Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next
Chapter 11
Luke LinVB 11:1  Mokolo mǒkó Yézu azalákí kosámbela. Awa asílísí, mǒkó wa bayékoli alobí na yě : « Mokonzi, lakísá bísó kosámbela lokóla Yoáne alakísákí bayékoli ba yě. »
Luke LinVB 11:2  Yézu alobí na bangó : « Ntángo bokosámbela, bóloba boye : Tatá, bato bákúmisa nkómbó ya yǒ, Bokonzi bwa yǒ bóyâ ;
Luke LinVB 11:3  Pésá bísó mokolo na mokolo biléi bikokí ;
Luke LinVB 11:4  Límbísá masúmu ma bísó, zambí bísó mǒkó tokolímbisa báníngá nyongo. Sálísá bísó tóndima masénginyá té. »
Luke LinVB 11:5  Yézu abakísí : « Sókó mǒkó wa bínó azalí na móníngá mpé o káti ya butú akeí kosénge yě : ‘Ndeko, défísá ngáí mámpa másáto,
Luke LinVB 11:6  zambí móníngá mǒkó aútí mobémbo ayélí ngáí, mpé nazalí na elóko ya kopésa yě té’.
Luke LinVB 11:7  Bôngó mosúsu o káti ya ndáko azóngísí : ‘Tíká kotungisa ngáí, nasílí nakangí ndáko, bísó na bána tolálí ; nakokí kotéleme té mpô ya kopésa yǒ yangó’.
Luke LinVB 11:8  Nalobí na bínó : Atâ atélémí té mpô ápésa yě yangó mpô azalí móníngá, akotéleme mpô ya motungisi mwa yě, mpé akopésa yě mánso masengélí na yě.
Luke LinVB 11:9  Yangó wâná nalobí na bínó : Bósénge mpé bakopésa bínó, bóluka mpé bokozwa, bóbétele ndáko mpé bakofungolela bínó.
Luke LinVB 11:10  Zambí moto akosénge, bakopésa yě, óyo akoluka, akozwa ; óyo akobétele ndáko, bakofungolela yě.
Luke LinVB 11:11  Tatá náni o káti ya bínó (akopésa mwána wa yě libángá, sókó mwána aséngí límpa ? Náni) akopésa mwána nyóka sókó aséngí mbísi ?
Luke LinVB 11:12  Náni akopésa yě nkotó sókó mwána aséngí líki ?
Luke LinVB 11:13  Bôngó sókó bínó bato babé boyébí kopésa bána ba bínó bilóko bilámu, ntembe té, Tatá wa bínó o likoló akopésa Elímo Sántu na baye baséngí yě ! »
Luke LinVB 11:14  Yézu abengání zábolo o nzóto ya moto mǒkó akolobaka té. Awa zábolo abimí, moto azalákí ebúbú abandí koloba. Bato bakámwí míngi.
Luke LinVB 11:15  Kasi basúsu balobí : « Akobenganaka zábolo na ngúyá ya Bélzebul, mokonzi wa bazábolo. »
Luke LinVB 11:16  Basúsu, mpô ya komeka yě, baséngí yě álakisa elembo eútí o likoló.
Luke LinVB 11:17  Kasi yě ayébí makanisi ma bangó, alobí : « Sókó bato ba mokonzi mǒkó bakabwání, bokonzi bwa yě bokokúfa mpé ndáko yǒkó yǒkó ekobúkana.
Luke LinVB 11:18  Sókó Sátana ayókání té na bato ba yě f mǒkó, bóníbóní bokonzi bwa yě bokokí koúmela ? Bínó bolobí ’te nakobenganaka bazábolo na ngúyá ya Bélzebul.
Luke LinVB 11:19  Bôngó sókó ngáí nabengání bazábolo na makasi ma Bélzebul, bána ba bínó bakobenganaka bangó na ngúyá ya náni ? Bangó mǒkó bakokitisa bínó.
Luke LinVB 11:20  Kasi sókó nabengání bazábolo na mosapi mwa Nzámbe, boye­ba ’te Bokonzi bwa Nzámbe bokómélí bínó.
Luke LinVB 11:21  Sókó elombé akokéngeleke ndáko ya yě na bibuneli, bilóko bya yě bínso bibómbámí malámu.
Luke LinVB 11:22  Kasi sókó moto mosúsu ayéí, óyo alekí yě na bokási, mpé alóngí yě, akobótolo yě bibuneli, biye azalákí kotía motéma, akokabola bilóko bínso abótólókí yě.
Luke LinVB 11:23  Moto azalí na ngáí motéma mǒkó té, azalí mongúná wa ngáí ; moto akosangisa bilóko na ngáí té, akopanza byangó.
Luke LinVB 11:24  Sókó elímo mbindo abimí o nzóto ya moto, akokende kolekaleka o bilíkí kolukaka esíká ya kopéma. Sókó azwí esíká ya kopéma té, akoloba : ‘Malámu názónga o ndáko nabimákí’.
Luke LinVB 11:25  Ntángo akómí kúná, akokúta ndáko basílí bakómbí mpé babongísí malámu.
Luke LinVB 11:26  Bôngó akokende kobênga báníngá nsambo balekí yě na bobé ; na nsima bakoyâ mpé bakozala wâná. Nsúka ya moto óyo, ekozala mabé, leká libosó. »
Luke LinVB 11:27  Ezalákí Yézu koloba bôngó, mwásí mǒkó o káti ya bato atómbólí mongóngó, alobí : « Esengo na mamá óyo amemékí yǒ o libumu, mpé anúngísákí yǒ mabéle ! »
Luke LinVB 11:28  Kasi yě ayanólí : « Nzókandé esengo elekí na bato bakoyókaka matéya ma Nzámbe mpé bakotósaka mangó ! »
Luke LinVB 11:29  Awa bato baíké bayéí kozínga yě, abandí koloba : « Bato ba eleko eye bazalí bato babé ; balingí komóno elembo, kasi bokolakisa bangó elembo esúsu té, bobélé eye ya proféta Yona.
