EXODUS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
Chapter 10
Exod | LinVB | 10:1 | Yawe alobi na Mose : « Kende epai ya Farao, zambi nakomisi ye na bato ba ye motó makasi mpo nalakisa makamwisi o kati ya bango. | |
Exod | LinVB | 10:2 | Bongo okoka kosolola na mwana wa yo mpe na nkoko wa yo boniboni nasalaki na ba-Ezipeti, na mpe makambo manene nasalaki o kati ya bango, mpo ’te oyeba ’te nazali Yawe. » | |
Exod | LinVB | 10:3 | Mose na Arone bakei epai ya Farao mpe balobi na ye : « Yawe, Nzambe wa ba-Ebrei, alobi ape : Mikolo boni naino okoapa komikitisa o miso ma ngai ? Tika bato ba ngai bakende kokumisa ngai. | |
Exod | LinVB | 10:5 | Makotonda bipai binso mpe okomono mabelé lisusu te ; makolia biloko binso bitikali, biye mbula ya mabanga ebebisaki te ; makolia nzete inso o bilanga bya bino. | |
Exod | LinVB | 10:6 | Makotonda o ndako ya yo, ya basaleli ba yo mpe ya bato banso ba Ezipeti, lokola batata na bankoko ba bino bamonoki naino te, ut’o mokolo bato bafandi wana tee lelo. » Na nsima Mose abimi o ndako ya Farao. | |
Exod | LinVB | 10:7 | Bato ba Farao balobi na ye : « Mikolo boni moto oyo akosala biso naino mabe ? Tika bango bakende kokumisa Yawe Nzambe wa bango. Naino omoni te ’te Ezipeti ezali kobeba nye ? » | |
Exod | LinVB | 10:8 | Babengi lisusu Mose na Arone epai ya Farao ; oyo alobi na bango : « Bokende kokumisa Yawe Nzambe wa bino, kasi baye bakokende kuna, bango banani ? » | |
Exod | LinVB | 10:9 | Mose azongisi : « Tokokende elongo na bilenge mpe na babange ba biso, elongo na bana babali na bana basi ba biso, tokokamata mpe ngombe na mpata ya biso, mpo ezali eyenga enene ya Yawe. » | |
Exod | LinVB | 10:10 | Farao alobi : « Yawe azala na bino soko natiki bino bokende elongo na basi ba bino mpe na bana ba bino. Bosali na mayele mabe, solo ! | |
Exod | LinVB | 10:11 | Eloko te ! Bokende kokumisa Yawe se bino babali, eloko bosali kosenge, se yango. » Mpe babengani bango o miso ma Farao. | |
Exod | LinVB | 10:12 | Yawe alobi na Mose : « Tanda loboko likolo lya mokili mwa Ezipeti mpe byanga mapalela, matonda o mokili mwa Ezipeti mpe malia matiti manso ma mokili, maye matikalaki nsima ya mbula ya mabanga. » | |
Exod | LinVB | 10:13 | Mose atandi lingenda lya ye likolo lya mokili mwa Ezipeti, mpe Yawe atindi mompepe mwa Esti, mompepe mopepi makasi butu moi. Na ntongo mompepe mona momemi mapalela. | |
Exod | LinVB | 10:14 | Mapalela mapanzani o Ezipeti mobimba, mayei kokita ebele o mokili mwa Ezipeti. Bamonoki naino bongo liboso te ; nsima mpe bakomono bongo lisusu te. | |
Exod | LinVB | 10:15 | Matondi o mokili mobimba mpe mabebisi ekolo. Malei matiti manso ma mokili na mbuma ya nzete inso, iye mbula ya mabanga ebebisaki te ; eloko yoko ebesu etikali o nzete to o ndunda ya bilanga te o mokili mobimba mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 10:16 | Farao abengisi Mose na Arone noki mpe alobi : « Nasali lisumu o miso ma Yawe Nzambe wa bino mpe o miso ma bino. | |
Exod | LinVB | 10:17 | Nabondeli bino, bolimbisa ngai mabe nasali mbala eye lisusu, bobondela Yawe Nzambe wa bino alongolela ngai etumbu ya nsomo ekoboma biso. » | |
Exod | LinVB | 10:19 | Yawe alongoli mompepe mwa Esti, abimisi mompepe mwa Westi, mompepe makasi mpenza, molongoli mapalela manso mpe mosongisi mango epai ya Mbu Etane. Etikali lisusu ata lipalela lyoko te o mokili mobimba mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 10:21 | Yawe alobi na Mose : « Tanda loboko epai ya likolo mpo ’te molili makasi mosipa mokili mwa Ezipeti. » | |
Exod | LinVB | 10:22 | Mose atandi loboko epai ya likolo mpe molili makasi mosipi mokili mobimba mikolo misato. | |
Exod | LinVB | 10:23 | Bato bakoki komonono te mpe o mikolo misato mina moto moko te alongwi o esika azalaki. Kasi moi mosalaki o bisika binso bana ba Israel bazalaki. | |
Exod | LinVB | 10:24 | Farao abengi Mose mpe alobi na ye : « Bokende kosalela Yawe ; se ngombe na mpata itikala awa. Basi na bana ba bino bakoki kokende na bino elongo. » | |
Exod | LinVB | 10:25 | Mose alobi : « Yo moto okopesa biso miboma na mabonza mpo tobonzela Yawe Nzambe wa biso ? | |
Exod | LinVB | 10:26 | Bibwele bya biso bikokende na biso elongo ; ata nyama yoko te ekotikala awa, zambi o kati ya yango biso moko tokopono iye tokobonzela Yawe Nzambe wa biso. Tee tokokoma kuna tokoyeba te nini tokobonzela Yawe. » | |
Exod | LinVB | 10:28 | Farao alobi na Mose :« Longwa awa, obima o miso ma ngai lisusu te ; mokolo okobima lisusu o miso ma ngai, okokufa ! » | |