Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
HABAKKUK
Up
1 2 3
Chapter 1
Haba LinVB 1:1  Limoni lya profeta Abakuk ; batindi ye asakola boye :
Haba LinVB 1:2  E Yawe, ata nabeleli yo mbala boni, okoyoka ngai te ; ata nagangi o ntango nanyokwami, okobikisa ngai te.
Haba LinVB 1:3  Mpo nini ozali komonisa ngai ma­be ma bato mpe kondima ’te moto anyokwama mpamba ? Nazali komono bobele boyibi, bitumba, boswani ; boyokani bozali te.
Haba LinVB 1:4  Mibeko mizali lisusu te, bosolo mpe te ! Bato baboyi Nzambe bakonyokoloko basemba, bakobongolaka bosembo bobo­ngoli mpenza.
Haba LinVB 1:5  Tala makambo ma bato o bikolo binso, banga mpe lenge na nsomo ! O mikolo mya yo likambo lyoko likosalema, soko bato basololi yo lyango, okondima te.
Haba LinVB 1:6  Ya solo, ngai oyo nakotinda ba-Kaldea, bato bayebi kobunda mpe bazali na mawa te. Bakokatisaka mikili mpe bakobotoloko ndako ya bato.
Haba LinVB 1:7  Bazali bato ba nsomo, bato bakobangisaka, bamoni bokasi bwa bango lokola lokumu mpe bonene bwa bango !
Haba LinVB 1:8  Farasa ya bango ileki nkoi na mbangu, ileki ata mbuli eye ekotambolaka na butu. Basoda ba farasa bakoutaka mosika, bakopimbwaka lokola engondo eye ekiti mpo ya kokanga nyama.
Haba LinVB 1:9  Bakoya koyiba biloko, bilongi na nkanda lokola mompepe mwa Esti, bakokanga bato o boombo lokola zelo.
Haba LinVB 1:10  Bakosisola bakonzi, bakoseke bankumu. Ata bato batongi bibombamelo makasi, bakotia mabelé penepene na efelo mpe bakobotolo byango.
Haba LinVB 1:11  Na nsima bakolongwa mpe bakokende lokola mompepe : bokasi bwa bango, nde nzambe wa bango.
Haba LinVB 1:12  Yo ozali Yawe ut’o kala, ozali Nzambe wa ngai mpe Mosantu wa ngai, okokufa mokolo moko te. E Yawe, otindaki bango balakisa bosolo bwa yo, olendisaki bango mpo batumbola biso.
Haba LinVB 1:13  Kasi miso ma yo makoki kondima bobe te, okoki kondima te ’te bato banyokolo baninga. Mpo nini ozali kotala bato babe se na miso mpe kokanga monoko ntango moto mabe azali kosukisa moto aleki ye na bosembo ?
Haba LinVB 1:14  Ozali kosala bato lokola mbisi ya mbu, lokola mbisi ike izali na mobateli te !
Haba LinVB 1:15  Monguna akomi koboma bato na ndobo, na minyama mpe na mileke lokola bakobomaka mbisi ; yango wana ayoki esengo, asepeli !
Haba LinVB 1:16  Na nsima akobonzela monyama mwa ye mabonza, mpe akotumbela moleke mwa ye mpaka, mpo bisaleli bya ye bikopesaka ye mbano, bikozwelaka ye biloko bya bolei ebele.
Haba LinVB 1:17  Mikolo boni minyama mya ye mikotonda naino na bobomi bato ba bikolo ebele, mawa te ?
Chapter 2
Haba LinVB 2:1  Nakopikama o linongi lya mokengeli, nakoteleme o efelo ya mboka, mpo nayeba nini akoloba na ngai, eyano nini akopesa mpo ya boleli bwa ngai.
Haba LinVB 2:2  Yawe abengi ngai, alobi : « Koma limoni o libaya mpo ’te bakoka kotanga lyango malamu.
