Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOHN
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 5
John LinVB 5:1  Nsima yangó Yézu akeí o Yerúzalem mpô ya eyenga ya ba-Yúda.
John LinVB 5:2  O Yerúzalem, penepene na ‘Ezibeli ya mpatá’, mwâ etíma ezalákí na mbalasáni ítáno, eye bakotángaka o ebréi Betzata.
John LinVB 5:3  Bato ba bokono baíké bazalákí kolála o mbalasáni iye : bato ba lolandá, bato babúkáná makolo na baténgoli. Bazalákí kozila ’te mái máningana.
John LinVB 5:4  Mpámba té, ntángo esúsu ǎnzelú wa Nzámbe azalákí kokita o etíma mpé koningisa mái. Moto wa libosó akótí o mái ntángo mabandí koningana, abíkí, atâ azalákí na mpási níni.
John LinVB 5:5  Ezalákí wâná moto asílí abélí mibú ntúkú mísáto na mwambe.
John LinVB 5:6  Yézu amóní yě alálí wâná, ayébí ’te abélí út’o kala, atúní yě : « Olingí kobíka ? »
John LinVB 5:7  Moto wa bokono azóngísí : « Mokonzi, nazalí na moto té ábwáka ngáí o líziba ntángo mái mabandí koningana ; mpé sókó namekí kokende ngáí mǒkó, mosúsu asílí akótí libosó. »
John LinVB 5:8  Yézu alobí na yě : « Télémé, kamátá kitikwálá ya yǒ mpé támbólá. »
John LinVB 5:9  Na mbala yǒ kó abíkí, akamátí kitikwálá ya yě mpé akeí. Nzókandé mokolo wana ezalákí mokolo mwa sábato.
John LinVB 5:10  Yangó wâná ba-Yúda balobí na moto abíkí : « Leló mokolo mwa sábato, okokí komeme kiti­kwálá ya yǒ té. »
John LinVB 5:11  Azóngísí : « Moto óyo abíkísí ngáí alobákí : Kamátá kitikwálá ya yǒ mpé támbólá. »
John LinVB 5:12  Batúní yě : « Náni moto alobákí na yǒ : Kamátá kitikwálá ya yǒ mpé támbólá ? »
John LinVB 5:13  Kasi moto abíkí ayébí yě té, zambí Yézu amónóní lisúsu té, mpô bato balekí míngi o esíká êná.
John LinVB 5:14  Na nsima Yézu akútí yě o Témpelo, alobí na yě : « Sikáwa obíkí, ósála lisúsu masúmu té, mpô ’te likambo lilekí mabé líkwêla yǒ té. »
John LinVB 5:15  Moto ôná akeí koyébisa ba-Yúda ’te Yézu moto abíkísí yě.
John LinVB 5:16  Yangó wâná ba-Yúda bakómí kokánela Yézu, zambí asálí bôngó o mokolo mwa sábato.
John LinVB 5:17  Kasi Yézu alobí na bangó : « Tatá wa ngáí akosálaka mosálá téé leló ; ngáí mpé nazalí kosála mosá­lá. »
John LinVB 5:18  Mpô ya maloba mâná mpé ba-Yúda balukí nzelá ya koboma yě, zambi abúkí bobélé mobéko mwa sábato té, kasi atángí mpé Nzámbe ‘Tatá wa yě ’ mpenzá, lokóla ’te yě mǒkó akokání na Nzámbe.
John LinVB 5:19  Na nsima Yézu alobí lisúsu : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Mwána yě mǒkó akokí kosála elóko té, akosálaka bobélé maye amóní Tatá azalí kosála. Mánso Tatá akosálaka, Mwána mpé akosálaka mangó.
John LinVB 5:20  Zambí Tatá alingí Mwána, mpé akolakisaka yě mánso yě mǒkó akosálaka. Akolakisa yě mpé misálá misúsu milekí misálá miye na bonéne. Bokokámwa na mya­ngó !
John LinVB 5:21  Lokóla Tatá akosékwisa bato bawéí mpé akozóngisela bangó bomoi, sé bôngó Mwána mpé akopésa bomoi na baye yě mǒkó alingí.
John LinVB 5:22  Tatá akokáta likambo lya moto mǒ­kó té ; apésí Mwána likokí lya kokáta makambo mánso,
John LinVB 5:23  mpô ’te bánso bákúmisa Mwána lokóla bakokúmisaka Tatá. Moto akokúmisa Mwána té, akokúmisa Tatá mpé té, óyo atíndí Mwána.
