Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 27
Jere LinVB 27:1  O ebandela ya bokonzi bwa Sedekia, mwana wa Yozia, mokonzi wa Yuda, Yawe alobi na Yeremia maloba maye :
Jere LinVB 27:2  Yawe alobi na ngai boye : Omisalela mikulu mpe ekangiseli, tia yango o mapeke ma yo.
Jere LinVB 27:3  Na nsima otindela bakonzi ba Edom, ba Moab, ba Amon, ba Tiro na Sidoni nsango na maboko ma bantoma ba bango bayei o Yeruzalem epai ya Sedekia, mokonzi wa Yuda.
Jere LinVB 27:4  Bayebisa ba­nkolo ba bango ’te : « Yawe wa bokasi bo­nso, Nzambe wa Israel alobi boye : Boloba na bankolo ba bino :
Jere LinVB 27:5  Na bo­kasi bwa loboko la ngai, nakelaki nse na bato na nyama inso izali wana, nakopesa yango na bato ngai nalingi.
Jere LinVB 27:6  Sikawa nakabi bikolo bina binso o maboko ma Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, mosaleli wa ngai. Napesi ye mpe nyama isalela ye.
Jere LinVB 27:7  Bato ba bikolo binso bakosalela ye na mwana wa ye mpe na nkoko wa ye. Kasi mokolo moko bato ba bikolo bisusu na bakonzi banene bakokomisa ye moombo.
Jere LinVB 27:8  Bato ba ekolo to mokili ata nini baye bakoboya kosalela Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, mpe bakoboya komeme mokumba mwa eka­ngiseli ya Nabukodonozor, mo­konzi wa Babilon, nakotumbola ba­ngo na mopanga to na nzala ekasi to na bokono bobe, tee nakosilisa bango na maboko ma ye. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 27:9  Bino, bondima maloba ma baprofeta ba bino te ; boboya koyoka bamoni-makambo, baloti ndoto na banganga ata banani, baye bakolobaka na bino : ‘Bokokoma ba­ombo ba mokonzi wa Babilon te !
Jere LinVB 27:10  Na makambo ma lokuta bakosangelaka bino bakosala ’te bakolongola bino mosika na ekolo ya bino, mpe ngai nakobe­ngana bino mpe bokokufa.
Jere LinVB 27:11  Kasi soko bato bandimi komeme mokumba mwa ekangiseli ya mokonzi wa Babilon mpe bakosalela ye, nakokomisa ekolo ya bango kimia ; bongo bato bakokata bilanga mpe bakotikala o mokili mona. Yawe alobi bongo. »
Jere LinVB 27:12  Na Sedekia, mokonzi wa Yuda, nalobi bobele bongo : « Bondima ko­meme mokumba mwa ekangiseli ya mokonzi wa Babilon ; botosa ye na mpe bato ba ye, mpo ’te botikala na bomoi.
Jere LinVB 27:13  Mpo nini yo na bato ba yo bolingi kokufa na mopanga, na nzala ekasi to na bokono bobe, lokola ekolo eye Yawe akaneli soko baboyi kotosa mokonzi wa Babilon ?
Jere LinVB 27:14  Bondima maloba ma baprofeta te, baye bakolobaka : ‘Bokozala ba­o­mbo ba mokonzi wa Babilon te.’ Ba­ngo bakosakolaka makambo ma loku­ta.
Jere LinVB 27:15  Yawe alobi boye : Ngai natindi bango te, bakosakolaka makambo ma lokuta o nkombo ya ngai ; yango wana nakobengana bino mpe bokokufa elongo na baprofeta ba bino. »
Jere LinVB 27:16  Nalobi na banganga Nzambe mpe na bato banso : « Yawe alobi boye : Bondima maloba ma baprofeta te, baye bakosakolaka ’te biloko bya nkita bya Tempelo bikendeki o Babilon bikozongela bino noki. Bazali koloba makambo ma lokuta.
Jere LinVB 27:17  Bondima bango te. Bosalela mokonzi wa Babilon mpe bokotikala na bomoi. Mpo nini engumba eye ebeba nye ?
Jere LinVB 27:18  Soko bazali baprofeta ba solo, baye bakolobaka liloba lya Yawe, mbele bakobondela Yawe wa bokasi bonso mpo ’te biloko bitikali naino o Tempelo ya Yawe mpe o ndako ya bakonzi ba Yuda mpe o Yeruzalem bikende o Babilon te.
Jere LinVB 27:19  Mpamba te, Yawe alobi mpo ya makonzi manene, Ebo­mbelo ya mai, bitemiseli na biloko bisusu bitikali naino o engu­mba eye,
Jere LinVB 27:20  biye Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, alongolaki te, ntango aka­ngaki o Yeruzalem Yekonia, mwana wa Yoyakim, mokonzi wa Yuda, na bankumu banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem, mpo akende na bango o Babilon.
Jere LinVB 27:21  Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi bo­ngo mpo ya biloko bitikali naino o Tempelo, o ndako ya mokonzi mpe o Yeruzalem.
Jere LinVB 27:22  Bakokende na biloko bina o Babilon ; bikotikala kuna kin’o mokolo ngai nakokanisa bya­ngo lisusu. Maloba ma Yawe. O nta­ngo ena nakozo­ngisa byango o esika eye ! »