Haba LinVB 2:3  Mpamba te, limoni liye likosalema lelo naino te, kasi lilingi liya, ezali ya ntembe te. Ata liyei noki te, zila se lyango, zambi likoumela te, likoya, ntembe ezali te.
Haba LinVB 2:4  Moto azali na motema bosembo te, akobika te, moto semba akobika mpo ya lobokó la ye. »
Haba LinVB 2:5  Ntembe te, vino ekotambwisaka motó. Moto wa lolendo, oyo azali motema likolo, akofungola mongongo lokola libulu lya liwa mpo alingi komele bato lokola Mboka ya bawa. Alingi kozala mokonzi wa bikolo binso, bikolo binso bizala mokili mwa ye !
Haba LinVB 2:6  Bato banso bakokomisa ye liseki, bakoseke ye na nzembo ya bango, bakoloba : Mawa na oyo akokamataka biloko bizali bya ye te. Mikolo boni naino nyongo ya ye ekokola se bokoli ?
Haba LinVB 2:7  Bankolo bakoya kosenge nyongo epai ya yo te ? Baye bakofutisa yo mosolo bakolamuka te ? Bakokanga yo !
Haba LinVB 2:8  Awa obotoli biloko bya bikolo biike, bato ba bikolo bina bakotikala bakobotolo mpe bya yo. Mpamba te, osopaki makila ma bato, obebisaki mokili, engumba mpe bato bafandi wana.
Haba LinVB 2:9  Mawa na oyo ayibi biloko mpo ya kotia o ndako ya ye, mpo atonga ndako ya ye o ngo­mba, mpe mpasi ekweli ye te.
Haba LinVB 2:10  Kasi oyokisaki ndako ya yo nsoni enene, mpo obomi bato ebele, omilukeli liwa.
Haba LinVB 2:11  Mabanga makoganga ut’o efelo, mabaya ma motondo mwa ndako makondimela mango.
Haba LinVB 2:12  Mawa na oyo atongi engumba na bobomi bato, mpe abongisi engumba ya sika na makambo mazangi bosembo.
Haba LinVB 2:13  Ezali ndinga ya Yawe wa bokasi bonso te ’te bato bamiyokisa mpasi mpo ya kozwa móto, mpe bato ba bikolo bamilembisa mpo ya kozwa eloko ata nini ?
Haba LinVB 2:14  Zambi mokili mokotonda na boyebi nkembo ya Yawe, lokola mai matondisi mbu !
Haba LinVB 2:15  Mawa na oyo amelisi baninga masanga, atii monô mpo balangwa noki, bongo atala bolumbu bwa bango.
Haba LinVB 2:16  Solo, omitondisi na nsoni, ozwi lokumu te ! Yo mpe mele mpe lakisa bosutu bwa yo. Okokima nkeni te eye Yawe akomelisa yo, lokumu la yo lokosila, okozinda na nsoni.
Haba LinVB 2:17  Bitumba obimisaki o Libano bikozindisa yo ; ozalaki koboma bato na nsomo lokola nyama ; solo, osopaki makila ma bato mpe obebisaki mokili, engumba mpe bato bafandi wana.
Haba LinVB 2:18  Ekeko esalemi na maboko ma mosali ekosala bato nini ? Ekeko batulaki na bibende ekokosaka bato. Mpo nini mosali bikeko atia eli­kya na mosala mwa ye, awa moto akobimisaka se biloko bikolobaka te ?
Haba LinVB 2:19  Mawa na oyo akoloba na eloko ya nzete : Teleme !, to akoloba na libanga mpamba : Lamuka ! Ata bakembisi byango na wolo mpe na palata, bizali na mpema ya bomoi te !
Haba LinVB 2:20  Kasi Yawe afandi o Tempelo ya ye esantu, bato banso ba nse bafanda nye o boso bwa ye.
