Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
TITUS
Up
1 2 3
Chapter 1
Titu LinVB 1:1  Pólo, mosáleli wa Nzámbe, apóstolo wa Yézu Krístu mpô ya kokamba baye Nzá­mbe aponí o nzelá ya boyambi ; báya­mba mpé báyéba nzelá ya sôló ya kokúmisa Nzámbe.
Titu LinVB 1:2  Bôngó bátía mitéma na bomoi bwa lobíko, boye Nzá­mbe óyo azalí na lokutá té asílí alakélí út’o bileko bya kala.
Titu LinVB 1:3  Awa elaká ekokí, alakísí Liloba lya yě polélé. Yě, Nzámbe Mobíkisi wa bísó, atí­ndí ngáí násangela bato nsango eye.
Titu LinVB 1:4  óna Títo, mwána wa ngáí wa sôló ; na boyambi sé bǒ kó bwa bísó, ngrásya na bobóto bwa Nzámbe Tatá mpé bwa Krístu Yézu, Mobíkisi wa bísó !
Titu LinVB 1:5  Natíkákí yǒ o Kréta mpô ’te óbongisa mosálá moye motíkálákí : o engumbá yǒ kó yǒ kó ópono bakóló ba Eklézya, sé lokóla natí­ndákí yǒ.
Titu LinVB 1:6  Soko moko aponami ázala na ezalela mabé té, azala na mwasi sé mǒkó. Bána ba ye bázala na boyambi, baye bakopésaka esí­mbisi té na mobúlú tǒ na bobóyi botósi.
Titu LinVB 1:7  Mpô bǒ moyángeli wa mambí ma Nzámbe mokéngeli wa Eklézya akokí kozala na makambo mabé té : ázala na lofú­ndo té, na nkele té, álángwa masa­nga té, ázala moto wa bitumba té, ázala na mpósá ya mosolo té.
Titu LinVB 1:8  Kasi áyéba koyamba bampaya, álinga kosála sé malámu, ázala na makanisi malongóbání, moto wa bosémbo mpé wa losámbo, áyéba kokanga motéma ;
Titu LinVB 1:9  ápikama o matéya ma sôló lokóla balakísí yě, mpô ’te ákoka koléndisa bato na matéya ma sôló mpé kosúkisa baye bakotíaka ntembe.
Titu LinVB 1:10  Sôló, bato míngi bazalí na mayéle ma botomboki, bakosololaka masoló mazángí ntína mpé bakolukaka kokósa báníngá ; okokúta bangó míngi o káti ya bato bakátísí nzóto.
Titu LinVB 1:11  Ose­ngélí kokangisa bangó monoko : basílí kobébisa mabótá maíké na makambo ma bangó ma lokutá mpô ya kozwa mosolo na mayéle mabé.
Titu LinVB 1:12  Motéyi mǒkó, moto wa bangó, alobákí ’te « Bato ba Kréta bazalí sékô bato ba lokutá, nyama ibé, bato ba goigói, bakolingaka sé kolía. »
Titu LinVB 1:13  Sôló, moto ôná alobí malámu. Yangó wâná osengélí kopálela bangó makási mpô ’te bátíkala na eyamba ya sôló.
Titu LinVB 1:14  Bátía matói té na bilobáloba bya ba-Yúda mpé na bitíndá bya baye batíkí matéya ma sôló.
Titu LinVB 1:15  O míso ma bato ba motéma péto, bilóko bínso bizalí péto. Kasi o míso ma bato ba motéma mbindo mpé bazángí boyambi, bilóko bínso bizalí na mbindo, mpô mayéle na mitéma mya bangó mibébí.
Titu LinVB 1:16  Bakolobaka ’te bayébí Nzámbe, kasi maye bakosálaka malakísí ’te babóyí Yě : nsúka ya bato babé, bato­mboki, babongí na mosálá mǒkó mwa molongá té.
Chapter 2
Titu LinVB 2:1  Kasi yǒ osengélí kolakisa maye malongóbání na matéya ma sôló.
Titu LinVB 2:2  Batatá bakómí babangé bálekisa ndelo té o makambo mánso, báza­la na bwányá mpé na bokébi, bato ba boyambi bwa sôló, bálinga báníngá, bázala na moléndé.
Titu LinVB 2:3  Sé bôngó bamamá bakómí babangé : bázala na ezalela ebongí na basántu : bátóngo bání­ngá té, bálángwa masanga té, báyéba kopésa bato malako malámu
Titu LinVB 2:4  mpé bálakisa bilengé básí bálinga babáli na bána ba bangó ;
Titu LinVB 2:5  bámílakisa té, bázala na bopéto, báyéba kobongisa misálá mya ndáko, bázala bato ba bobóto, bátósa babáli ba bangó mpô ’te moto mǒkó átúka Liloba lya Nzámbe té.
Titu LinVB 2:6  Léndísá mpé bilengé babáli ’te bázala na bwányá o makambo mánso.
Titu LinVB 2:7  Yǒ mǒkó mpé lakísá ndakisa elámu : ótéya matéya ma sôló bǒ ebongí.