John LinVB 5:24  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Moto ayókí maloba ma ngáí, mpé ayambí óyo atíndí ngáí, azalí na bomoi bwa sékô. Bakokitisa yě o li­kambo té, zambí asílí abíkí o liwá, a­zwí bomoi.
John LinVB 5:25  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Ntá­ngo ekoyâ, mpé esílí ekokí, bato bawéí bakoyóka loláká la Mwána wa Nzámbe, mpé baye bakoyókemela langó bakozala na bomoi.
John LinVB 5:26  Lokóla Tatá azalí na bomoi bó­nso, asálí ’te Mwána mpé ázala na bomoi bónso.
John LinVB 5:27  Apésí Mwána mpé likokí lya kokáta makambo ma bato, zambí yě azalí Mwána wa Moto.
John LinVB 5:28  Bókámwa té, mokolo mǒkó bato bánso balálí o malíta bakoyóka loláká la yě
John LinVB 5:29  mpé bakobima. Baye basálákí malámu bakosékwa mpô ’te bázwa bomoi bwa sékô ; kasi baye basálákí mabé bakosékwa mpô ’te bákita o likambo.
John LinVB 5:30  Na ngúyá ya ngáí mǒkó nakokí kosála elóko té. Nakokáta makambo lokóla Nzámbe akoyébisa ngáí ; mpé nakokáta makambo sé na bosémbo, zambí nakolukaka mpô elingí ngáí mǒkó té, kasi sé mpô elingí óyo atí­ndí ngáí.
John LinVB 5:31  Sókó ngáí mǒkó nasakólí likambo litálí ngáí, maloba ma ngáí mazalí mpámba.
John LinVB 5:32  Kasi mosúsu akosakola mpô ya ngáí ; mpé nayébí ’te maye akolobaka mpô ya ngáí mazalí ma sôló.
John LinVB 5:33  Bínó botíndákí bato epái ya Yoáne, mpé Yoáne asakólákí mpô ya ngáí mambí ma sôló.
John LinVB 5:34  Nzókandé ngáí nasengélí na maloba ma moto té ; kasi nalobí bôngó bobélé mpô ya bolámu bwa bínó.
John LinVB 5:35  Yoáne azalákí mwínda mopelí mpé mongengí, mpé bondimákí kosepela mwâ ntángo eké na mwínda mwa yě.
John LinVB 5:36  Kasi eye ezalí kosengisa bato bá­ndima ngáí, leká maye Yoáne alobákí mpô ya ngáí, yangó ndé : misálá nakosálaka, miye Tatá apésí ngáí násála mpé násúkisa myangó, milakísí ’te Tatá moto atíndí ngáí.
John LinVB 5:37  Tatá óyo atíndí ngáí, yě méí akosakolaka mpô ya ngáí. Mokolo mǒkó té boyókí loláká la yě mpé bomóní elongi ya yě.
John LinVB 5:38  Bokobó­mbaka maloba ma yě té, zambí bobóyí koyamba óyo yě atíndí.
John LinVB 5:39  Bokoyékolaka Minka­ndá Misántu mpô bokanísí ’te bokozwa bôngó bomoi bwa sékô. Nzókandé minkandá miye mizalí koloba mpô ya ngáí.
John LinVB 5:40  Kasi bínó bobóyí koyâ epái ya ngáí mpô ya kozwa bomoi !
John LinVB 5:42  kasi nayébí ’te bozalí na bolingi Nzámbe o mitéma té.
John LinVB 5:43  Nayéí o nkómbó ya Tatá wa ngáí, nzókandé bobóyí koyamba ngáí. Sókó moto mosúsu ayéí o nkómbó ya yě mǒkó, bokondima yě.
John LinVB 5:44  Bínó bato bolingí kozwa lokúmu epái ya báníngá, kasi lokúmu loye lokoútaka na Nzámbe sé mǒkó, bokolukaka langó té. Bô­ngó ndéngé níni bokokí koyamba ?
John LinVB 5:45  Bókanisa té ’te ngáí nakofúnda bínó epái ya Tatá. Moto akofúnda bínó, ndé Móze, óyo bínó botíí mitéma.
John LinVB 5:46  Sókó boyambákí Móze, mbele boyambí ngáí lokóla, zambí yě akomákí o Bikomá mpô ya ngáí.
John LinVB 5:47  Kasi áwa boyambí té maye akomákí, bóníbóní bokoyamba maloba ma ngáí ? »