LUKE
Chapter 7
Luke | LinVB | 7:2 | Komandá mǒkó azalákí na mosáli óyo akolingaka míngi. Mosáli ôná azalákí na mpási enéne, alingí ákáta motéma. | |
Luke | LinVB | 7:3 | Komandá óyo ayókákí nsango ya Yézu, bôngó atíndélí yě bakóló basúsu ba ba-Yúda bábóndela yě áyâ kobíkisa mosáli wa yě. | |
Luke | LinVB | 7:4 | Ekómí bangó epái ya Yézu, babóndélí yě míngi, balobí : « Yě azalí moto malámu, ebongí ósálisa yě, | |
Luke | LinVB | 7:6 | Yézu akeí na bangó elongó. Ekómí yě penepene na ndáko, komandá atíndélí yě báníngá báyébisa yě : « Mokonzi, ómítungisa té ! Nabongí té ’te óyíngela o ndáko ya ngáí. | |
Luke | LinVB | 7:7 | Yangó wâná nabángákí koyâ ngáí mǒkó kokútana na yǒ. Kasi lobá mpé mosáli wa ngáí akobíka. | |
Luke | LinVB | 7:8 | Atâ nazalí na bakonzi libosó lya ngáí, nazalí mpé na basodá nsima ya ngáí. Sókó nalobí na mǒkó ‘Kendé’, akokende ; na mosúsu ‘Yáká’, akoyâ ; mpé na mosáli wa ngáí ‘Sálá mosálá moye’, akosála mwangó. » | |
Luke | LinVB | 7:9 | Eyókí Yézu maloba mâná, aká-mwí na yě. Amíbóngólí epái ya bato bazalákí kolanda yě, alobí : « Nalobí na bínó : Atâ o Israél nakútí naíno moto wa boyambi boye té. » | |
Luke | LinVB | 7:11 | Na nsima Yézu akeí o mbóka yǒkó nkómbó ’te Naim. Bayékoli ba yě na bato ebelé bakeí na yě nzelá yǒkó. | |
Luke | LinVB | 7:12 | Ekómí bangó penepene na ezibeli ya mbóka, bazwǎ ní na bato bakeí kokunda elengé mobáli, mwána sé mǒkó wa mwásí akúfélí mobáli. Bato ba mbóka ebelé bazalákí kokende na yě elongó. | |
Luke | LinVB | 7:14 | Abelémí mpé asímbí epómba. Bato bamemí ebembe batélémí. Alobí : « Elengé mobáli, nalobí na yǒ : télémé ! » | |
Luke | LinVB | 7:16 | Bato bánso bayókí nsómo, bakúmísí Nzámbe, balobí : « Proféta monéne abimí o ntéi ya bísó, Nzámbe ayéí kotála ekólo ya yě. » | |
Luke | LinVB | 7:19 | atíndí bangó epái ya Mokonzi bátúna yě : « Yǒ ozalí moto óyo asengélí koyâ, tǒ tózila moto mosúsu ? » | |
Luke | LinVB | 7:20 | Bangó bakómí epái ya Yézu, balobí na yě : « Yoáne Mobátisi atíndí bísó tótúna yǒ : Yǒ ozalí moto óyo asengélí koyâ, tǒ tózila moto mosúsu ? » | |
Luke | LinVB | 7:21 | O ntángo êná Yézu abíkísí bato míngi bazalákí na bokono tǒ na mpási, ná mpé baye bakangémákí na bilímo bibé ; afungólí mpé míso ma bato baíké bazalákí na lolandá. | |
Luke | LinVB | 7:22 | Yezu alobí na bayékoli ba Yoáne : « Bókende koyébisa Yoáne maye bomóní mpé boyókí : bato ba lolandá bakómí komóno, baténgoli bakómí kotámbola, bato ba maba bakómí péto, bato bakúfá matói bakómí koyóka, bawéi basékwí, mpé babóla bazalí koyóka Nsango Elámu. | |
Luke | LinVB | 7:24 | Ntángo bato Yoáne atíndákí bakeí, Yézu abandí koloba na bato mpô ya Yoáne : « O elíkí bokendékí kotála níni ? Monkékélé moningání na mompepe ? | |
Luke | LinVB | 7:25 | Bokendékí kotála níni ? Moto alátí bilambá bya nkita ? Wápi ! Baye bakolátaka bilambá kitóko mpé bazalí na bomengo bakofándaka o ndáko ya bakonzi ! | |
