I KINGS
Chapter 8
I Ki | LinVB | 8:1 | Salomo abengi bakolo banso ba Israel, bakonzi ba bituka na bankumu ba mabota, o Yeruzalem mpo ’te bakamata Sanduku ya Bondeko bwa Yawe o ngomba Sion, o Engumba ya Davidi. | |
I Ki | LinVB | 8:2 | Ba-Israel banso bayei kosangana epai ya Salomo mpo ya eyenga, o sanza ya Etanim, sanza ya nsambo. | |
I Ki | LinVB | 8:5 | O boso bwa Sanduku mokonzi Salomo na ba-Israel banso babonzi mpata na ngombe ebele, bakokaki kotanga yango te. | |
I Ki | LinVB | 8:6 | Banganga Nzambe batii Sanduku ya Bondeko o esika esantusantu, o nse ya mapapu ma bakerubim. | |
I Ki | LinVB | 8:7 | Bakerubim batandi mapapu ma bango likolo lya esika eye batii Sanduku na mabaya ma bomemi yango. | |
I Ki | LinVB | 8:8 | Mabaya maye mazalaki malai ; nsuka ya mango makoki komonono ut’o esika eye ezali liboso lya esika esantusantu. Kasi moto azali o libanda akoki komono mango te. Tee lelo mabaya mana mazali bobele kuna. | |
I Ki | LinVB | 8:9 | O Sanduku izalaki se mabanga mabale maye Moze atiaki wana o ngomba Oreb. O mabanga mana Yawe akataki bondeko na bana ba Israel ntango babimaki o Ezipeti. | |
I Ki | LinVB | 8:10 | Ntango banganga Nzambe babimi o ndako esantu, londende loyei kotondisa Tempelo ya Yawe. | |
I Ki | LinVB | 8:11 | Banganga Nzambe bakoki lisusu kosala mosala mwa bango te mpo ya londende. Nkembo ya Yawe etondisi Tempelo ya Yawe. | |
I Ki | LinVB | 8:14 | Mokonzi amibongoli mpe abenisi lisanga mobimba lya ba-Israel. Banso bazalaki koteleme. | |
I Ki | LinVB | 8:15 | Alobi : « Bakumisa Yawe Nzambe wa Israel, oyo akokisi na loboko la ye maye alakelaki tata wa ngai Davidi na maloba maye : | |
I Ki | LinVB | 8:16 | ‘Banda mokolo nabimisaki bato ba ngai ba-Israel o Ezipeti, naponoki mboka yoko te o kati ya mabota ma Israel mpo ’te batongela ngai Ndako ; kasi naponoki se Davidi ayangela ekolo ya ngai Israel’. | |
I Ki | LinVB | 8:18 | Kasi Yawe alobi na tata wa ngai Davidi : ‘Ozalaki na mposa ya kotongela Nkombo ya ngai ndako, mpe osalaki malamu. | |
I Ki | LinVB | 8:19 | Nzokande yo moto okotonga Ndako ena te, kasi mwana wa yo, oyo okobota, ye akotongela Nkombo ya ngai Ndako’. | |
I Ki | LinVB | 8:20 | Yawe akokisi liloba lya ye. Ngai nakitani tata wa ngai Davidi mpe nafandi o ngwende ya bokonzi bwa Israel lokola Yawe alobaki. Natongi Ndako eye mpo ya Nkombo ya Yawe Nzambe wa Israel. | |
I Ki | LinVB | 8:21 | Kuna nabongisi esika mpo ya kotia Sanduku ya Bondeko bwa Yawe, bondeko akataki na bankoko ba biso ntango abimisaki bango o mokili mwa Ezipeti. » | |
I Ki | LinVB | 8:22 | Na nsima Salomo akei koteleme liboso lya altare ya Yawe o miso ma bato banso ba Israel ; atomboli maboko, | |
I Ki | LinVB | 8:23 | alobi : « Yawe, Nzambe wa Israel, Nzambe mosusu akokani na yo azali te, kuna o likolo te, awa o nse mpe te. Na bolingi bonene okobatelaka bondeko na basaleli ba yo, baye bakola-ndaka nzela ya yo na motema moko. | |
I Ki | LinVB | 8:24 | Okokisi elako olakelaki tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo. Maye olakeli ye na monoko mwa yo, okokisi mango lelo na maboko ma yo. | |
I Ki | LinVB | 8:25 | Sikawa, e Yawe Nzambe wa Israel, kokisa elako olakeli tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo : ‘Soko bana ba yo bakengeli ezalela ya bango mpe basali malamu o miso ma ngai lokola yo osalaki o miso ma ngai, bokonzi bwa Israel bokotikala na bango seko.’ | |
