Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 36
Isai LinVB 36:1  O mobu mwa zomi na minei mwa bokonzi bwa Ezekia, Senakerib, mokonzi wa Asur, akei kobundisa bingumba bya Yuda mpe abotoli byango.
Isai LinVB 36:2  Ut’o Lakis mokonzi wa Asur atindi moyangeli wa ye epai ya mokonzi Ezekia o Yeruzalem, elongo na basoda ebele. Moyangeli atelemi penepene na nze­la ya mai euti o likolo, eye ekolanda balabala ekokende na elanga ya ‘Mosukoli bilamba’.
Isai LinVB 36:3  Eliakim, mwana wa Kilkia, ye mokengeli wa ndako ya mokonzi, na Sebna, mokonzi wa minkanda, na ntoma Yoa, mwana wa Asaf, bakei kokutana na ye.
Isai LinVB 36:4  Moyangeli alobi na bango : « Boloba na Ezekia boye : Mokonzi monene wa Asur alobi boye : Ozali kotia elikya na nani ?
Isai LinVB 36:5  Okanisi ’te maloba mpamba makoki na mayele mpe na mpiko mpo ya kolonga etu­mba ? Otii motema na nani mpo ’te otomboko na ngai ?
Isai LinVB 36:6  Okolikya ’te okozwa lisalisi epai ya Ezipeti, lititi lya nsoló libukani mpe likotubola loboko la moto akomilendisa na lyango. Ekosalema bongo na bato banso bakotiaka mitema na Farao, mokonzi wa Ezipeti.
Isai LinVB 36:7  Mbele bokoloba na ngai : “Totii elikya ya biso na Yawe Nzambe wa biso.” Kasi Ezekia, ye moto alo­ngo­li bisika binso bya kokumisa banzambe ba lokuta na bitumbelo binso, alobaki na bato ba Yuda mpe na Yeruzalem : “O boso bwa altare eye bosengeli kogumbama.”
Isai LinVB 36:8  Bete mondenge na nkolo wa ngai, mokonzi wa Asur. Nakopesa yo farasa nkoto ibale, soko okozwa bato bakobutelayango.
Isai LinVB 36:9  Okosala boniboni mpo ’te okimisa ata moko o kati ya basali mpamba ba mokonzi wa ngai ? Kasi otii motema na Ezipeti mpo ya kozwa makalo na bato ba farasa.
Isai LinVB 36:10  Mpe awa nayei kobunda etumba mpo ya kobebisa ekolo eye, okanisi ’te Yawe andimi yango te ? Yawe moto alobaki na ngai : “Kende kobunda na bato ba mokili mona mpo ’te obebisa mwango !” »
Isai LinVB 36:11  Eliakim, Sebna na Yoa balobi na moyangeli : « Tobondeli yo, oloba na biso basaleli ba yo na lokota la ba-Aram, mpo toyebi lokota lango, kasi oloba na biso na lokota la Yudea te, bongo bato bazali o efelo ya engumba bayoka biso te. »
Isai LinVB 36:12  Kasi moyangeli ayanoli : « Okanisi ’te mo­konzi wa ngai atindi ngai naloba se na yo mpe na mokonzi wa yo ? Atindi ngai naloba mpe na bato bafandi o efelo ya engumba, mpo, se lokola bino, bango mpe bakosengela kolia nyei ya bango mpe komele masuba ma bango. »
Isai LinVB 36:13  Moyangeli atelemi mpe agangi makasi na lokota la Yudea, asakoli maloba maye : « Boyoka maloba ma mokonzi monene wa Asur.
Isai LinVB 36:14  Mokonzi alobi boye : Ezekia abuba bino te ! Akoki kobikisa bino te.
Isai LinVB 36:15  Ezekia atika koloba na bino ’te bosengeli kotia mitema na Yawe, atika koloba : « Ntembe te, Yawe ako­bikisa bino, engumba eye eko­kweya o maboko ma mokonzi wa Asur te. »
Isai LinVB 36:16  Boyoka Ezekia te, mpa­mba te, mokonzi wa Asur alobi boye : Bokata na ngai bondeko, bomikaba o maboko ma ngai, mpe moto na moto ndakoki kolia mbuma ya nzete ya vino na mbuma ya nzete ya figi, moto na moto akomele mai ma libulu lya ye moko.
Isai LinVB 36:17  Na nsima nakoya kokamata bino banso mpe nakotia bino o mokili mozali lokola mokili mwa bino, esika mbuma ya mampa mpe vino ya sika izali mi­ngi, mokili mwa mampa mpe mwa bilanga bya vino ebele.
Isai LinVB 36:18  Ezekia abuba bino te, aloba te : « Yawe akobikisa bino. » Banzambe ba mikili misusu babikisi nde bikolo bya ba­ngo o maboko ma mokonzi wa Asur ?
Isai LinVB 36:19  Wapi banzambe ba Amat mpe ba Arpad ? Wapi banzambe ba Sefarvayim ? Wapi banzambe ba ekolo ya Samaria ? Babikisi nde Samaria o maboko ma ngai ?
Isai LinVB 36:20  O kati ya ba­nzambe ba bikolo bina binso, wapi banza­mbe baye babikisi ekolo ya bango o maboko ma ngai ? Bongo Yawe akobikisa nde Yeruzalem ? »
Isai LinVB 36:21  Batikali nye mpe bazongisi liloba lyoko te, mpamba te, mokonzi alobaki na bango : « Bozongisela ye liloba te. »
Isai LinVB 36:22  Eliakim, mwana wa Kilkia, mokengeli wa ndako ya mo­konzi, Sebna, mokomi wa mi­nkanda, na ntoma Yoa, mwana wa Asaf, bazongi epai ya Ezekia, na bilamba bipaswani, mpe bayebisi ye maloba manso moyangeli alobaki.