Eliodoro na bakengeli ba ye penepene na sanduku ya mosolo, Mokonzi wa bokasi bonso mpe wa bilimo binso amilakisi na nguya enene ; baye banso babangaki te kokoto wana batikali nye : makasi na mpiko masileli bango. | |
II M | LinVB | 3:25 | Farasa yoko ebimeli bango, eye moto moko wa nsomo atambwisi ; farasa elati elamba ya etumba, ekei epai ya Eliodoro mpe etuti ye na bibende bya makolo ma liboso. Motambwisi farasa alati bilamba bya etumba bya wolo. | |
II M | LinVB | 3:26 | Banzenga basusu babale bayei, bato makasi, bazalaki kongenge, balati kitoko mpenza. Epai na epai babelemi na Eliodoro mpe babeti ye fimbo ; babeti ye makofi, manokeli ye lokola mbula ya mabanga. | |
II M | LinVB | 3:27 | Eliodoro akwei o nse, molili makasi mozingi ye. Bato bayei kotombola ye mpe bafandisi ye o tipoi. | |
II M | LinVB | 3:28 | Moto oyo akotoki na bakengeli mpe na basoda baike o ndako ya mosolo, akoki komisalisa lisusu te. Bato baye bandimaki ’te Nzambe aleki bokasi bakei kotika ye. | |
II M | LinVB | 3:29 | Moto oyo Nzambe wa bokasi akweisi, alali o nse, akoki koloba lisusu te, azalaki mpe na elikya ya kobika lisusu te. | |
II M | LinVB | 3:30 | Ba-Yuda batondi Nzambe mpo apesi lokumu na Tempelo ya ye. Bato bayokaki nsomo mpe bazalaki mitema likolo mwa liboso, bakomi kotondo na esengo mpe na nsai mpo Mokonzi wa bokasi bonso amilakisaki. | |
II M | LinVB | 3:31 | Baninga basusu ba Eliodoro babondeli Onias ’te asambela Nzambe wa nta-likolo mpo ’te oyo alali o nse mpe alingi kokata motema, abika. | |
II M | LinVB | 3:32 | Nganga mokonzi abonzeli Nzambe libonza mpo ’te azongisela ye bomoi, mpo babangi ’te mokonzi wa ekolo akokanisa ’te ba-Yuda bato bamekaki koboma Eliodoro. | |
II M | LinVB | 3:33 | O ntango nganga mokonzi abonzi libonza lya boyokani, banzenga babale babimeli Eliodoro lisusu, balati se lokola liboso, batelemi mpe balobi na ye : « Osengeli kotondo nganga mokonzi Onias mbala nkoto, zambi Mokonzi abikisi yo mpo ya losambo la ye. | |
II M | LinVB | 3:34 | Mpe awa ozwi etumbu euti o likolo, osakola o miso ma bato banso bokasi bonene bwa Nzambe. » Esilisi bango koloba bongo, balimwi. | |
II M | LinVB | 3:35 | Eliodoro abonzeli Nzambe libonza mpe alakeli ye elako enene, mpo abikisi ye. Atiki Onias na boboto mpe na basoda ba ye azongi epai ya mokonzi wa ekolo. | |
II M | LinVB | 3:38 | « Soko ozali na monguna to na moto alingi kotomboko na leta, tinda ye kuna. Akozongela yo awa bobele mpota mpota mpo ya fimbo, soko akokufa kuna te, mpo nguya ya Nzambe ezali wana. | |
II M | LinVB | 3:39 | Mokonzi wa likolo akokengeleke mpe akobatelaka esika ena. Moto nyonso akokende kuna na mayele mabe, Nzambe akopesa ye etumbu mpe akoboma ye. » | |