Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next
Chapter 74
Psal LinVB 74:1  Mateya ma Asaf. E Nzambe, mpo nini obwaki biso seko ? Mpo nini osilikeli mpata ya etonga ya yo ?
Psal LinVB 74:2  Kanisa libota yo oponoki ut’o libandela, ekolo eye osikolaki mpo ’te ezala mokili mwa yo, ngomba Sion esika oyei kofanda.
Psal LinVB 74:3  Kende kotala bisika bina bikufi nye ; o esika ya yo esantu monguna abebisi binso.
Psal LinVB 74:4  O esika tokutanaki na yo, banguna bagangi makasi, kuna batiaki bendele bo bilembo bya bango.
Psal LinVB 74:5  Bazalaki kobete na epasoli, lokola balingaki kopasola nzete ya zamba.
Psal LinVB 74:6  Babuki bikeko binso tosalaki, bakati byango na mbeli mpe na ebeteli.
Psal LinVB 74:7  Batumbi ndako ya yo esantu, babuki mpe basantoli ndako ya nkombo ya yo.
Psal LinVB 74:8  Bamilobeli : « Toboma yango na mbala yoko ! » Batumbi ndako inso ya losambo o ekolo.
Psal LinVB 74:9  Bendele ya biso imononi lisusu te, baprofeta mpe te, mpe moto moko te ayebi soko ekosuka boni.
Psal LinVB 74:10  E Nzambe, mikolo boni monyokoli akotuka yo naino ? Monguna akosantola nkombo ya yo nde seko ?
Psal LinVB 74:11  Mpo nini ozongisi loboko la yo ? Mpo nini obombi loboko la yo la mobali ?
Psal LinVB 74:12  Nzokande, e Nzambe, Mokonzi wa ngai uta ebandela, yo mobikisi wa bato ba ekolo ya biso,
Psal LinVB 74:13  na bokasi bwa yo opasolaki mai ma mbu, opasolaki mitó mya bibuki bya nyama ya mai.
Psal LinVB 74:14  Yo moto onyataki motó mwa Ngando enene, okomisaki mwango bilei bya nyama ya zamba.
Psal LinVB 74:15  Otimolaki maziba mpe miluka, okaukisaki bibale bizangi mai mokolo moko te.
Psal LinVB 74:16  Yo nkolo wa moi mpe wa butu, yo moto okeli sanza na mwese.
Psal LinVB 74:17  Okati ndelo ya mokili epai na epai, okaboli eleko ya molunge mpe eleko ya mpio.
Psal LinVB 74:18  Okundola ’te monguna akotukaka yo, Mokonzi, ekolo ya bilema bakofingaka nkombo ya yo.
Psal LinVB 74:19  Pekisa kombekombe ilia ebenga ya yo te, obosana bato ba yo te, awa bazali koyoka mpasi.
Psal LinVB 74:20  Okundola bondeko okataki na biso, bipai binso o ekolo ya biso mibenga mitondi na babomi.
Psal LinVB 74:21  Moto anyokwami asambwa lisusu te, mobola na moto wa mpasi bakumisa nkombo ya yo !
Psal LinVB 74:22  Teleme, e Nzambe, omilakisa, kanisa ’te elema akotukaka yo mikolo minso !
Psal LinVB 74:23  Obosana migango mya banguna ba yo te, makeléle ma baye bayini yo mazali se kongala.