JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 38
Jere | LinVB | 38:1 | Sefatya, mwana wa Matan, na Gedalya, mwana wa Pasekur, na Yukal, mwana wa Selemya, na mpe Pasekur, mwana wa Malkia, bayoki maloba Yeremia azalaki koloba na bato banso : | |
Jere | LinVB | 38:2 | « Yawe alobi : Moto oyo akotikala o engumba eye, akokufa na mopanga, na nzala ekasi to na bokono bobe ; kasi oyo akobima mpe akokende epai ya ba-Kaldea, akobika. | |
Jere | LinVB | 38:3 | Yawe alobi : Ntembe te, engumba eye ekokabama o maboko ma basoda ba mokonzi wa Babilon, oyo akobotolo engumba ! » | |
Jere | LinVB | 38:4 | Bankumu balobi na mokonzi : « Moto oyo asengeli kokufa : na maloba ma ye azali kolembisa mitema mya basoda batikali o engumba mpe mya bato banso. Azali koluka bolamu bwa bato te, aluki se ’te bazwa bobe. » | |
Jere | LinVB | 38:5 | Mokonzi Sedekia ayanoli : « Malamu, akomi o maboko ma bino ; mokonzi akoki koboya maloba ma bino te. » | |
Jere | LinVB | 38:6 | Bakangi Yeremia, babwaki ye o libulu lya Malkia, mwana wa mokonzi, o lopango la bakengeli. Bakitisi Yeremia na mikulu. O libulu liye mai mazalaki te, se potopoto ; mpe Yeremia azindi o kati. | |
Jere | LinVB | 38:7 | Ebed-Melek, moto wa Kus, eniki wa lopango la mokonzi, ayoki ’te babwaki Yeremia o libulu o ntango mokonzi azalaki kosambisa bato o ‘Ezibeli ya Benyamin’. | |
Jere | LinVB | 38:9 | « Mokonzi wa ngai, bato baye basali profeta Yeremia mabe : babwaki ye o libulu lya mai ; akokufa wana na nzala, mpo mampa masili o engumba. » | |
Jere | LinVB | 38:10 | Bongo mokonzi Sedekia apesi Ebed-Melek, moto wa Kus, etinda eye : « Kamata bato ntuku isato mpe bimisa profeta Yeremia o libulu liboso ’te akufa. » | |
Jere | LinVB | 38:11 | Ebed-Melek akei na bato baye o ndako ya mokonzi, o esika bakobombaka bilamba ; alokoti mwa biteni bya bilamba bibe mpe biye bipaswani, mpe akei kopesa byango na Yeremia o libulu lya mai, akitisi byango na nsinga. | |
Jere | LinVB | 38:12 | Ebed-Melek, moto wa Kus, alobi na Yeremia : « Kanga biteni bya bilamba biye bya kala, tia byango o nse ya mapeke ma yo. » Yeremia asali se bongo. | |
Jere | LinVB | 38:13 | Nsima babendi Yeremia na nsinga mpe balongoli ye o libulu lya mai. Yeremia atikali o lopango la bakengeli. | |
Jere | LinVB | 38:14 | Mokonzi Sedekia abengisi profeta Yeremia epai ya ye o ezibeli ya bisato ya Tempelo ya Yawe. Mokonzi alobi na Yeremia : « Nalingi kotuna yo mpo yoko, obombela ngai eloko te ! » | |
Jere | LinVB | 38:15 | Yeremia ayanoli Sedekia : « Soko nayebisi yo yango, okobomisa ngai, mpe soko napesi yo lilako, okolanda lyango te ! » | |
Jere | LinVB | 38:16 | Mokonzi Sedekia alayeli ye na bonkutu : « Lokola Yawe azali na bomoi, oyo apesi biso bomoi, nakobomisa yo te mpe nakokaba yo te o maboko ma bato balingi koboma yo. » | |
Jere | LinVB | 38:17 | Yeremia alobi na Sedekia : « Yawe, Nzambe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi boye : Soko okei komitika o maboko ma bakomanda ba mokonzi wa Babilon, okobika mpe bakotumba engumba eye te ; okobika, yo na libota lya yo mobimba. | |
Jere | LinVB | 38:18 | Kasi soko okei komitika o maboko ma bakomanda ba mokonzi wa Babilon te, engumba eye ekokweya o maboko ma ba-Kaldea ; bakotumba yango, mpe yo okobika o maboko ma bango te. » | |
Jere | LinVB | 38:19 | Mokonzi Sedekia alobi na Yeremia : « Nazali kobanga bato ba Yuda, baye bakimi epai ya ba-Kaldea, mbele bakokaba ngai o maboko ma bango mpe bakonyokolo ngai mingi. » | |
Jere | LinVB | 38:20 | Yeremia azongisi : « Bakosala yango te. Yoka liloba lya Yawe liye nazali koyebisa yo. Manso makobongela yo, mpe okobika. | |
Jere | LinVB | 38:22 | basi banso baye batikali naino o ndako ya mokonzi wa Yuda bakokambama epai ya bakomanda ba mokonzi wa Babilon mpe bakoloba : Baninga ba yo ba motema babembi mpe bakosi yo ! Awa makolo ma yo mazindi o potopoto, bango bakimi ! | |
Jere | LinVB | 38:23 | Solo, bakokamba basi na bana ba yo banso epai ya ba-Kaldea. Yo moko okobika o maboko ma bango te. Mokonzi wa Babilon akokanga yo mpe akotumba engumba. » | |
Jere | LinVB | 38:25 | Soko bankumu bayoki ’te nasololi na yo mpe batuni yo : ‘Yebisa biso maye olobaki na mokonzi mpe maye ayebisaki yo ; obombela biso eloko te, soki te tokoboma yo’, | |
Jere | LinVB | 38:26 | ozongisela bango : ‘Nabondeli mokonzi azongisa ngai epai ya Yonatan te mpo nakufa o ndako ya ye te’. » | |
Jere | LinVB | 38:27 | Bankumu banso bayei kotuna Yeremia. Ye azongiseli bango se lokola mokonzi atindaki ye. Bongo batiki ye na boboto, zambi bayokaki lisolo lya bango te. | |