Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 26
Gene LinVB 26:1  Nzala enene, leka eye o eleko ya Abarama, eyei ko­nga­la o mokili. Izaka akei o Gerar o mokili mwa Abimelek, mokonzi wa ba-Filisti.
Gene LinVB 26:2  Yawe abimeli ye, alobi : « Kokende o Ezipeti te, tikala kofanda o ekolo eye nakolakisa yo.
Gene LinVB 26:3  Ofanda o mokili moye ; ngai nakozala na yo mpe nakobenisa yo, zambi nakopesa yo na bana ba yo mokili moye mobimba ; nakokokisa elako nalakelaka tata wa yo Abarama.
Gene LinVB 26:4  Bankoko ba yo bakozala baike lokola minzoto mya likolo, mpe nakopesa bango mabelé maye ma­nso. Bato ba bikolo binso bakozwa bolamu mpo ya bango,
Gene LinVB 26:5  zambi Abarama atosaki ngai, atosaki maloba ma ngai mpe alandaki mitindo na mibeko mya ngai. »
Gene LinVB 26:7  Bato ba mboka batuni ye mpo ya mwasi wa ye. Azongisi : « Azali ndeko wa ngai. » Abangi koloba ’te azali mwasi wa ye ; mbele bato ba mboka bakoboma ye mpo ya Rebeka, zambi azalaki mwasi kitoko.
Gene LinVB 26:8  Asili afandi kuna mikolo mingi, mokolo moko Abimelek, mokonzi wa ba-Filisti, awa atali o lininisa, amoni ’te Izaka azalaki kozinga Rebeka ekopi.
Gene LinVB 26:9  Abimelek abengi Izaka, alobi na ye : « Ntembe te, oyo azali mwasi wa yo ! Mpo nini olobaki ’te azali ndeko wa yo ? » Izaka azongisi : « Nakanisaki ’te okoki koboma ngai mpo ya ye, yango wana nalobaki bongo. »
Gene LinVB 26:10  Abimelek alobi lisusu : « Osali biso nini ko ? Soko moto wa mboka ya biso alalaki na mwasi wa yo, mbele omemisi biso ngambo. »
Gene LinVB 26:11  Abimelek apesi bato ba ye banso mobeko moye : « Tokoboma moto oyo akomeka kozala mobali oyo na mwasi wa ye mabe. »
Gene LinVB 26:12  Izaka azalaki kokata bilanga mpe bobele o mobu mona azwi biloko ebele ; solo, Yawe abenisi ye,
Gene LinVB 26:13  akomi moto monene. Mikolo minso azalaki kozwa biloko bya sika, akomi moto wa nkita mpenza.
Gene LinVB 26:14  Akomi nkolo wa ngombe na bi­bwele mingi, mpe na basali ebele. Ba-Filisti bakomi koyokela ye zuwa.
Gene LinVB 26:15  Ba-Filisti bazipi mabulu manso maye basali ba Abarama batimolaka kala.
Gene LinVB 26:16  Abimelek alobi na Izaka : « Longwa epai ya biso, zambi oleki biso na nguya. »
Gene LinVB 26:17  Izaka alongwi mpe akei kofanda o lobwaku la Gerar.
Gene LinVB 26:18  Izaka atimoli lisusu mabulu maye basali ba tata wa ye Abarama batimolaka mpe ba-Filisti bayaki kotondisa na mabelé nsima ya liwa lya Abarama ; apesi mango lisusu nkombo iye tata wa ye apesaka.
Gene LinVB 26:19  Awa basali ba Izaka bazalaki kotimola o lobwaku, bakuti liziba lya mai.
Gene LinVB 26:20  Kasi bakengeli ba ngo­mbe ba Gerar babandi koswana na bakengeli ba Izaka, balobi : « Mai maye mazali mai ma biso ! » Izaka atangi mai mana na nkombo Esek, zambi baswanisaki ye mpo ya ma­ngo.
Gene LinVB 26:21  Batimoli libulu lisusu, mpe ba­swani lisusu ; apesi lyango nko­mbo Sitna.
Gene LinVB 26:22  Alongwi mpe atimoli libulu lisusu. Sikawa baswanisi ye lisusu te ; apesi libulu lyango nko­mbo Rekobot, alobi : « Sikawa Yawe atikeli biso mabelé ; tokozwa biloko o mokili moye. »
Gene LinVB 26:24  Yawe abimeli ye na butu, alobi : « Nazali Nzambe wa tata wa yo Abarama, obanga te, zambi ngai nazali na yo. Nakobenisa yo, nakopesa yo bana na bankoko, zambi nalingi kotombola mosaleli wa ngai Abarama. »
Gene LinVB 26:25  Izaka atongi altare mpe abo-ndeli nkombo ya Yawe kuna. Apiki ema ya ye o esika ena, mpe basali ba ye batimoli libulu.
Gene LinVB 26:26  Abimelek atiki Gerar mpo ya kokutana na Izaka ; ayei na kapita wa ye Akuzat mpe na mokonzi wa basoda ba ye Pikol.
Gene LinVB 26:27  Izaka alobi na bango : « Ntina nini boyei epai ya ngai ? Bino bolingi ngai te mpe bobengani ngai o mboka ya bino. »
Gene LinVB 26:28  Bazongisi : « Sikawa tomoni polele ’te Yawe azali na yo ; yango wana tolobi : Malamu biso na yo tolayelana ndai. Tolingi kokata bondeko na yo.
Gene LinVB 26:29  Olaya ’te okosala biso mabe te, mpo biso tonyokoloki yo te, tosalaki yo se malamu mpe topesaki yo nzela ya kokende na boboto. Sikawa ozwi bobenisi bwa Yawe. »
Gene LinVB 26:30  Izaka alambeli bango limpati, balei mpe bameli.
Gene LinVB 26:31  Na ntongontongo balayelani ndai. Na nsima Izaka atiki bango bakende ; bakabwani bongo na boboto.
Gene LinVB 26:32  Se o mokolo mona basali ba Izaka bayei koyebisa ye mpo ya libulu batimolaki, balobi : « Tozwi mai. »
Gene LinVB 26:33  Apesi libulu lyango nko­mbo Sabé. Tee lelo bakobengaka mboka ezali kuna Berseba, lokola ‘te : ‘Libulu lya ndai’.
Gene LinVB 26:34  Ekokisi Ezau mibu ntuku inei, abali basi babale : moko Yeudit, mwana wa Beeri, mo-Eti ; mosusu Basmat, mwana wa Elon, mo-Eti lokola.
Gene LinVB 26:35  Bango bayokisi Izaka na Rebeka mpasi mingi o motema.