I Ki | LinVB | 8:26 | Sikawa, e Nzambe wa Israel, kokisa elako olakelaki tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo. | |
I Ki | LinVB | 8:27 | Nzambe akoki nde kofanda esika yoko na bato awa o nse, solo ? Nzambe aleki likolo na bonene, bongo boniboni ndako eye natongi ekokoka nde na ye ? | |
I Ki | LinVB | 8:28 | Yawe Nzambe wa ngai, oyoka losambo mpe bobondeli bwa mosaleli wa yo, yoka bobyangi mpe losambo loye mosaleli wa yo azali kosambela yo lelo ! | |
I Ki | LinVB | 8:29 | Miso ma yo matala ndako eye butu moi, zambi olobaki mpo ya esika eye : Nkombo ya ngai ekozala wana. Yango wana yoka losambo ngai mosaleli wa yo nazali kosambela o ndako eye. | |
I Ki | LinVB | 8:30 | Ondima losambo la ngai mosaleli wa yo, na mpe la bana ba Israel banso bakosambela o esika eye. Ut’o esika yo ozali, kuna o likolo, ndimela bango mpe limbisa bango. | |
I Ki | LinVB | 8:31 | Soko moto asali moninga mabe mpe balayisi ye ndai, soko ayei kolaya bongo o boso bwa altare ya yo, o Ndako eye, | |
I Ki | LinVB | 8:32 | yo ut’o likolo, yoka ye, sambisa basaleli ba yo, kitisa moto asali mabe mpo ’te mabe makwela ye, mpe longisa moto wa bosembo, oyo asali mabe te. | |
I Ki | LinVB | 8:33 | Soko bato ba ekolo ya yo Israel bakiti o etumba na banguna, zambi basalaki masumu o miso ma yo, kasi soko na nsima bazongeli yo mpe bakumisi nkombo ya yo, soko basa-mbeli mpe babondeli yo o Tempelo eye, | |
I Ki | LinVB | 8:34 | yo ut’o likolo yoka bango mpe limbisa masumu ma bato ba ekolo ya yo Israel ; zongisa bango lisusu o mokili opesaki bankoko ba bango. | |
I Ki | LinVB | 8:35 | Soko likolo likangemi mpe mbula ebeti lisusu te, zambi bato basalaki masumu o miso ma yo, kasi na nsima basambeli o esika eye, bakumisi Nkombo ya yo mpe bayoki mawa mpo ya masumu ma bango, zambi opesaki bango etumbu, | |
I Ki | LinVB | 8:36 | yo kuna o likolo yoka mpe limbisa masumu ma basaleli ba yo, bato ba ekolo ya yo Israel, lakisa bango nzela basengeli kolanda, mpe nokisa mbula o mokili opesaki bato ba yo. | |
I Ki | LinVB | 8:37 | Ntango nzala makasi to bokono bobe bongali o mokili, to mbuma ya bilanga ibebi, ntango mapalela to makélele mayei, banguna bazingi mboka, to etumbu nini to bokono nini bongali, | |
I Ki | LinVB | 8:38 | soko moto wa ekolo ya yo Israel asambeli to abondeli mabondeli ndenge na ndenge, mpe moto oyo ayoki motema mpasi mpo ya minyoko na bolozi mpe atomboli maboko epai ya yo o Tempelo eye, | |
I Ki | LinVB | 8:39 | yo ut’o likolo esika okofandaka, yoka mpe limbisa, zongisela moto na moto lokola asalaki, zambi yo oyebi motema mwa ye, se yo moko oyebi mitema mya bato banso, | |
I Ki | LinVB | 8:40 | bongo bakobanga yo mikolo minso mya bomoi bwa bango o mokili opesaki bankoko ba biso. | |
I Ki | LinVB | 8:42 | zambi ayoki nsango ya lokumu la Nkombo ya yo, mpe ya bokasi bwa yo bonene, mpe ayei kosambela yo o Tempelo eye, | |
I Ki | LinVB | 8:43 | yoka ye ut’o likolo, mboka ya yo, pesa mompaya manso asengi yo. Bongo bato ba bikolo binso bayeba yo, babanga yo lokola bato ba ekolo ya yo Israel bakobangaka yo, bayeba ’te Tempelo eye natongisi ezali Tempelo ya yo. | |
I Ki | LinVB | 8:44 | Soko bato ba ekolo ya yo bakei kobunda etumba na banguna epai otindi bango, soko basambeli Yawe mpe babongoli elongi epai ya engumba eye oponoki mpe epai ya Tempelo eye natongeli Nkombo ya yo, | |
