Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 6
Sira LinVB 6:1  Soko nkombo ya yo ekomi kotambola, osambwi, lokola mo­sumuki oyo akolobaka minoko mibale.
Sira LinVB 6:2  Omikomisa moombo wa mposa ya motema te, mpo ’te basilisa makasi ma yo te lokola bakoseseke ngombe,
Sira LinVB 6:3  mpe okoma lokola nzete te, eye esili nkasa na mbuma, ekufi mpe ekauki, etikali nkoni mpamba.
Sira LinVB 6:4  Moto akolanda mposa ebe ya motema, akomibebisa, banguna ba ye bakoseke ye.
Sira LinVB 6:5  Na maloba ma boboto okozwa baninga mingi, soko ozali na maloba ma bondeko bakozongisela yo malamu.
Sira LinVB 6:6  Oluka kozala bondeko na bato banso, kasi o kati ya bato nkoto bobele moko apesa yo malako.
Sira LinVB 6:7  Omeka motema mwa oyo olingi akoma moninga wa yo, otia motema na ye noki te.
Sira LinVB 6:8  Mosusu akozala bobele moninga soko ebongeli ye, akotika yo mokolo okokoma na mpasi.
Sira LinVB 6:9  Moninga mosusu akoki kokoma monguna, akoyokisa yo nsoni na bobimisi boswani bwa bino na ye.
Sira LinVB 6:10  Moninga mosusu akolia o meza ya yo, kasi mokolo okomi na mpa­si, akotika yo.
Sira LinVB 6:11  Ntango ozali na bomengo, azali na yo motema moko, akosolola malamu na basali ba yo,
Sira LinVB 6:12  kasi soko okokoma na mpasi, akokoma monguna wa yo, mpe okomono ye epai ya yo lisusu te.
Sira LinVB 6:13  Otikala mosika na banguna ba yo, mpe ozala na bokebi na baninga ba yo.
Sira LinVB 6:14  Moninga wa motema azali mobateli wa solo, moto azwi ye, azwi nkita enene.
Sira LinVB 6:15  Bakosombaka moninga wa solo na mosolo te, mpo aleki ata nini na motuya.
Sira LinVB 6:16  Moninga wa solo akoyokisa bomoi bwa yo elengi, bobele bato bakobangaka Mokonzi, bakozwa ye.
Sira LinVB 6:17  Oyo akobangaka Mokonzi ako­za­la na moninga wa solo, mpo mo­ninga akozala se lokola yo moko.
Sira LinVB 6:18  Mwana wa ngai, ondima koyoka mateya banda bolenge, bongo oko­zwa bwanya kin’o bobange bwa yo.
Sira LinVB 6:19  Kolisa bwango lokola moloni mbu­ma akosalaka na bilanga, mpe akozila mbuma ya ye itela malamu. Okoyoka mwa mpasi mpo ya kokolisa bwanya, kasi mosika te okolia mbuma ya bwango.
Sira LinVB 6:20  Bilema bakondimaka bwanya se na mpasi, moto azangi mayele ako­ka­ngana na bwango te.
Sira LinVB 6:21  Akoyoka bwanya bozito lokola li­banga linene, mosika te akobwaka bwango.
Sira LinVB 6:22  Bwanya bokoki na nkombo ya bwango, zambi bato bakozwa bwanya bazali mingi te.
Sira LinVB 6:23  Mwana wa ngai, yoka likanisi lya ngai malamu, oboya malako ma ngai te.
Sira LinVB 6:24  Kanga makolo ma yo na monyololo mwa bwango, tia nkingo ya yo o ekangiseli ya bwango.
Sira LinVB 6:25  Pesa lipeke lya yo mpo okumba bwango, olembe te kokangema na nsinga ya bwango.
Sira LinVB 6:26  Kende epai ya bwanya na motema mobimba, landa nzela ya bwanya na nguya ya yo inso.
Sira LinVB 6:27  Luka bwanya mpe landa se nzela ya bwango, bongo bwanya bokomiyebisa epai ya yo ; mpe soko osili okangi bwango, otika bwa­ngo lisusu te.
Sira LinVB 6:28  Na nsima bwanya bokopesa yo bo­pemi, mpasi oyoki mpo ya bwanya ekobongwana esengo.
Sira LinVB 6:29  Ekangiseli ya bwanya ekobatela yo malamu, minyololo mya bwa­ngo nde molato mwa yo mwa nke­mbo.
Sira LinVB 6:30  Mokumba mwa bwanya mozali wolo ekokembisa yo, mokaba mwa bwango mozali nsinga ya longondo.
Sira LinVB 6:31  Okolata bwango lokola elamba ya lokumu, okotia bwango o motó lokola enkoti ya nsai.
Sira LinVB 6:32  Mwana, soko otii motema okoyeba makambo mingi, soko olingi solo, okokoma moto wa mayele.
Sira LinVB 6:33  Soko olingi koyoka bato, okokolisa mayele, soko ofungoli matoi, akokoma moto wa bwanya.
Sira LinVB 6:34  Kende o lisanga lya bakolo, mpe soko omoni moto wa bwanya, oyo­ka ye.
Sira LinVB 6:35  Yoka malamu maloba manso ma­uti na Nzambe, eyele ya solosolo ata yoko ebunga te.
Sira LinVB 6:36  Soko oyebi moto wa bwanya, ke­nde epai ya ye na ntongo ntongo, onyata libanga lya monoko mwa ndako ya ye ntango inso, elembo ya matambi ma yo etikala wana.
Sira LinVB 6:37  Omanyola mitindo mya Moko­nzi, otika te koluka kotosa mibeko mya ye. Ye moto akolendisa yo motema, akokabela yo bwanya boye olingi kozwa.