Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 42
Jere LinVB 42:1  Bakomanda banso, Yokanan mwana wa Karea, na Azarya mwana wa Osaya, bakei na bato banso, banene na bake, epai ya profeta Yeremia,
Jere LinVB 42:2  balobi na ye : « Ndima mabondeli ma biso ! Sa­mbela Yawe Nzambe wa yo ayokela biso banso bato totikali mawa ; ata tozalaki liboso bato baike totikali se mwa ndambo, lokola yo mo­ko omoni.
Jere LinVB 42:3  Yawe Nzambe wa yo alakisa biso nzela nini tolanda mpe ninitosengelikosala. »
Jere LinVB 42:4  Profeta Yeremia ayanoli bango : « Nayoki, nakosambela Yawe Nzambe wa bino mpo ya bino se lokola bose­ngi ngai. Nakoyebisa bino maloba ma­nso Yawe akoyanola bino, nakobo­mbela bino eloko te. »
Jere LinVB 42:5  Balobi na Yeremia : « Yawe nta bosembo azala nzeneneke wa biso ! Soko tosali te lokola Yawe Nzambe wa yo akoloba na yo mpo ya biso,
Jere LinVB 42:6  ésepelisa biso to te, tokotosa maloba ma Yawe Nzambe wa biso, mpo biso bato to­tindi yo. Soko tokotosa Yawe Nza­mbe wa biso tokozwa bolamu. »
Jere LinVB 42:7  Nsima ya mikolo zomi Yeremia ayoki maloba ma Yawe,
Jere LinVB 42:8  abengi Yokanan, mwana wa Karea, bakomanda na bato banso, bato banene na bake.
Jere LinVB 42:9  Alobi na bango : « Bose­ngeki ngai ’te nabondela Yawe, Nzambe wa Israel. Ye moto alobi boye :
Jere LinVB 42:10  Soko bondimi kotikala o mokili moye, ngai nakolendisa bino, nakosilisa bino lisusu te ; nakolona bino, nakopikola bino lisusu te, zambi nayoki mawa mpo ya mabe nasalaki bino.
Jere LinVB 42:11  Bobanga moko­nzi wa Babilon te, oyo azali kobangisa bino ; maloba ma Yawe. Bobanga ye te, zambi ngai nazali na bino mpo ya kosalisa mpe kobikisa bino o maboko ma ye.
Jere LinVB 42:12  Soko ngai nayokeli bino mawa, ye mpe akoyokela bino mawa mpe akotika bino mpo bozonga o mabelé ma bino.
Jere LinVB 42:13  Kasi soko boboyi kotosa Yawe Nzambe wa bino mpe bolobi : ‘Tokotikala o mokili moye te,
Jere LinVB 42:14  tolingi kokende o Ezipeti mpe kotikala kuna, tolingi lisusu komono bitumba te, koyoka mindule te, kokufa na nzala te’,
Jere LinVB 42:15  bi­no banso bato ba Yuda botikali naino, boyoka liloba lya Yawe : Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi boye : Soko bokani kokende o Ezipeti mpo ya kotikala kuna,
Jere LinVB 42:16  mopanga bozali kobanga mo­kobete bino kuna o mokili mwa Ezipeti, mpe nzala eye ezali kotu­ngisa bino ekoka­nga bino kuna o Ezipeti ; bokokufa kuna !
Jere LinVB 42:17  Bato banso bakani kokende o Ezipeti mpo ya kofanda kuna, bakokufa na mopanga, na nzala ekasi mpe na bokono bobe. Ata moto moko te akotikala to akobika o mpasi eye nakotindela bango.
Jere LinVB 42:18  Ya solo, Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi boye : Lokola nkanda ya ngai enene ekitelaki bato ba Yeruzalem, se bongo nkele ya ngai ekokitela bino soko bokei o Ezipeti. Bokokoma eloko ya nsomo mpe ya kokamwa, bakotombela bino bobe mpe bakoseke bino, mpe bokomono ekolo eye lisusu te.
Jere LinVB 42:19  Yawe alobi na bino, bato ba Yuda baye batikali : ‘Bokende o Ezipeti te !’ Boyeba malamu ’te lelo nakebisi bino ’te
Jere LinVB 42:20  bozali kobunga mpe­nza. Bino mo­ko botindaki ngai epai ya Yawe Nzambe wa biso mpe bosengeki ngai : ‘Sambelela biso epai ya Yawe Nzambe wa biso, yebisa biso maye manso Yawe Nzambe wa biso akotinda, mpo totosa ye !
Jere LinVB 42:21  Nauti koyebisa bino, kasi boyoki Yawe Nza­mbe wa bino te, bondimi ata liloba lyoko te lya maloba ma­nso atindaki ngai ’te nayebisa bino.
Jere LinVB 42:22  Bongo boyeba malamu ’te bokokufa na mopanga, na nzala ekasi mpe na bokono bobe o ekolo eye bolingi kofanda. »