Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 8
Exod LinVB 8:1  Yawe alobi na Mose : « Loba na Arone ape : Simba lingenda mpe tanda loboko la yo likolo lya ebale, miluka mpe maziba, mpe bimisa magbololo o mokili mwa Ezipeti. »
Exod LinVB 8:2  Arone atandi loboko likolo lya mai ma Ezipeti, magbololo mabimi o mai mpe matondi o mokili mwa Ezipeti.
Exod LinVB 8:3  Kasi banganga basali se bongo na nkisi ya bango, mpe babimisi magbololo o mokili mwa Ezipeti.
Exod LinVB 8:4  Farao abengi Mose na Arone mpe alobi : « Bobondela Yawe ’te alongola magbololo epai ya ngai mpe epai ya bato ba ngai ; bongo nakotika bato ba yo bakende kobonzela Yawe mabonza. »
Exod LinVB 8:5  Mose alobi na Farao : « Yo moto olakisa ngai ntango ebongi ’te nasambelela yo, basaleli mpe bato ba yo, mpo ’te magbololo masila epai ya yo, malongwa mpe o ndako ya yo, mpe matikala bobele o ebale. »
Exod LinVB 8:6  Farao azongisi : « Nalingi bobele lobi. » Mose alobi lisusu : « Ekosalema lokola yo moko olingi. Bongo oyeba ’te nzambe mosusu akokani na Yawe Nzambe wa biso te.
Exod LinVB 8:7  Magbololo makolongwa epai ya yo, o ndako ya yo mpe epai ya bato ba ekolo ya yo ; makotikala bobele o ebale. »
Exod LinVB 8:8  Mose na Arone balongwi epai ya Farao, mpe Mose abeleli Yawe mpo ya magbololo atindaki epai ya Farao.
Exod LinVB 8:9  Yawe asali lokola Mose asengeki, mpe magbololo makufi o ndako, o mapango mpe o bilanga.
Exod LinVB 8:10  Balokoti mango mpe batii mango esika yoko, mpe mokili mokomi kolumba nsolo.
Exod LinVB 8:11  Emoni Farao ’te abiki, alakisi lisusu motó makasi, ayoki bango te se lokola Yawe ayebisaki.
Exod LinVB 8:12  Yawe alobi na Mose : « Loba na Arone ape : Tanda lingenda lya yo mpe bete na lyango mabelé mpo ’te mabimisa mputulu, bongo mputulu ekobongwana ngungi o Ezipeti mobimba. »
Exod LinVB 8:13  Arone asimbi lingenda lya ye mpe atandi loboko, abeti mabelé mpe amatisi mputulu, bongo ngungi ibimi bipai binso likolo lya bato mpe lya nyama ; mputulu inso ya mabelé iyei kobongwana ngungi o Ezipeti mobimba.
Exod LinVB 8:14  Banganga ba Ezipeti bameki kosala se ndenge yoko na nkisi ya bango mpo ya kobimisa ngungi, kasi bakoki te. Bipai binso ngungi iyei kotungisa bato na nyama.
Exod LinVB 8:15  Banganga balobi na Farao : « Se Nzambe alingi likambo liye » ; kasi Farao alakisi se motó makasi, ayoki bango te, se lokola Yawe ayebisaki.
Exod LinVB 8:16  Yawe alobi na Mose : « Kende koteleme o nzela na ntongo mpenza, ntango Farao akokende o libongo lya ebale, mpe loba na ye : Yawe alobi ape : “Tika bato ba ngai bakende kokumisa ngai.
Exod LinVB 8:17  Soko oapi kotika bato ba ngai, nakotindela yo ná bato ba yo ná ekolo ya yo mobimba mpese ikotela ndako ya bango inso.” Ndako ya ba-Ezipeti ikotonda na mpese, ata mabelé esika bakofanda makotonda na mpese.
Exod LinVB 8:18  O mokolo mona nakobikisa mokili mwa Gesen, esika bato ba ngai bakofanda ; mpese ikosala wana te, mpo oyeba ’te ngai Yawe nazali o mokili mwa bino.
Exod LinVB 8:19  Nakokabola bato, epai yoko bato ba ngai, epai esusu bato ba yo ; mpe lobi nakolakisa likamwisi lyango. »
Exod LinVB 8:20  Yawe asali bongo, mpe mpese ikoti ebele o ndako ya Farao, o ndako ya bato ba ye mpe o ekolo mobimba ya Ezipeti ; ekolo ebebi nye mpo ya mpese.
Exod LinVB 8:21  Farao abengi Mose na Arone, alobi na bango : « Bokende kobonzela Nzambe wa bino, kasi awa o mokili moye. »
Exod LinVB 8:22  Mose azongisi : « Kosala bongo ekobongo te, mpamba te, mabonza biso tokobonzela Yawe makoyokisa ba-Ezipeti nsomo. Soko tokobonza mabonza o miso ma ba-Ezipeti, maye makoyokisa bango nsomo, bakobwakela biso mabanga te ?
Exod LinVB 8:23  Tokosala mobembo mwa mikolo misato o eliki, mpe bobele kuna tokobonzela Yawe mabonza ma biso lokola alobaki na biso. »
Exod LinVB 8:24  Farao alobi : « Nakotika bino bokende kobonzela Nzambe wa bino mabonza o eliki, kasi bokende mosika te. Bosambela mpo ya ngai. »
Exod LinVB 8:25  Mose alobi : « Ntango nakolongwa epai ya yo nakobondela Yawe mpo ya yo. Lobi mpese ikolongwa epai ya yo, epai ya bato ba yo mpe o ekolo mobimba. Kasi Farao, okosa biso te, opekisa biso lisusu te kokende kobonzela Yawe mabonza. »
Exod LinVB 8:26  Mose alongwi o ndako ya Farao mpe asambeli Yawe.
Exod LinVB 8:27  Yawe asali lokola Mose asengeki, mpe mpese ilongwi o ndako ya Farao, epai ya bato ba ye mpe o ekolo mobimba. Etikali ata yoko te.
Exod LinVB 8:28  Kasi Farao alakisi lisusu motó makasi : aapi kotika bato bakende.