I CHRONICLES
Chapter 5
I Ch | LinVB | 5:1 | Ruben azalaki mwana wa yambo wa Israel. Azalaki mwana wa liboso solo, kasi mokolo alalaki na makango wa tata wa ye, bapesi botomolo na bana ba Yozefu, mwana wa Israel ; bongo batali ye lisusu lokola mwana wa yambo te. | |
I Ch | LinVB | 5:2 | Ata Yuda aleki bandeko ba ye banso na lokumu, zambi nkumu monene abotami o libota lya ye, botomolo bozalaki na Yozefu. | |
I Ch | LinVB | 5:6 | Baal aboti Beera, oyo Teglat-Falasar, mokonzi wa Asur akangaki mpe akendeki na ye o boombo ; ye azalaki nkumu wa libota lya ba-Ruben. | |
I Ch | LinVB | 5:8 | na Bela, mwana wa Azaz, mwana wa Sema, mwana wa Yoel. Bela afandi o Aroer mpe mokili mwa ye mokei tee ngomba Nebo ya Baal-Meon. | |
I Ch | LinVB | 5:9 | Epai ya Esti mokili mwa ye mokei tee eliki mpe ebale Efrate, zambi bazalaki na bibwele mingi o mokili mwa Galaad. | |
I Ch | LinVB | 5:10 | O eleko ya Saul babundi etumba na ba-Agar, balongi bango mpe bakei kofanda o biema bya bango o mokili mobimba o Esti ya Galaad. | |
I Ch | LinVB | 5:12 | Mwana wa yambo : Yoel ; na nsima Safam moto wa babale, na nsima Yanai na Safat o mokili mwa Basan. | |
I Ch | LinVB | 5:13 | Bandeko ba bango nsambo baka-bwani mpe mabota mabota : Mikael, Mesulam, Seba, Yorai, Yakan, Zia na Eber. | |
I Ch | LinVB | 5:14 | Bango banso bana ba Abigail, mwana wa Kuri, mwana wa Yaroa, mwana wa Galaad, mwana wa Mikael, mwana wa Yesidai, mwana wa Yado, mwana wa Buz. | |
I Ch | LinVB | 5:16 | Bafandi o mokili mwa Galaad mpe mwa Basan, o mboka ya penepene mpe o bisobe o Saron tee ndelo ya mokili mwa bango. | |
I Ch | LinVB | 5:17 | Batangi mabota ma bango o eleko Yotam azalaki mokonzi wa Yuda, mpe Yeroboam mokonzi wa Israel. | |
I Ch | LinVB | 5:18 | Bana ba Ruben, bana ba Gad na ndambo ya libota lya Manase bazalaki basoda ba mpiko, bayebi komeme nguba na mopanga mpe kobete litimbo, bameseni na bitumba ; banso bazalaki bato nkoto ntuku inei na inei na nkama nsambo na ntuku motoba, bakoki na mosala mwa soda. | |
I Ch | LinVB | 5:20 | Nzambe asalisi bango : balongi ba-Agar na baninga ba bango ; mpamba te, ntango ya etumba babondeli Nzambe, Oyo ayoki bango zambi batii mitema na ye. | |
I Ch | LinVB | 5:21 | Babotoli bibwele bya ba-Agar, bazwi kamela nkoto ntuku itano, mpata nkoto nkama ibale na ntuku itano, mpunda nkoto ibale na bato nkoto monkama, | |
I Ch | LinVB | 5:22 | mpo Nzambe ayangelaki etumba ; bato mingi bawei. Bongo bakei kofanda o esika ya bango tee o eleko ya boombo. | |
I Ch | LinVB | 5:23 | Bana ba ndambo ya libota lya Manase bafandi o mokili kati ya Basan na Baal-Ermon, Senir na ngomba Ermon. Bazalaki ebele mpenza. | |
I Ch | LinVB | 5:24 | Nkombo ya bankumu ba mabota : Kefer, Yisei, Eliel, Azriel, Yirmeya, Odavia na Yadiel. Banso bazalaki basoda ba mpiko, bato ba lokumu, bankumu ba mabota ma bango. | |
I Ch | LinVB | 5:25 | Kasi baboyi kotosa mibeko mya Nzambe wa bankoko ba bango, bakumisi banzambe ba bikolo bisusu, biye Nzambe abomaki liboso lya bango. | |
I Ch | LinVB | 5:26 | Nzambe wa Israel apesi Pul, mokonzi wa Asur, na mpe Teglat-Falasar, mokonzi wa Asur, likanisi lya kobunda na bango. Bakangi bato ba Ruben, Gad mpe ndambo ya libota lya Manase mpe bakei na bango o boombo o Kala, Kabor, Ara tee ebale ya Gozan, esika bazali tee lelo. | |
I Ch | LinVB | 5:36 | Yokanan aboti Azaria, Ye moto azalaki nganga Nzambe o Tempelo eye Salomo atongaki o Yeruzalem. | |