Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 49
Isai LinVB 49:1  Bino bato ba bisanga, boyoka ngai, bino bato bofandi mosika, bofo­ngola matoi : Yawe abyangi ngai ut’o libumu lya mama wa ngai, atangi nkombo ya ngai liboso ’te nabotama.
Isai LinVB 49:2  Abongisi monoko mwa ngai lokola mopanga mopotu, abateli ngai o elilingi ya loboko la ye, akomisi ngai lokola likula lipotu, abombi ngai malamu o libenga lya ye lya makula.
Isai LinVB 49:3  Alobi na ngai : « Israel, ozali mosaleli wa ngai, nakozwa lokumu na mosala mwa yo. »
Isai LinVB 49:4  Mpe ngai nalobaki : Namilembisi se mpamba, nasilisi bokasi bwa nzoto mpo ya eloko mpamba. Nzokande Yawe akolongisa ngai, Nzambe akopesa ngai mbano.
Isai LinVB 49:5  Nazwi lokumu o miso ma Yawe, Nzambe azali bokasi bwa ngai. Mpe sikawa Yawe alobi, ye moto abongisi ngai o libumu lya mama, mpo ’te nazala mosaleli wa ye, bongo nazongisa bato ba Yakob o maboko ma ye, mpe nasangisa bato ba Israel o libota lyoko.
Isai LinVB 49:6  Alobi na ngai : « Ekoki te ’te ozala se mosaleli wa ngai, mpo ya kotombola mabota ma Yakob mpe kozongisa bato ba Israel babikaki o liwa. Nakokomisa yo mpe mwinda mwa bikolo binso, mpo ’te bato ba mokili mobimba babika. »
Isai LinVB 49:7  Yawe, Mobikisi mpe Mosantu wa Israel aloba boye na moto oyo atiolami mpe aboyami na bato banso, na oyo akomi moombo wa baya-ngeli babe : « Bakonzi banene bakomono yo mpe bakoteleme, bankumu mpe bakotala mpe bakogumbama o nse, mpo ya Yawe wa lobokó, Mosantu wa Israel, oyo aponi yo. »
Isai LinVB 49:8  Yawe alobi boye : O ntango nalakisaki bolingi, na­ndimeli yo, o mokolo mwa libiki, nasalisi yo. Nabongisi yo mpe naponi yo mpo ya kozala bondeko na bato baye, mpo ya kolendisa ekolo, kozongisela bato mabelé,
Isai LinVB 49:9  mpe koloba na baye bakangemi o boombo : « Bobima wana », mpe na baye bafandi o molili : « Bomilakisa ! » Lokola mpata ikozwaka bilei o nzela inso, bakozwa biloko o bisika bya mabanga.
Isai LinVB 49:10  Bakoyoka lisusu nzala mpe mposa ya mai te, molunge mwa moi mpe mwa zelo mokolembisa bango te, mpo oyo atondi na ngolu akoka­mba bango mpe akolakisa bango maziba ma mai ma mpio.
Isai LinVB 49:11  Nakopasola nzela o kati ya ngo­mba inso, mpe nakotondisa mabulu o nzela inso.
Isai LinVB 49:12  Tala, bauti mosika, basusu o Nordi mpe o Westi, basusu o Sinim.
Isai LinVB 49:13  Likolo, yemba nzembo, mokili sepela, ngomba boganga na nsai, zambi Yawe abondi bato ba ye, bato ba mawa, ayokeli bango ngolu.
Isai LinVB 49:14  Bato ba Sion balobaki : « Yawe atiki biso, Mokonzi wa biso abosani biso ! »
Isai LinVB 49:15  Mama akoki nde kobosana mwa­na oyo akonungisaka ? Akoki nde kotika kolinga mwana oyo amemeki o libumu ? Ata bamama bakoki kobosana bana ba bango, ngai nakobosana bino mokolo moko te !
Isai LinVB 49:16  Tala, nakomi nkombo ya yo o kati ya loboko la ngai, nakopanganaka na mboka ya yo ntango inso.
Isai LinVB 49:17  Bato bakotonga mboka ya yo bakoya noki, bato babotoloki mpe babebisaki yo ndebakei.
Isai LinVB 49:18  Bwaka miso zongazonga na yo mpe tala : bato banso basangani mpe bazali koya epai ya yo. Yawe alobi : Lokola nazali na bomoi, bango bakokembisa yo lokola eloko ya motuya, bakozala lokola liputa likobongisaka mwasi alingi abala.
Isai LinVB 49:19  Solo, ndako ya yo ikufi mpe mokili mobebi, awa mokomi moke, bato bakoki kofanda wana lisusu te, mpe baye bazalaki konyokolo yo bakolongwa.
Isai LinVB 49:20  Bana ba yo, baye okanisaki ’te babungi, bakoloba lisusu o matoi ma yo : « Mboka eleki moke mpo tofanda wana, lukela biso esika mpo ’te biso mpe tofanda. »
Isai LinVB 49:21  Mokolo mona okomilobela : « Nani aboteli ngai bana baye ? Nazangaki bana, nazalaki eko­mba, nakendeki boombo mpe babwakaki ngai, bongo bana baye, nani abokoli ba­ngo ? Nazalaki ngai moko, bango bazalaki nde wapi ? »
Isai LinVB 49:22  Mokonzi Yawe alobi boye : « Nakotombola loboko epai ya ba­to ba bikolo, nakotelemisa bendele mpo ’te ba­mono yango. Bakozongisela yo bana ba yo o maboko, bakomeme bana basi ba yo o mapeke.
Isai LinVB 49:23  Bakonzi bakozala batata babokoli ba yo, mpe bana basi ba bakonzi bakobokolo yo. Bakogumbamela yo bilongi o nse, bakoya kolete mputulu ya makolo ma yo. Bongo okoyeba ’te ngai nazali Yawe, baye bakotiaka elikya na ngai, bakoyoka nsoni te. »
Isai LinVB 49:24  Bakobotoloko nde elombe eloko akamati o etumba ? Moombo wa monyokoli, akoki nde kokima ?
Isai LinVB 49:25  Kasi Yawe alobi boye : Ya solo, bakobotolo elombe moombo wa ye, bakobikisa moto akomi moombo wa mobuni ! Moto aluki yo na likambo, nakoluka ye mpe na likambo, ngai moko nakobikisa bana ba yo.
Isai LinVB 49:26  Nakosala ’te banyokoli ba yo babomana mpe balangwa na makila ma ba­ngo moko. Bongo bato banso bakondima ’te ngai Yawe nazali mobikisi wa yo, ’te Nzambe wa bokasi bonso wa Yakob azali mosikoli wa yo !