Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 18
Jere LinVB 18:2  « Teleme, kende o ndako ya mosali mbeki, kuna nakoyokisa yo maloba ma ngai. »
Jere LinVB 18:3  Nakei o ndako ya mosali mbeki mpe nakuti ye azalaki kosala mosala na yika.
Jere LinVB 18:4  Kasi awa mbeki eye azalaki koyema na libazi ebebi o maboko ma ye, ayemi mbeki esusu lokola mosali mbeki alingi.
Jere LinVB 18:6  Yawe alobi : Bato ba Israel, nakoki kosala na bino te lokola mosali oyo wa mbeki ? Ya solo, bino bato ba Israel, bozali o maboko ma ngai lokola libazi o maboko ma mosali mbeki.
Jere LinVB 18:7  Mbala esusu nakani kobebisa ekolo mpe mokili mwa bato, kosilisa mpe koboma mwango ;
Jere LinVB 18:8  kasi soko bato ba ekolo ena babongoli mitema mpe batiki masumu, natiki kokana kosala mabe nalingaki kosala bango.
Jere LinVB 18:9  Mbala esusu nakani kobongisa ekolo mpe mokili mwa bato, kotonga mboka mpe kolona nzete ;
Jere LinVB 18:10  kasi soko bato ba ekolo ena basali maye makosepelisa ngai te, mpe baboyi koyoka maloba ma ngai, natiki kokana kosala malamu maye nalingaki kosala bango.
Jere LinVB 18:11  Bongo sikawa loba na bato ba Yu­da mpe ba Yeruzalem maloba maye : « Boyoka maloba ma Yawe : Nakanaki kosala bino mabe mpe nazalaki kolengele etumbu. Sikawa moko moko wa bino alongwa o nzela ya masumu, abongola motema mpe abo­ngisa ezalela ya ye. »
Jere LinVB 18:12  Nzoka­nde bakoloba : « Wana se mpamba ! Tolingi kolanda nzela ya biso moko ; moko moko wa biso akosala bobele lokola motema mwa ye liba­nga molingi. »
Jere LinVB 18:13  Yango wana Yawe alobi boye : Bokende kotuna bato ba bikolo bisusu : Nani asili ayoki bongo ? Israel asali likambo lya nsomo.
Jere LinVB 18:14  Mabanga makoki nde kosila o esobe ? Mbula ya mpembe ekolimwa nde o Libano ? Mai makoutaka o miluka mosika makoki nde kosila ? Maziba makobimisaka mai makoki nde kokauka ?
Jere LinVB 18:15  Kasi bato ba ekolo ya ngai babosani ngai ! Bakobonzelaka bikeko bya mpa­mba mabonza, batuti libaku o nzela eye bameseni kolanda mpo ’te balanda nzela ike iye balalisaki malamu te.
Jere LinVB 18:16  Bakomisi ekolo ya bango ekolo ya nsomo, eye bato banso bakotiolaka. Moto aleki wana akamwi mpe aningisi motó.
Jere LinVB 18:17  Lokola mompepe mwa Esti nakopanza bango o miso ma banguna. O mokolo bakosuka nakolakisa bango mokongo, nakolakisa bango elongi ya ngai te.
Jere LinVB 18:18  Bazalaki koloba : « Tokanisa mabe nini tokosala Yeremia. Tokozala naino na banganga Nzambe baye bakoteya biso Mobeko, bato ba bwanya bakopesa biso malako, na baprofeta bakoloba na biso maloba ma Nzambe. Yakani, tosukisa ye na maloba ma ye moko ; tokokeba na maloba ma ye lisusu te. »
Jere LinVB 18:19  E Yawe, tia matoi na losambo la ngai, yoka maloba ma banguna ba ngai.
Jere LinVB 18:20  Moto asali malamu, bakoki nde kozongisela ye mabe ? Nzokande batimoli libulu mpo ya kokweisa ngai. Kanisa boniboni natelemeki o boso bwa yo mpo ya kobondela yo mpo ya ba­ngo, mpo ’te oyokela bango nkanda te.
Jere LinVB 18:21  Yango wana tika bana ba bango bakufa na nzala, babomama na mopanga ! Basi ba bango bazanga bana mpe bakufela babali ! Babali ba bango bakufa na bokono bobe ! Bilenge ba bango bakufa na mopanga o etumba !
Jere LinVB 18:22  O ndako ya bango boleli boyokana mokolo okotindela bango bato bakende koyiba. Mpamba te, batimolaki libulu mpo bakanga ngai, batiaki mitambo o nzela ya ngai.
Jere LinVB 18:23  Yo Yawe, oyebi ’te bakani koboma ngai. Olimbisa mabe ma bango te ; masumu ma bango malongwa o miso ma yo te. Banso bakweya o miso ma yo ; o ntango oyoki nkanda, sukisa bango !