ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 22
Isai | LinVB | 22:2 | bato ba mboka ya mobulu, ya makeléle mpe ya bisengo ? Bato ba yo bakufi basuki na mompanga te, babomi bango o ntango ya etumba te. | |
Isai | LinVB | 22:3 | Bakomanda ba bino bakimi banso elongo, bakangemi baombo, ata babeteki makula te. Ata bakimaki mosika, bakangi bango banso. | |
Isai | LinVB | 22:4 | Yango wana nalobi boye : « Bolongwa pene na ngai, botika ngai nalela makasi, bomeka kobondo ngai te, awa ekolo ya bato ba ngai ebebi. » | |
Isai | LinVB | 22:5 | Mpo lelo ezali mokolo mwa bokimi, mwa nsomo mpe mwa mobulungano, mwango nde mosala mwa Yawe Mokonzi wa bokasi bonso o lobwaku la Limoni. Babuki efelo ya mboka, bato bazalaki kobelela epai ya ngomba. | |
Isai | LinVB | 22:6 | Ba-Elam bakamati libenga lya makula, bayei na makalo mpe babuteli farasa, mpe bato ba Kir babimisi nguba ya bango. | |
Isai | LinVB | 22:7 | Mabwaku ma yo kitoko matondi na makalo, mpe bato ba farasa batelemi o bizibeli bya mboka. | |
Isai | LinVB | 22:8 | Balongoli o Yuda binso bikoki kobatela mokili. O mokolo mona botali bibuneli bya Ndako ya Zamba. | |
Isai | LinVB | 22:9 | Bomoni malusu ebele o efelo ya Mboka ya Davidi. Bosangisi mai manso o ebombelo o kati ya mboka. | |
Isai | LinVB | 22:11 | Botimoli libulu o kati ya bifelo bibale mpo ya kobomba mai ma liziba lya kala. Kasi boboyi kotala oyo asalaki mana manso, oyo abongisaki mango uta kala. | |
Isai | LinVB | 22:12 | O mokolo mona Yawe Nzambe wa bokasi bonso abengi bino mpo ’te bolela, bokimela, bokokola mitó mpe bolata ngoto. | |
Isai | LinVB | 22:13 | Kasi bozali kosepela mpe koyoka bisengo, bozali koboma ngombe na mpata, kolia minsuni, komele vino mpe bolobi : « Tolia mpe tomele, mpo lobi tokokufa ! » | |
Isai | LinVB | 22:14 | Yawe wa bokasi bonso ayebisi ngai boye : « Nakolimbisa bino lisumu lyango te, tee liwa ! » Yawe Nzambe wa bokasi bonso alobi bongo. | |
Isai | LinVB | 22:15 | Yawe Nzambe wa bokasi bonso alobi boye : Kende epai ya nkumu Sebna, moyangeli wa ndako ya mokonzi, oyo azali komikatela lilita o mabanga ma ngomba, | |
Isai | LinVB | 22:16 | mpe tuna ye : « Awa ozali na biloko nini ? Ozali nde na bandeko mpo ’te okata lilita o mabanga ? » Mpamba te, azali kotonga lilita o ngomba, azali kokata mabanga mpo ya kolala wana libela. | |
Isai | LinVB | 22:18 | Akokomisa yo lokola ndembo, okosuka o mokili mosusu mosika. Okokufa wana elongo na makalo ma yo kitoko, okoyokisa libota lya mokonzi wa yo nsoni. | |
Isai | LinVB | 22:21 | Nakolatisa ye molato mwa yo, nakokanga mokaba mwa yo o loketo la ye, nakotia bokonzi bwa yo o maboko ma ye. Akozala tata wa bato ba Yeruzalem mpe wa libota lya Yuda mobimba. | |
Isai | LinVB | 22:22 | Nakopesa ye mafungola ma ndako ya Davidi : soko afungoli ndako, moto moko akokanga te, soko akangi yango, moto moko akofungola te. | |
Isai | LinVB | 22:23 | Nakopika ye makasi lokola bakobakaka nsete o efelo, mpe ye akopesa libota lya tata wa ye ngwende ya lokumu. | |
Isai | LinVB | 22:24 | Bana na bankoko ba ye bakoka-ngema na yango lokola bitapi binene na bike bikangemi na nzete, lokola biloko bike bya ndako, kopo na mbeki. | |