MATTHEW
Chapter 15
Matt | LinVB | 15:1 | Mokolo mǒkó ba-Farizéo na batéyi ba Mobéko baútí o Yerúzalem babelémí na Yézu, balobí na yě : | |
Matt | LinVB | 15:2 | « Mpô níni bayékoli ba yǒ bakobúkaka mibéko bankóko batíkélákí bísó ? Tálá, libosó lya kolía bakosukolaka mabóko té. » | |
Matt | LinVB | 15:3 | Yézu alobí : « Bôngó bínó, mpô níni bokobúkaka mobéko mwa Nzámbe mpô ya kotósa mibéko miútí na bínó mǒkó ? | |
Matt | LinVB | 15:4 | Mpô Nzámbe alobí : Memyá tatá na mamá, mpé : Moto atómbélí tatá tǒ mamá wa yě mabé, báboma yě. | |
Matt | LinVB | 15:5 | Kasi bínó bokolobaka ’te : Sókó moto alobí na tatá tǒ na mamá : ‘Bilóko nakokákí kopésa bínó, nakobonzela byangó na Nzámbe’, | |
Matt | LinVB | 15:6 | moto ôná asengélí kosálisa tatá na mamá lisúsu té ; mpé bobomí bôngó liloba lya Nzámbe sé mpô ya kolanda mibéko miútí na bínó mǒkó. | |
Matt | LinVB | 15:8 | Bato baye bakokúmisaka ngáí sé na monoko, kasi mitéma mya bangó mizalí mosíká na ngáí. | |
Matt | LinVB | 15:9 | Bokúmisi bakokúmisaka ngáí bozalí sé mpámba ; matéya bakotéyaka mazalí sé bitíndá bya bato. » | |
Matt | LinVB | 15:11 | Elóko ekótí o monoko ekokómisa moto mbindo té ; kasi eye ebimí o monoko ekokómisa yě mbindo. » | |
Matt | LinVB | 15:12 | Bayékoli babelémí mpé balobí na yě : « Oyébí ’te maloba ma yǒ mayókísí ba-Farizéo mabé. » | |
Matt | LinVB | 15:14 | Bótíka bangó : bazalí bato ba lolandá bakokambaka bato ba lolandá ! Sókó moto akúfá míso akambí móníngá akúfá mpé míso, bangó bábalé bakokwâ o libúlú. » | |
Matt | LinVB | 15:17 | Boyébí té ’te elóko ekótí o monoko ekoleka o libumu, mpé na nsima ekokende o zongo ? | |
Matt | LinVB | 15:19 | Zambí o motéma ekobima mikáno mabé, bobomi, bokáli, ekóbo, boyíbi, maloba ma banzénénéké ba lokutá na songísongí. | |
Matt | LinVB | 15:20 | Makambo mâná makobébisa moto. Kasi kolía na mabóko masukwámí té, ekokómisa moto mbindo té. » | |
Matt | LinVB | 15:22 | Mwásí mǒkó wa Kanána aútí o ekólo êná, ayéí mpé agángí : « Mokonzi, mwána wa Davídi, yókélá ngáí mawa. Zábolo mǒkó azalí konyókolo mwána mwásí wa ngáí míngi. » | |
Matt | LinVB | 15:23 | Kasi Yézu azóngísélí yě liloba lyǒkó té. Bayékoli bayéí kobóndela yě : « Ndimélá yě, zambí azalí kolanda bísó na bogángi bwa yě ». | |
Matt | LinVB | 15:24 | Yézu azóngísí : « Batíndí ngáí bobélé epái ya mpatá ibúngámí ya libótá lya Israél. » | |
Matt | LinVB | 15:26 | Azóngísélí yě : « Ebongí té ’te bákamata mámpa ma bána mpé bábwákela mango bána ba mbwá. » | |
Matt | LinVB | 15:27 | Mwásí azóngísí : « Sôló, Mokonzi, kasi bána ba mbwá bakolíaka mpumbulú ikwéí o nsé ya méza ya bankóló ba bangó ! » | |
Matt | LinVB | 15:28 | Sikáwa Yézu azóngísélí yě : « E mamá, ozalí na boyambi bonéne ! Ésálema lokóla oséngí ! » Mpé bandá ntángo êná mwána mwásí wa yě abíkí. | |
Matt | LinVB | 15:29 | Yézu alongwí wâná, akeí lisúsu epái ya etíma ya Galiléa. Abutí ngómbá, afándí wâná. | |
Matt | LinVB | 15:30 | Bato ebelé bayéí epái ya yě na bato ba mbengo, baye baléméné mabóko, bato ba lolandá, ba-ebúbú, ná mpé basúsu míngi ; batíí bangó o bosó bwa Yézu ; mpé yě abíkísí bangó. | |
Matt | LinVB | 15:31 | Bôngó bato bakámwí míngi mpenzá, áwa bamóní baye bazalákí ebúbú bakómí koloba, baye baléméné mabóko bakómí nzóto kólóngónú, bato ba mbengo bakómí kotámbola, baye bakúfá míso bakómí komóno ; mpé bakúmísí Nzámbe wa Israél. | |
Matt | LinVB | 15:32 | Nzókandé Yézu abéngí bayékoli ba yě, alobí na bangó : « Nayókélí bato baye mawa, mpô bazalí na ngáí mikolo mísáto mpé bazalí na elóko ya kolía té. Nalingí kozóngisa bangó na nzala té, mbele bakokwéya o nzelá. » | |
Matt | LinVB | 15:33 | Bayékoli balobí na yě : « Awa o esóbé tokokí kozwa mámpa ma koléisa bato ebelé boye epái wápi ? » | |
Matt | LinVB | 15:34 | Yézu atúní bangó : « Bozalí na mámpa bóní ? » Balobí : « Nsambo, na mwâ mbísi iké. » | |
Matt | LinVB | 15:36 | akamátí mámpa nsambo na mbísi, atóndí Nzámbe, abúkí mámpa mpé apésí bayékoli ba yě ; bangó bakeí kokabolela bato. | |