NUMBERS
Chapter 16
Numb | LinVB | 16:1 | Kore, mwana wa Yisar, nkoko wa Keat, oyo azalaki mwana wa Levi, abendi Datan mpe Abiram, bana ba Eliab, na mpe On, mwana wa Pelet. Eliab na Pelet bazalaki bana ba Ruben. | |
Numb | LinVB | 16:2 | Batomboki na Moze ; bato nkama ibale na ntuku itano balandi bango ; bango banso bato ba lokumu, bakonzi ba mabota, bayebani na lisanga. | |
Numb | LinVB | 16:3 | Batomboki na Moze mpe na Aron, balobi : « Bolekisi ndelo ! Bato banso ba lisanga bazali basantu mpe Yawe azali o ntei ya bango. Mpo nini bolingi komitombola likolo lya lisanga lya Yawe ? » | |
Numb | LinVB | 16:5 | Na nsima alobi na bana ba Kore mpe na baninga ba ye : « Lobi na ntongo Yawe akoyebisa banani bazali bato ba ye, moto nani azali mosantu mpo akoka kokoma penepene na ye. Oyo Yawe akobenga penepene na ye, ye moto aponomi. | |
Numb | LinVB | 16:6 | Bosala boye : Bokamata mbeki ya makala mpo ya kotumba mpaka ya malasi, yo Kore na baninga ba yo banso. | |
Numb | LinVB | 16:7 | Mpe lobi botia móto o kati ; na nsima botiela mwango mpaka ya malasi o boso bwa Yawe. Moto oyo Yawe akolakisa, ye azali mosantu. Solo, boleki lofundo, bino bana ba Levi ! » | |
Numb | LinVB | 16:9 | Ekoki te awa Nzambe wa Israel aponoki bino o kati ya bana ba Israel ? Abengaki bino bosala mosala o ndako ya Yawe, mpe atiaki bino o boso bwa bato banso o ntango bokosalela bango mosala mwa Nzambe ; | |
Numb | LinVB | 16:10 | aponoki yo na bandeko ba yo banso ba-Levi, mpo bozala penepene na ye, mpe sikawa bolingi kokoma banganga Nzambe ? | |
Numb | LinVB | 16:11 | Botomboki na Yawe mpenza, yo na baninga ba yo banso. Aron nde nani mpo ’te botombokela ye ? » | |
Numb | LinVB | 16:12 | Moze atindi bato babenga Datan na Abiram, bana ba Eliab. Bango bayanoli : « Tokoya te. | |
Numb | LinVB | 16:13 | Awa olongoli biso o mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi, mpe okomisi biso awa o eliki mpo ’te tokufa, ekoki te ? Sikawa olingi naino kozala mokonzi wa biso. | |
Numb | LinVB | 16:14 | Te ! Okambi biso te o mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi, okabeli biso mpe bilanga na nzete ya vino te ! Okanisi ’te bato bakufa miso ? Tokoya te. » | |
Numb | LinVB | 16:15 | Moze atoki na nkanda mpe alobi na Yawe : « Otala libonza lya bango te. Ngai nayibeli bango mpunda te, nasali moko wa bango mabe te ! » | |
Numb | LinVB | 16:16 | Moze alobi na Kore : « Bino na baninga, boya lobi koteleme awa o miso ma Yawe, esika yoko na Aron. | |
Numb | LinVB | 16:17 | Moko moko aya na engwekungweku, atia mpaka ya malasi o kati ; moko moko aya na yango o boso bwa Yawe (yango inso ikozala nkama ibale na ntuku itano). Yo na Aron, bokamata mpe ya bino. » | |
Numb | LinVB | 16:18 | Banso bayei na engwekungweku ya bango, bapelisi móto mpe batii mpaka ya malasi o móto. Na nsima batelemi penepene na monoko mwa Ema ya Likita, esika yoko na Moze mpe na Aron. | |
Numb | LinVB | 16:19 | Kore asangisi lisanga mobimba lya bato ba ye penepene na monoko mwa Ema ya Likita, mpe nkembo ya Yawe emononi na bato banso. | |
Numb | LinVB | 16:22 | Banso bakwei elongi o nse mpe bagangi : « E Nzambe, Nzambe oyo akopesaka bato banso mpema, okosilika na lisanga mobimba, soko se moto moko asali lisumu ? » | |
Numb | LinVB | 16:26 | Moze alobi na bato ba lisanga : « Nabondeli bino, bolongwa o biema bya bato baye babe, bosimba mpe eloko yoko ya bango te, mpo ’te bokufa mpo ya masumu ma bango te. » | |
Numb | LinVB | 16:27 | Balongwi penepene na biema bya Kore, bya Datan mpe bya Abiram. Datan na Abiram babimi mpe batelemi o monoko mwa ema ya bango, elongo na basi ba bango, na bana babali na bana bake ba bango. | |
Numb | LinVB | 16:28 | Moze alobi : « Sikawa bokoyeba ’te Yawe moto atindi ngai nasala bongo, zambi nakosala yango na mayele ma ngai moko te. | |
Numb | LinVB | 16:30 | Kasi soko Yawe akosala likambo lyoko lya nsomo, soko mabelé makofungwama mpe makomele bango elongo na biloko bya bango binso, soko bakokita o mboka ya bawa, awa bazali naino na bomoi, bokoyeba ’te bango baboyaki Yawe. » | |
Numb | LinVB | 16:32 | Mabelé mafungwami mpe mameli bango elongo na libota lya bango na mpe bato banso ba Kore na biloko bya bango. | |
Numb | LinVB | 16:33 | Bakiti o mboka ya bawa, awa bazalaki naino na bomoi elongo na biloko bya bango binso. Mabelé mazipi bango mpe balongwi o lisanga libela. | |
Numb | LinVB | 16:34 | Ezalaki bango koganga, bato banso ba Israel, bakimi, zambi bamilobeli : « Mabelé mamele biso te ! » | |