I Ki | LinVB | 8:46 | Soko basali masumu o miso ma yo, zambi moto moko azangi lisumu te, mpe oyokeli bango nkanda, okabi bango mpe o maboko ma banguna, bongo banguna bakangi bango mpe bakei na bango o boombo o ekolo ya bango, mosika to te, | |
I Ki | LinVB | 8:47 | soko na nsima o ekolo ena ya banguna, esika bazali baombo, bakanisi, babongoli mitema mpe babondeli yo na maloba maye : ‘Tosali masumu, tozangi bosembo, tosali mabe mpenza !’ | |
I Ki | LinVB | 8:48 | mpe na nsima bazongeli yo na motema moko mpe na mayele manso kuna o ekolo esika bazali baombo, basambeli yo mpe batali epai ya ekolo eye opesaki bankoko ba bango, epai ya engumba yo oponoki mpe epai ya Tempelo eye natongelaki Nkombo ya yo, | |
I Ki | LinVB | 8:50 | Limbisa mabe bato ba yo basalaki yo, limbisa masumu ma bango manso, mpe sala ’te banguna bayokela bango mawa, mpe baye bakangaki bango o boombo bayokela bango ngolu. | |
I Ki | LinVB | 8:51 | Mpamba te, bango bazali bato ba ekolo ya yo, bazali bato ba yo, bato yo moko obimisaki o Ezipeti, esika bayokaki mpasi mingi. | |
I Ki | LinVB | 8:52 | Miso ma yo mafungwana polele mpo ya mabondeli ma mosaleli wa yo mpe ma bato ba ekolo ya yo Israel, yoka bango mbala inso bakobelela yo, | |
I Ki | LinVB | 8:53 | zambi o kati ya bikolo binso bya nse, yo oponoki se bango bazala bato ba yo, lokola osakolaki na monoko mwa mosaleli wa yo Moze o eleko obimisaki bankoko ba biso o Ezipeti, e Yawe Mokonzi wa biso. » | |
I Ki | LinVB | 8:54 | Esilisi Salomo kobondela Yawe, alongwi o esika afukamaki mpe atombolaki maboko liboso lya altare ya Yawe. | |
I Ki | LinVB | 8:56 | « Bakumisa Yawe Oyo apesaki bato ba Israel boboto, lokola alakelaki. Maloba manso alobaki na monoko mwa Moze, mosaleli wa ye, makokisami ! | |
I Ki | LinVB | 8:57 | Yawe Nzambe wa biso azala na biso lokola azalaki na bankoko ba biso ; atika biso te, abwaka biso mpe te ! | |
I Ki | LinVB | 8:58 | Asunisa mitema mya biso epai ya ye, mpo tolanda nzela ya ye inso, mpe totosa mitindo, mibeko na bitinda binso apesaki bankoko ba biso. | |
I Ki | LinVB | 8:59 | Maloba manso nalobelaki bino matikala ntango inso o matoi ma Yawe Nzambe wa biso, mpo ’te mokolo na mokolo apesa mosaleli wa ye, na bato ba Israel banso, biye bisengeli na bango mokolo na mokolo. | |
I Ki | LinVB | 8:60 | Bongo bato ba bikolo binso bayeba ’te Yawe azali Nzambe wa biso, nzambe mosusu azali te ! | |
I Ki | LinVB | 8:61 | Bopesa Yawe Nzambe wa biso mitema mya bino ntango inso, mpo ’te bokoka kolanda nzela ya ye mpe kotosa mibeko mya ye lokola bozali kosala lelo. » | |
I Ki | LinVB | 8:63 | Bo miboma mya bondeko, Salomo abonzeli Yawe ngombe babali nkoto ntuku ibale na ibale, na mpata nkoto monkama na ntuku ibale. Mokonzi na bato banso ba Israel basalaki bongo mpo ya bobenisi Tempelo ya Yawe. | |
I Ki | LinVB | 8:64 | O mokolo mona mokonzi abenisi libanda o boso bwa Tempelo ya Yawe. Bobele o esika ena mokonzi abonzi mabonza ma kotumba, mabonza ma bolei na mafuta ma miboma mya bondeko, zambi altare ya mbengi, eye ezali liboso lya Yawe, ekokaki te na bokwi mabonza manso ma kotumba, na mabonza ma bolei na miboma mya bondeko. | |
I Ki | LinVB | 8:65 | Salomo asepeli eyenga ena o sanza ya nsambo elongo na ba-Israel banso. Ezalaki wana bato ba ekolo mobimba, banda Amat tee ebale ya Ezipeti, basangani o miso ma Yawe Nzambe wa biso, mikolo nsambo ; basepeli naino mikolo nsambo misusu, lokola ’te mikolo zomi na minei. | |