Chapter 3
Haba LinVB 3:1  Losambo la profeta Abakuk, loyembama na lolaka la mawa.
Haba LinVB 3:2  E Yawe, nayoki nsango ya bikela bya yo, E Yawe, misala mya yo miba­ngisi ngai mingi ! Lendisa myango o mikolo miye, bato ba mikolo miye bamono myango. Ata oyoki nkanda, kanisa motema ngolu mwa yo.
Haba LinVB 3:3  Nzambe akouta o Teman, Mosantu akouta o ngomba Paran. Likolo litondi na nkembo ya ye, nse etondi na lokumu la ye.
Haba LinVB 3:4  Azali kongenge lokola moi, miinda mizali kongenge o maboko ma ye, mibombi nguya ya ye.
Haba LinVB 3:5  Atambwisi bokono bobe o boso bwa ye, mpe molunge molandi makolo ma ye.
Haba LinVB 3:6  Atelemi mpo ya koningisa mokili, atali mpe alengisi bato ba bikolo binso. Apasoli ngomba inene iye ibo­ngwanaka te, akweisi ngomba ike ya kala, nzela ya ye banda kala.
Haba LinVB 3:7  Namoni biema bya Kusan bibebi mpe bibombamelo bya mokili mwa Madian bizali kolenge.
Haba LinVB 3:8  Yawe, okaneli nde mai ma miluka ? To oyokeli mai ma mbu nkanda ? Na ntina ena obuteli farasa ya yo mpe otambwisi makalo maye makolongisa yo ?
Haba LinVB 3:9  Olengeli litimbo lya yo mpo ya kobete. Maloba ma ndai ya yo mazali lokola mimbai ; opasoli mabelé na mai ma miluka.
Haba LinVB 3:10  Ngomba imoni yo, ikomi kole­nge, zambi onokisi ebakata ya mbula. Lobwaku lonene losali makeléle, mai bozindo matomboli mbonge.
Haba LinVB 3:11  Mwese na sanza bitikali o bisika bya byango, ilimwi o ntango obeti mimbai mi­ngengi makasi mpe obwaki makongo ma minkalali.
Haba LinVB 3:12  Na nkanda oleki o mokili mobi­mba mpe onyati bikolo binso na makolo.
Haba LinVB 3:13  Obimi mpo ya kobikisa bato ba ekolo ya yo mpe baye opakoli mafuta. Obomi ndako ya moto mabe, obuki ndako tee mabanga ma nse.
Haba LinVB 3:14  Na makula ma yo otuboli moko­nzi wa basoda, baye balingaki kopanza biso, na migango mya esengo, lokola bakei kosilisa moto wa mawa.
Haba LinVB 3:15  Na farasa ya yo onyataki mbu, likolo lya mai matombwani !
Haba LinVB 3:16  Nayoki nsango ! Nakomi koba­nga, mbebu ya ngai ikomi kolenge mpo ya lokito lona, minkuwa mya ngai milembi, makolo mazali na bokasi bwa koteleme lisusu te. Nazali kozila na motema mpio mokolo moye mwa nsomo, mokobimela bato balukaki biso na bitumba.
Haba LinVB 3:17  Solo, nzete ya figi ekobota mbuma lisusu te, nzete ya vino mpe te, nzete ya oliva ekosisola bato. Biloko bya kolia bikobotama o bilanga lisusu te, mpata ya etonga ikosila, o ndako ya bibwele ngombe ikozala lisusu te.
Haba LinVB 3:18  Kasi ngai nakoyoka esengo mpo ya Yawe, nakosepela mpo ya Nzambe Mobikisi wa ngai !
Haba LinVB 3:19  Yawe azali Mokonzi wa ngai mpe bokasi bwa ngai, akokomisa makolo ma ngai mba­ngu lokola mboloko, akotambwisa ngai o nsonge ya ngomba. Ya kapita wa bayembi. Na biye­mbeli bya nsinga.