JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 15
Jere | LinVB | 15:1 | Yawe alobi na ngai : Ata Moze na Samuel batelemi o miso ma ngai, nakoyokela bato ba ekolo ena mawa te. Bengana bango o miso ma ngai, balongwa ! | |
Jere | LinVB | 15:2 | Soko batuni yo : Tokende wapi ? ozongisela bango : Yawe alobi boye : Oyo asengeli kokufa na bokono bobe, akufa na bokono bobe ! Oyo asengeli kokufa na mopanga, akufa na mopanga ! Oyo asengeli kokufa na nzala, akufa na nzala ! Oyo asengeli kokende o boombo, akende o boombo ! | |
Jere | LinVB | 15:3 | Yawe alobi : Nakopesa bango bitumbu binei : nakotindela bango mopanga moboma bango, mbwa ebenda bango, ndeke ya likolo mpe nyama ya zamba ilia mpe isilisa bango. | |
Jere | LinVB | 15:4 | Nakokomisa bango eloko ya nsomo o miso ma bikolo bisusu bya nse. Nakosala bongo mpo ya mabe Manase, mwana wa Ezekia, mokonzi wa Yuda, asalaki o Yeruzalem. | |
Jere | LinVB | 15:5 | E Yeruzalem, nani akoyokela yo mawa ? Nani akopangana na yo ? Nani akoteleme mpo ya koyoka nsango ya yo ? | |
Jere | LinVB | 15:6 | Yawe alobi boye : Yo moto oboyi ngai, yo moto opesi ngai mokongo. Natomboli loboko mpo ya kosilisa yo, nalembi na bolimbisi yo. | |
Jere | LinVB | 15:7 | O bingumba bya ekolo eye napupoli bango na lungu. Nasilisi ekolo ya ngai mpe napimi bango bana, mpo bakobi kolanda nzela ya bango. | |
Jere | LinVB | 15:8 | Basi bazenge bakomi ebele, leka zelo lya libongo lya mbu. Nakotindela bango basoda baboma bamama ba bana na midi. Na mbalakaka nakoyokisa bango motema nsomo. | |
Jere | LinVB | 15:9 | Mama wa bana nsambo akwei, makasi masileli ye, butu boyindeli ye liboso lya mpokwa : yango wana ayoki nsoni mpe nsomo. Baye batikali nakokaba bango o maboko ma banguna mpo ’te bakufa na mopanga. Maloba ma Yawe. | |
Jere | LinVB | 15:10 | E mama, mawa na ngai e ! Mpo nini obotaki ngai, moto wa boswani mpe wa bitumba o ekolo ya ngai ? Nadefi epai ya moto moko te, nadefisi mpe moto eloko te, nzokande bato banso bakotombelaka ngai bobe. | |
Jere | LinVB | 15:11 | Nasambeli : E Yawe, nasalelaki yo na motema moko, nabondelaki yo mpo ya monguna o mikolo mya mpasi mpe mya likama. | |
Jere | LinVB | 15:13 | Nakokaba nkita na biloko bya yo na bayibi, bo lifuta mpo ya masumu ma yo manso o ekolo mobimba. | |
Jere | LinVB | 15:14 | Nakokomisa yo moombo wa banguna ba yo o mokili moyebani na yo te. Nkanda ya ngai epelisi móto, eye ekozikisa bino. | |
Jere | LinVB | 15:15 | E Yawe, kanisa ngai mpe batela ngai, bikisa ngai o maboko ma banyokoli ba ngai. Oyokela bango mawa te mpo ’te nasuka te ; oyebi ’te bakotumolaka ngai mpo ya yo. | |
Jere | LinVB | 15:16 | Ntango nayokaki maloba ma yo, nasepelaki mingi, liloba lya yo liyokisaki ngai nsai o motema ; e Yawe Nzambe wa bokasi bonso, natangemi na nkombo ya yo. | |
Jere | LinVB | 15:17 | Mokolo moko te nalukaki esengo ya ngai moko o kati ya bato bakolandaka bisengo. Mpo ya yo nafandaki ngai moko, zambi otondisaki motema mwa ngai na nkanda. | |
Jere | LinVB | 15:18 | Mpo nini mpasi ya ngai ekosila te ? Mpo nini mpota ya ngai ekobela te, mpe elingi kosila te ? Solo, okomi o miso ma ngai lokola liziba likauki, likokosaka bato ba mobembo. | |
Jere | LinVB | 15:19 | Yawe ayanoli : Soko ozongi, nakokamata yo lisusu o mosala mwa ngai, soko olobi maloba malamu mpe otiki maloba mabe, okozala lokola monoko mwa ngai. Bango bakozongela yo, kasi okende koluka bango lisusu te. | |
Jere | LinVB | 15:20 | Nakokomisa yo o miso ma bato ba ekolo eye lokola efelo ya mbengi ekoki kobukana te. Bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te, zambi ngai nazali na yo mpo ya kosalisa mpe kobikisa yo. Maloba ma Yawe. | |