MARK
Chapter 1
Mark | LinVB | 1:2 | Lokola ekomami o búku ya proféta Izáya : « Tálá nakotínda ntóma wa ngáí libosó lya yǒ ábongisela yǒ nzelá ; | |
Mark | LinVB | 1:4 | Yoáne Mobátisi azalákí o elíkí, asakólí batísimo ya boyóki mawa mpô ya kozwa bolímbisi masúmu. | |
Mark | LinVB | 1:5 | Bato bánso ba Yudéa mpé ba Yerúzalem bakeí epái ya yě, basakólí masúmu ma bangó mpé bakúlí batísimo na mabóko ma yě o mái ma Yordáne. | |
Mark | LinVB | 1:6 | Yoáne azalákí koláta moláto mwa nsúki ya kaméla mpé kokanga nkámba ya lomposo la nyama o lokéto ; azalákí kolía mitó mya bítekuteku mpé mafúta ma nzói ya zámba. | |
Mark | LinVB | 1:7 | Asakólí boye : « Moto mǒkó alekí ngáí, akoyâ nsima ya ngáí ; nabongí kokúmbama té mpô ya kokangola nsinga ya sapáto ya yě. | |
Mark | LinVB | 1:11 | loláká lolobí út’o likoló : « Ozalí Mwána wa ngáí wa bolingo, nakosepelaka yǒ míngi. » | |
Mark | LinVB | 1:13 | Aúmélí o elíkí mikolo ntúkú ínei ; Sátana ayéí kosénginya yě. Azalákí o káti ya nyama ya zámba, mpé bǎnzelú bazalákí kosálela yě. | |
Mark | LinVB | 1:14 | Nsima ya bokangemi bwa Yoáne o bolóko, Yézu akeí o Galiléa kosangela Nsango Elámu ya Nzámbe, alobí : | |
Mark | LinVB | 1:15 | « Elaká ekokí : Bokonzi bwa Nzámbe bokómí penepene ; bóbóngola mitéma mpé bóyamba Nsango Elámu. » | |
Mark | LinVB | 1:16 | Yézu alekí mpembéni ya etíma ya Galiléa, amóní Simóni na Andréa ndeko wa yě, bazalákí kobwáka monyámá o mái, bazalákí babomi mbísi. | |
Mark | LinVB | 1:19 | Yézu atámbólí mwâ moké, amóní Yakóbo, mwána wa Zebedéo, na Yoáne ndeko wa yě ; bazalákí kobongisa minyámá o bwáto bwa bangó. | |
Mark | LinVB | 1:22 | Bato bakámwí míngi na matéya ma yě, zambí azalákí kotéya lokóla batéyi ba Mobéko té, kasi lokóla moto azali na likoki lya kotéya. | |
Mark | LinVB | 1:23 | Moto mǒkó azalákí wâná o sinagóga ya bangó, akangémí na elímo mbindo, abandí kogánga : | |
Mark | LinVB | 1:24 | « Bísó na yǒ likambo níni, Yézu wa Nazaréte ? Oyéí ndé kosúkisa bísó ? Nayébí yǒ : ozalí mosántu wa Nzámbe. » | |
Mark | LinVB | 1:27 | Bato bánso babángí, batúnání : « Yangó ndé likambo níni ? Akotéyaka matéya ma sika lokóla moto azali na likoki lya kotéya ! Akotíndaka bilímo mbindo bitíndá bikotósaka yě ! » | |
Mark | LinVB | 1:29 | Ebimí Yézu o sinagóga, akeí o ndáko ya Simóni na Andréa, elongó na Yakóbo mpé na Yoáne. | |
Mark | LinVB | 1:31 | Yézu abelémí na yě, asímbí yě na lobóko mpé atélémísí yě. Féfele etíkí yě, abandí kosálela bangó. | |
Mark | LinVB | 1:32 | Ekómí mpókwa, mói mosílí kokita, bayélí yě bato bánso bazalákí na bokono ná baye bakangémí na bilímo bibé. | |
Mark | LinVB | 1:34 | Abíkísí bato míngi bazalákí na mpási ndéngé na ndéngé, abengání bilímo míngi ; kasi apekísí bazábolo koloba, zambí bangó bayébákí yě. | |
Mark | LinVB | 1:35 | Na ntóngóntóngó, mói mobimí naíno té, Yézu atélémí, abimí mpé akeí kosámbela o esíká ya kímíá. | |
Mark | LinVB | 1:38 | Azóngísí : « Tókende epái esúsu, o mbóka izalí penepene, nákende kotéya mpé kúná, zambí nayéí na ntína yangó. » | |
Mark | LinVB | 1:39 | Akátísí Galiléa mobimba mpô ya kotéya bato o sinagóga ya bangó mpé kobengana bazábolo. | |
Mark | LinVB | 1:40 | Moto wa maba ayéí epái ya Yézu, afukámélí yě, abóndélí yě : « Sókó olingí, okokí kopétola ngáí. » | |
Mark | LinVB | 1:44 | alobí na yě : « Kébá, óyébisa yangó atâ na moto mǒkó té ; kasi kendé komílakisa na nganga Nzámbe, óbonza libonza Móze atíndá, ólakisa bato bôngó ’te okómí péto. » | |