Titu LinVB 2:8  Téyá polélé mpé na bosémbo mpô ’te mongúná ákoka kotonga bísó na likambo lyǒ kó té ; kasi yě mǒkó áyóka nsóni.
Titu LinVB 2:9  Baómbo bátósa bankóló ba bangó o makambo mánso, báluka kosepelisa bangó, bátía ntembe na maloba ma bangó té.
Titu LinVB 2:10  Báyíba té, kasi émónono ’te bazalí na bosémbo o makambo mánso ; bakopésa bôngó ntángo ínso lokúmu na matéya ma Nzámbe, Mobíkisi wa bísó.
Titu LinVB 2:11  Ya sôló, ngrásya ya Nzámbe, líziba lya libíkí lya bato bánso, esílí emónóní.
Titu LinVB 2:12  Yangó elakísí bísó ’te tokokí kobóya Nzámbe té, kasi tóbóya mpósá ínso ya mabé. O mikolo miye tófánda na bokébi, na bosémbo mpé na bobángi Nzámbe,
Titu LinVB 2:13  áwa tozalí kozila na elíkyá enéne Bomímónisi bwa nkémbo ya Nzámbe wa bísó monéne mpé Mobíkisi wa bísó Krístu Yézu.
Titu LinVB 2:14  Yě moto amíkabí mpô ya bísó mpô ’te ábíkisa bísó o mabé mánso mpé ápétola bísó mpô tókóma bato ba yě mpe­nzá, bato bakoluka sé kosála malámu.
Titu LinVB 2:15  Lokóla moto ayébí yangó sôló osengélí kotéya mambí maye, kolé­ndisa mpé kopálela bato. Moto mǒ­kó ákínola yǒ té.
Chapter 3
Titu LinVB 3:1  Okundolela bato bánso ’te basegélí kotósa bayángeli mpé bakonzi ba Letá ; bálakisa bangó botósi mpé bándima kosála maye mánso mazalí malámu.
Titu LinVB 3:2  Bátúmbola mpé báswânisa moto mǒkó té, kasi bálakisa bato bánso motéma bosáwa mpé bobóto.
Titu LinVB 3:3  Libosó bísó mpé tozalákí na mayéle té, tozalákí batomboki, bato babúngámí. Tozalákí baómbo ba mpósá ebé mpé ba bisengo ndéngé na ndéngé, tozalákí koluka kosála mabé, koyóka zúwa ; bato bazalákí koyina bísó, mpé bísó tozalákí koyinana.
Titu LinVB 3:4  Kasi Nzámbe Mobíkisi wa bísó alakísí bato bolámu mpé bolingi bwa yě.
Titu LinVB 3:5  Abíkísí bísó, mpô ya misálá mya bísó mya bosémbo té, kasi bobélé mpô ya ngolu ya yě ; abíkísí bísó na mái ma mbótama ya íbalé, mpé akómísí bísó bato ba sika na ngúyá ya Elímo Sántu.
Titu LinVB 3:6  Atóndísí bísó na Elímo ônáméí mpô ya Yézu Krístu Mobíkisi wa bísó,
Titu LinVB 3:7  mpô tóbíka na ngúyá ya ngrásya ya Krístu, mpé tózala na elíkyá ya kozwa bomoi bwa lobíko.
Titu LinVB 3:8  Okokí kotía motéma na maloba maye. Nalingí ’te ótéya makambo maye na moléndé, bôngó baye bayambí bázala bato ba libosó mpô ya kosála malámu. Yangó ezalí malámu mpé ekobongela bato bánso.
Titu LinVB 3:9  Kasi tíká kowéla ntembe na masoló mazángí ntína. Kotánga milongó mya nkómbó ya bankóko, koswâna mpé kowéla ntembe na maye matálí Mobéko ezalí sé mpámba mpé na litómba lyǒ kó té.
Titu LinVB 3:10  Sókó moto atéyí matéya ma lokutá, ópálela yě, atâ mbala íbalé, na nsima tíká yě.
Titu LinVB 3:11  Yǒ mǒ­kó oyébí : moto asálí bôngó abúngí nzelá ; masúmu ma yě makokitisa yě o likambo.
Titu LinVB 3:12  Sókó natíndélí yǒ Artémas tǒ Tisíko, yáká nokí kolanda ngáí o Nikópolis, zambí nakání kofánda kúná o eleko ya mpío.
Titu LinVB 3:13  Bongísá makambo mánso ma mobémbo mwa Zénas, moto ayékólá mibéko mya Letá, mpé mwa Apólos, bázánga elóko té.
Titu LinVB 3:14  Bato ba bísó mpé bámesene kosála mosálá malámu mpô ’te bákokisa maye masengélí na bangó. Básála bôngó mosálá mozalí na ntína.
Titu LinVB 3:15  Baye bánso bazalí elongó na ngáí batíndélí yǒ mbóte. Pésá baye bánso balingí bísó mbóte, bazalí na bísó boyambi bǒ kó. Ngrásya ézala na bínó bánso !