Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 14
Jere LinVB 14:1  O ntango ya elanga enene Yawe alobi na Yeremia :
Jere LinVB 14:2  « Bato ba Yuda bazali na lilaka, bingumba binso bibebi. Bato balali o mabelé mpo ya mawa, bato ba Yeruzalem baleli makasi.
Jere LinVB 14:3  Bankumu batindi basali bakende kotoka mai, bakomi o mabulu ma mai, kasi bazwi mai te, bazongi na bikutu mpamba, bayoki nsoni, bakangi minoko, bazipi bilongi.
Jere LinVB 14:4  Mabelé makauki mpo mbula enoki te, bato ba bilanga bayoki nsoni mpe bazipi bilongi.
Jere LinVB 14:5  Ata mbuli eye eboti ekotika mwana o esobe, zambi matiti mabesu mazali te.
Jere LinVB 14:6  Mpunda ya zamba itelemi o nso­nge ya ngomba, ibendi mpema lokola minsole, iluki se mpamba, mpo matiti mazali lisusu te.
Jere LinVB 14:7  E Yawe, ata masumu makitisi biso, obikisa biso mpo ya lokumu la Nkombo ya yo. Solo, towangani yo mbala mingi, tosali mabe o miso ma yo.
Jere LinVB 14:8  Yo elikya ya Israel, mobikisi wa ye o ntango ya mpasi. Mpo nini omilakisi lokola mo­mpaya o mokili moye, lokola moto wa mobembo atelemi se mpo ya kolala na butu ?
Jere LinVB 14:9  Mpo nini omilakisi lokola moto abangi, lokola soda oyo akoki kobikisa te ? Nzokande yo Yawe ozali o ntei ya biso, tokotangemaka bato ba yo, otika biso te ! »
Jere LinVB 14:10  Yawe alobi boye mpo ya bato ba ekolo eye : Bango balingi se kolekaleka, kotambola mingi ekoli­mbisaka bango te. Yango wana Yawe asepeli na bango te, akundoli mabe ma bango mpe akotumbola bango mpo ya masumu ma bango.
Jere LinVB 14:11  Yawe alobi na ngai : « Osambela mpo ya bolamu bwa bato baye te.
Jere LinVB 14:12  Ata balali nzala, nakoyoka losa­mbo la bango te ; ata babonzeli ngai mabonza ma kotumba na miboma, nakosepela na mango te. Nakosilisa bango na mopanga, na mongenge mpe na bokono bobe. »
Jere LinVB 14:13  Kasi nazongisi : « E Yawe Nza­mbe, baprofeta bakolobaka na ba­ngo : Bokomono bitumba te, bokoyoka nzala te, kasi bokofanda na bo­boto o esika eye. »
Jere LinVB 14:14  Yawe azongiseli ngai : « Baprofeta baye bakosangelaka makambo ma lokuta o nkombo ya ngai ; ngai natindi bango te, nasengi bango eloko te, nalobi na bango liloba lyoko te. Bakosakolaka se bimonela bya lokuta, maloba ma kokosa, makambo bango moko bakanisi.
Jere LinVB 14:15  Yango wana Yawe alobi boye : baprofeta bakosakolaka o nkombo ya ngai, ata natindi bango te, awa balobi ’te bitumba na mongenge bikokwela ekolo eye te, baprofeta baye bakosila na mopanga mpe na mongenge.
Jere LinVB 14:16  Baye bayoki maloba ma bango bakobwakema o balabala ya Yeruzalem : bakokufa na mo­nge­nge mpe na mopanga. Moto moko akozala te mpo ya kokunda bango, basi ba bango, bana babali na bana basi ba bango. Nakozongisela ba­ngo mabe ma bango. »
Jere LinVB 14:17  Loba na bato maloba maye : Mai mabimela ngai o miso, butu moi, kotika te, mpo mpasi enene ekweli ekolo ya ngai, bazoki mpota enene mpenza.
Jere LinVB 14:18  Soko nabimi o esobe, namoni bato bakufi na mopanga ; soko nazongi o mboka, namoni ’te nzala ekangi bango. Baprofeta na banganga Nzambe bazali kokatisa ekolo, mayele masileli bango.
Jere LinVB 14:19  Oboyi nde Yuda seko ? Oyoki Sion motema mpi ? Mpo nini obeti biso makasi boye ’te otikeli biso ata elikya ya kobika te ? Tozalaki na elikya ya kozwa boboto, kasi tozwi bwango te ! Tozalaki kozila mokolo mwa libiki, kasi tomoni bobele makambo ma nsomo !
Jere LinVB 14:20  E Yawe, tondimi mabe ma biso, mpe mabe bankoko ba biso basalaka : solo, tosali masumu o miso ma yo.
Jere LinVB 14:21  Mpo ya lokumu la nkombo ya yo oboya biso te, obebisa ngwende ya yo ya nke­mbo te. Kanisa bondeko okataki na biso mpe sala ’te tokabwana te.
Jere LinVB 14:22  O kati ya banzambe ba bikolo bisusu, nzambe nani akoki konokisela biso mbula ? Likolo lizali nde na nguya ya kotangisela biso mai ? Ezali mosala mwa yo te, Yawe ? E Yawe Nzambe wa biso totii eli­kya se na yo, yo moto okosalaka maye manso.