Luke | LinVB | 7:26 | Bôngó bokendékí kotála náni ? Proféta ? Ya sôló sôló, nalobí na bínó : proféta ! Kútu alekí baproféta bánso. | |
Luke | LinVB | 7:27 | Mpô ya yě bakomí boye : Tálá natíndí ntóma wa ngáí libosó lya yǒ mpô ’te ábongisela yǒ nzelá.’ | |
Luke | LinVB | 7:28 | Nalobí na bínó : O ntéi ya bána bánso bamamá babótá, óyo alekí Yoáne na bonéne azalí té. Nzókandé moto wa nsúka o Bokonzi bwa Nzámbe alekí yě na bonéne. | |
Luke | LinVB | 7:29 | Bato bánso ná bafútisi mpáko bayókákí Yoáne, bakúlí batísimo na mabóko ma yě, bandimí bôngó bosémbo bwa Nzámbe. | |
Luke | LinVB | 7:30 | Kasi ba-Farizéo na batéyi ba Mobéko babóyákí maye Nzámbe alingákí kosála bangó, zambí bakúlákí batísimo ya Yoáne té. | |
Luke | LinVB | 7:32 | Bazalí lokóla bána bafándí o esíká yǒkó mpé bazalí kobélelana boye : ‘Tobétélékí bínó mpiólóló, kasi bobínákí té ! | |
Luke | LinVB | 7:33 | Awa Yoáne Mobátisi ayéí, azalákí kolía mámpa té tǒ komele víno té, mpé bolobí : ‘Azalí na zábolo !’ | |
Luke | LinVB | 7:34 | Ntángo Mwána wa Moto ayéí, azalákí kolía mpé komele, mpé bolobí : ‘Tálá moto wa lokósó mpé momeli masanga, móníngá wa bafútisi mpáko mpé wa basúmuki !’ | |
Luke | LinVB | 7:36 | Mo-Farizéo mǒkó abéngí Yézu ákende kolía o ndáko ya yě. Yézu akótí o ndáko ya mo-Farizéo mpé akeí kofánda o méza. | |
Luke | LinVB | 7:37 | Mwásí mǒkó, óyo ayébání o mbóka lokóla mosúmuki, ayókákí ’te Yézu azalákí kolía o ndáko ya mo-Farizéo ; ayéí na molangi mwa malási. | |
Luke | LinVB | 7:38 | Amífándísí penepene na makolo ma Yézu ; alelí, bôngó mái ma míso matangélí Yézu o makolo ; apangúsí mangó na nsúki ya yě, azíngí makolo ma Yézu ekópi, mpé asopélí mangó malási. | |
Luke | LinVB | 7:39 | Mo-Farizéo óyo abéngákí Yézu amóní yangó, amílobélí : « Sókó moto óyo azalákí proféta, mbele ayébákí mwásí náni asímbí yě, mbele ayébákí ’te azalí mosúmuki ! » | |
Luke | LinVB | 7:40 | Yézu alobí na yě : « Simóni, nazalí na mwâ likambo lya koyébisa yǒ. » Yě azóngísi : « Motéyi, lobá. » | |
Luke | LinVB | 7:41 | Yézu alobí : « Bato bábalé bazalákí na nyongo ya moto : mǒkó nyongo ya denário nkámá ítáno, mosúsu ya ntúkú ítáno. | |
Luke | LinVB | 7:42 | Awa bakokí kofúta nyongo té, nkóló alímbísí bangó bábalé. Bôngó o ntéi ya bangó bábalé náni akolinga yě míngi ? » | |
Luke | LinVB | 7:43 | Simóni azóngísi : « Nakanísí óyo balímbísí yě nyongo enéne. » Yézu alobí na yě : « Oyanólí malámu. » | |
Luke | LinVB | 7:44 | Amíbóngólí epái ya mwásí, alobí na Simóni : « Omóní mwásí óyo ? Nayíngélí o ndáko ya yǒ, mpé opésí ngáí mái ma kosukola makolo té. Kasi yě asukólí mangó na mpízolí ya yě, mpé apangúsí mangó na nsúki ya yě. | |
Luke | LinVB | 7:47 | Yangó wâná nayébísí yǒ : Masúmu ma yě maíké malímbámí, mpô alakísí bolingi bonéne. Oyo bakolímbisa nyongo eké, akolakisa sé bolingi boké. » | |
Luke | LinVB | 7:49 | Bato bafándí na yě o méza babandí komítúna : « Moto óyo ndé náni ’te álímbisa masúmu ? » | |