JOB
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
Chapter 32
Job | LinVB | 32:1 | Na nsima bato baye basato batiki koyanola Yob, zambi akanisi bobele ’te azali moto semba. | |
Job | LinVB | 32:2 | Kasi Eliu, mwana wa Barakel, moto wa Buz, wa etuka ya Ram, asiliki. Asilikeli Yob mingi, zambi Yob akanisi ’te alongi o miso ma Nzambe. | |
Job | LinVB | 32:3 | Asilikeli mpe baninga basato, mpo bazalaki na eyano ya solo te, mpe bakokaki kondimisa Yob te ’te asalaki mabe. | |
Job | LinVB | 32:5 | Kasi awa amoni ’te moko wa bango basato akoki koyanola eloko te, akomi koyoka nkanda. | |
Job | LinVB | 32:6 | Na nsima Eliu, mwana wa Barakel, moto wa Buz, alobi : Ngai nazali se mwana, bino bozali bakolo, yango wana nabangaki kolakisa bino mayele ma ngai. | |
Job | LinVB | 32:10 | Yango wana nasengi bino : boyoka ngai, ngai mpe nalingi koyebisa bino mayele ma ngai. | |
Job | LinVB | 32:11 | Ya solo, nazalaki na elikya ’te bokoloba malamu, natiaki matoi mpenza na mayele ma bino, nayoka maloba nini bokozongisela ye. | |
Job | LinVB | 32:12 | Nalandaki bino malamu mpenza, kasi ata moko ayanolaki Yob malamu te, ata moko akweisaki ye na maloba ma ye te. | |
Job | LinVB | 32:13 | Bongo boloba te ’te : « Tokutani na moto wa bwanya, toyoki mateya ma Nzambe, ma bato te. » | |
Job | LinVB | 32:19 | Nayoki libumu lokola nameli vino ya sika mingi, eye elingi kopasola ata libenga lya sika. | |
Job | LinVB | 32:20 | Yango wana nakoloba mpo ’te nazwa mpema, nakofungola monoko mpo ’te nazongisa maloba. | |