Luke LinVB 11:30  Lokóla Yona azalákí elembo o míso ma bato ba Niníve, Mwána wa Moto akozala elembo o míso ma bato ba leló.
Luke LinVB 11:31  O Mokolo mwa Likambo mokonzi mwásí wa Saba akotéleme elongó na bato ba leló, mpé akokitisa bangó. Mpámba té, aútákí mosíká mpô ’te áyóka bwányá bwa Salomó. Kasi moto azalí áwa alekí Salomó !
Luke LinVB 11:32  O Mokolo mwa Likambo bato ba Niníve bakotéleme elongó na bato ba leló, mpé bakokitisa bangó. Mpámba té, bangó babóngólákí mitéma mpô ya matéya ma Yona. Kasi moto azalí áwa alekí Yona !
Luke LinVB 11:33  Moto mǒkó té akopelisa mwínda, mpé akotía mwángó o esíká ya kobómbama, tǒ o nsé ya eboka. Kasi akotía mwangó o etémiseli ya mwínda, mpô ’te bato bakoyíngela o ndáko bámóno malámu.
Luke LinVB 11:34  Líso lya yǒ lizalí mwínda mwa nzóto ya yǒ. Sókó líso lizalí malámu, nzóto mobimba ekozala na mwínda. Kasi sókó líso likómí kobéle, nzóto mobimba ekozala na molílí.
Luke LinVB 11:35  Yangó wâná kébá ’te mwínda o nzóto ya yǒ mózíma té.
Luke LinVB 11:36  Sókó nzóto ya yǒ mobimba ezalí na mwínda, mpé atâ ndámbo etíkálí o molílí té, ekongenge lokóla mwínda mokolakisaka yǒ polélé. »
Luke LinVB 11:37  Esílísí Yézu koloba, mo-Farizéo mǒkó abéngí yě áyâ kolía o ndáko ya yě. Yézu ayíngélí mpé akeí kofánda o méza.
Luke LinVB 11:38  Mo-Farizéo akámwí ntángo amóní ’te Yézu asukólí mabóko té libosó lya kolía.
Luke LinVB 11:39  Kasi Mo­konzi alobí na yě : « Bínó ba-Farizéo bokosálaka boye : Bokosukolaka nkéni na sǎ ni epái ya libándá, kasi epái ya káti bínó mǒkó botóndí na mpósá ya mosolo mpé na mayéle mabé.
Luke LinVB 11:40  Bozángí mayéle ! Oyo asálí libándá lya elóko, asálí yangó mpé epái ya káti té ?
Luke LinVB 11:41  Bókabela babóla biye bizalí o káti, bôngó bínso bikokómela bínó péto.
Luke LinVB 11:42  Mawa na bínó, ba-Farizéo : bokofútaka eténi ya zómi ya lumbálumbá, ya biloló mpé ya ndúnda isúsu, kasi bozángí bosémbo na bolingi Nzámbe. Bókokisa libosó makambo maye, kasi bóbósana masúsu té.
Luke LinVB 11:43  Mawa na bínó, ba-Farizéo : bolingí kofánda o kíti ya libosó o sinagóga, bolingí bato bápésa bínó losáko o zándo.
Luke LinVB 11:44  Mawa na bínó, zambí bozalí lokóla malíta mazalí na elembo yǒkó té, bôngó bato bakonyata mangó, zambí bayébí té ! »
Luke LinVB 11:45  Mǒkó wa batéyi ba Mobéko alobí na yě : « Motéyi, áwa olobí bôngó, ofíngí mpé bísó lokóla. »
Luke LinVB 11:46  Yézu ayanólí : « Mawa na bínó lokóla, batéyi ba Mobéko, zambí bokomemisaka bato míkúmbá milekí bozitó, kasi bínó mǒkó bokosímbaka myangó atâ na mosapi té !
Luke LinVB 11:47  Mawa na bínó bato bokotóngelaka baproféta malíta, nzókandé bankóko ba bínó bato babomáká bangó !
Luke LinVB 11:48  Bondimí bôngó makambo ma bankóko ba bínó : bangó babomáká baproféta, mpé bínó botó­ngélí bangó malíta.
Luke LinVB 11:49  Yangó wâná Nzámbe alobákí na Bwányá bwa yě : Nakotíndela bangó baproféta na bapóstolo ; bakoboma basúsu mpé bakonyókolo basúsu.
Luke LinVB 11:50  Mpé bôngó bakosámbisa bato ba leló mpô ya makilá ma baproféta bánso masopání út’o libandela lya mokili,
Luke LinVB 11:51  bandá makilá ma Abel téé makilá ma Zakaría, óyo babomáká o Témpelo penepene na altáre. Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mpô ya mangó bakosámbisa bato ba leló.
Luke LinVB 11:52  Mawa na bínó, batéyi ba Mobéko, zambí bolongólí lifungóla lya ndáko ya Bwányá. Bínó mǒkó bokótí té, mpé bato balingákí kokóto, bopekísí bangó ! »
Luke LinVB 11:53  Elongwí yě wâná, batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo bakómí koyókela yě nkándá enéne, mpé kotúna yě mitúna mya kwókósó ndéngé na ndéngé.
Luke LinVB 11:54  Batíélí yě mitámbo mpô ’te bákanga yě atâ na liloba lyǒkó liútí o monoko mwa yě.