Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PROVERBS
Prev Up Next
Chapter 23
Prov LinVB 23:1  Soko ofandi o meza ya moto monene, keba na biloko bizali liboso lya yo.
Prov LinVB 23:2  Soko olingi kolia mingi, malamu okonza lokoso la yo.
Prov LinVB 23:3  Olula bilei elengi bya ye te, mbele okoyoka byango bololo.
Prov LinVB 23:4  Omilembisa te mpo ya kozwa nkita, tika komitungisa na yango.
Prov LinVB 23:5  Ntango obwaki miso epai ya nkita, isili ikimi, lokola izwi mapapu, ikokima o likolo lokola engondo.
Prov LinVB 23:6  Olia mampa ma moto moyimi te, olula biloko elengi bya ye te,
Prov LinVB 23:7  zambi azali lokola moto wa mitema mibale. Akoloba na yo : « Lia mpe mele », kasi motema mwa ye molingi bolamu bwa yo te.
Prov LinVB 23:8  Mbele okosanza biloko olei bobele sika, mpe obebisi maloba ma yo ma boleti se mpamba.
Prov LinVB 23:9  Oloba na moto zoba o litoi te, mbele akokinola maloba ma yo ma bwanya.
Prov LinVB 23:10  Opusa libanga te liye likolakisaka ndelo ut’o kala, otia makolo o bilanga bya bana bitike te.
Prov LinVB 23:11  Oyo akobekola bango azali makasi, akosambela bango mpe akokitisa yo.
Prov LinVB 23:12  Ndima ’te bapalela yo, fungola matoi, bongo oyoka maloba ma bwanya.
Prov LinVB 23:13  Obanga te kopesa mwana etumbu, soko obeti ye fimbo, akokufa na yango te.
Prov LinVB 23:14  Kasi soko obeti ye na fimbo, okobikisa ye o mboka ya bawa.
Prov LinVB 23:15  Mwana wa ngai, soko okokoma na bwanya, motema mwa ngai mpe mokosepela.
Prov LinVB 23:16  Nakoyoka esengo ya solosolo soko okosakola makambo ma bosembo.
Prov LinVB 23:17  Oyokela basumuki zuwa te, kasi obangaka Yawe ntango inso.
Prov LinVB 23:18  Ntembe te, o mikolo mikoya okomono ’te otii elikya mpamba te.
Prov LinVB 23:19  Yoka, mwana wa ngai, mpe okoma na bwanya, tambola se o nzela semba.
Prov LinVB 23:20  Ofanda esika yoko te na bato bakolangwaka vino, to o kati ya baye bakotondisaka libumu na nyama.
Prov LinVB 23:21  Zambi molangwi na moto wa lokoso bakokelela, mpe moto goigoi akolata se bilamba bipaswani.
Prov LinVB 23:22  Yoka maloba ma tata oyo aboti yo : okinola mama wa yo te, ntango akokoma mobange.
Prov LinVB 23:23  Luka bosolo mpe oteke bwango te ; se bongo na bwanya, na mateya mpe na boyebi.
Prov LinVB 23:24  Tata wa moto semba akoyoka esengo enene, mama oyo aboti mwana wa bwanya akosepela mingi.
Prov LinVB 23:25  Oyokisa baboti ba yo nsai enene, sepelisa mama oyo aboti yo.
Prov LinVB 23:26  Mwana wa ngai, ndima ngai, miso ma yo masepela nzela nalakisi yo.
Prov LinVB 23:27  Solo, mwasi ndumba azali libulu bozindo, mpe mwasi wa mpembeni azali liziba lya nkaka mingi.
Prov LinVB 23:28  Akonongoko bato lokola moyibi, mpe akokomisaka ebele ya bango basuli.
Prov LinVB 23:29  Banani bakolelaka « Mama e ! » ? Banani bakolobaka « E mawa ! » ? Banani bakoswanaka ? Banani bakokimelaka ? Banani bakobundaka bitumba ntina te ? Banani bakotalaka na miso malai ?
Prov LinVB 23:30  Bobele baye bakomeleke vino ndelo te, baye bakolukaka se masanga makasi.
Prov LinVB 23:31  Otala vino te, soko ekomi motane, ndenge ezali kongenge o nkeni, to ndenge ekoleka o mongongo na elengi enso !
Prov LinVB 23:32  Na nsuka yango ekoswa yo lokola nyoka, ekotia yo mino lokola etupa.
Prov LinVB 23:33  Miso ma yo makomono makambo kilikili, mpe motema mokolobisa yo maloba mazangi ntina.
Prov LinVB 23:34  Okozala lokola moto alali o kati ya mbu, lokola moto akangemi o nsonge ya nzete ya masuwa.
Prov LinVB 23:35  Okoloba : « Babeti ngai, kasi nayoki mpasi te ! Babeti ngai fimbo, kasi nayoki eloko te ! Nakolamuka ntango nini ? Nakosenge vino lisusu ! »