Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 1
Exod LinVB 1:1  Tala nkombo ya bana ba Israel bayingeli o Ezipeti elongo na Yakob. Bayaki wana moto na moto na libota lya ye :
Exod LinVB 1:5  Bana na bankoko ba Yakob bazalaki bango banso bato ntuku nsambo. Yosefu asili akomaki o Ezipeti liboso.
Exod LinVB 1:6  Na nsima Yosefu awei, na mpe bandeko ba ye na libota lya bango mobimba.
Exod LinVB 1:7  Bana ba-Israel bazalaki kobota mingi, bakomi ebele mpe bazwi makasi ; mokili motondi na bango.
Exod LinVB 1:8  O Ezipeti bakomi na mokonzi wa sika. Ye ayebaki Yosefu te.
Exod LinVB 1:9  Alobi na bato ba ye : « Bana ba Israel bakomi baike mpe baleki biso na bokasi ;
Exod LinVB 1:10  bongo toluka mayele mpo babota lisusu mingi te. Mokolo bakoyela biso etumba, bakosangana na banguna ba biso, bakobundisa biso, nsima bakolongwa o mokili mwa biso. »
Exod LinVB 1:11  Yango wana baluboli bakapita mpo ’te batinda ba-Israel mosala makasi. Bongo batongeli Farao bingumba bya kobomba biloko, Pitom na Ramses.
Exod LinVB 1:12  Kasi ata banyokoli bango mingi, bazalaki kobanga ba-Israel, mpo bazalaki kobota mingi mpe bakomi ebele.
Exod LinVB 1:14  Bayokisi bango mpasi na misala miye : kolamba potopoto, kotumba biliki mpe kosala mosala mwa bilanga.
Exod LinVB 1:15  Mokonzi wa Ezipeti alobi na basi bazalaki kobotisa basi ba-Ebrei, moko nkombo ya ye Sifra, mosusu Pua, maloba maye :
Exod LinVB 1:16  « Ntango bokobotisa mwasi mo-Ebrei botala soko mwana azali mobali to mwasi. Soko azali mobali, boboma ye ; soko azali mwasi, botika ye. »
Exod LinVB 1:17  Kasi basi babotisi bazalaki kobanga Nzambe, baapi kotosa mokonzi wa Ezipeti mpe babomi bana babali te.
Exod LinVB 1:18  Mokonzi wa Ezipeti abengi bango mpe atuni bango : « Mpo nini bosali bongo ? Mpo nini bobomi bana babali te ? »
Exod LinVB 1:19  Bango bazongisi : « Basi ba-Ebrei bazali lokola basi ba Ezipeti te, bazali makasi ; tala, naino mobotisi akomi o ndako ya bango te, basili kobota. »
Exod LinVB 1:20  Nzambe asalisi basi babotisi, mpe bongo ba-Ebrei bakomi ebele mpenza mpe bazwi makasi mingi.
Exod LinVB 1:21  Mpo basi babotisi bazalaki kobanga Nzambe, ba-Ebrei bakomi na bana mingi.
Exod LinVB 1:22  Kasi Farao apesi bato ba ye banso mobeko : « Soko mwasi mo-Ebrei aboti mwana mobali, bobwaka ye o ebale, kasi soko aboti mwana mwasi botika ye. »