ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 60
Isai | LinVB | 60:1 | E Yeruzalem, teleme mpe ongenge, zambi mwinda mwa yo mobandi kotana, nkembo ya Yawe ebimeli yo. | |
Isai | LinVB | 60:2 | Awa molili mozipi mokili mpe bato ba bikolo, Yawe abimeli yo, mpe nkembo ya ye emononi epai ya yo. | |
Isai | LinVB | 60:3 | Bato ba bikolo bakolanda mwinda mwa yo, mpe bakonzi bakoluka bongengi bwa botani bwa yo. | |
Isai | LinVB | 60:4 | Tombola miso mpe tala epai na epai, bato banso basangani bazali koya epai ya yo. Bana babali ba yo bauti mosika, bazongi, bana basi ba yo, bamemi bango o maboko. | |
Isai | LinVB | 60:5 | Okomono bongo mpe okosepela mingi, motema mwa yo mokotonda na nsai. Bakoyela yo biloko bya motuya biye ebombami o mbu, bakomemela yo nkita ikouta o bikolo binso. | |
Isai | LinVB | 60:6 | Kamela ebele ikoya kotondana epai ya yo, na bana ba kamela ba Madian mpe ba Efa, bato banso ba Saba bakoya na wolo mpe na malasi, bakosakola nkembo ya Yawe. | |
Isai | LinVB | 60:7 | Bibwele binso bya Kedar bikoya epai ya yo, bakobonzela yo mpata babali ya Nebayot ; ikobuta altare ya ngai bo libonza likosepelisa ngai, nakokembisa Tempelo ya ngai lisusu. | |
Isai | LinVB | 60:8 | Banani wana bazali kopimbwa lokola limpata, lokola bibenga bizali kozonga o ndako ya byango ? | |
Isai | LinVB | 60:9 | Solo, bato ba bisanga bakotia elikya na ngai, masuwa ma Tarsis makoya liboso mpo ya kozongisa bana ba yo bauti mosika, bakoya na palata mpe na wolo, mpo ya lokumu la nkombo ya Yawe Nzambe wa yo, ye Mosantu wa Israel, oyo apesi yo nkembo. | |
Isai | LinVB | 60:10 | Bampaya bakotonga bifelo bya yo lisusu, mpe bakonzi ba bango bakosalela yo. Ata nayokelaki yo nkanda mpe nabeteki yo, na bolamu bwa ngai nakoyokela yo ngolu. | |
Isai | LinVB | 60:11 | Bizibeli bya mboka ya yo bikotikala polele, bikokangema lisusu te, butu moi, mpo ’te bato ba bikolo bayela yo nkita, bakokambama na bakonzi ba bango. | |
Isai | LinVB | 60:13 | Bakoyela yo nkembo ya Libano, sipresi, kambala na wenge, inso elongo, mpo ya kokembisa ndako ya yo esantu, mpe kokumisa esika eye nakozalaka. | |
Isai | LinVB | 60:14 | Bana ba banyokoli ba yo bakogu-mba mokongo, baye batiolaki yo bakokumbama o boso bwa yo. Bakotanga yo ‘Engumba ya Yawe, Sion ya Mosantu wa Israel’. | |
Isai | LinVB | 60:15 | Ozalaki mopotu, bazalaki koyina yo, bayaki kotala yo te, kasi nakokomisa yo ntina ya litundu, ntina ya esengo ya bato o bileko na bileko. | |
Isai | LinVB | 60:16 | Okolia bilei bilamu bya bikolo bisusu, okozwa nkita ya bakonzi ba bango, mpe okoyeba ’te ngai Yawe nabikisi yo, ’te ngai Nzambe wa Yakob nasikoli yo. | |
Isai | LinVB | 60:17 | Esika ya mbengi nakoyela yo wolo, esika ya bibende nakoyela yo palata, esika ya mabaya nakoyela yo mbengi, esika ya mabanga nakoyela yo bibende. Nakotia Boboto bo zuzi wa yo, mpe Bosembo bo moyangeli wa yo. | |
Isai | LinVB | 60:18 | O ekolo ya yo bakobunda lisusu bitumba te, bakoyiba to bakobebisa wana lisusu te. Okotanga bifelo bya yo ‘Libiki’, mpe bizibeli bya mboka ya yo ‘Nkembo’. | |
Isai | LinVB | 60:19 | Na moi mwese mokozala mwinda mwa yo te, na butu sanza ekongengele yo lisusu te : kasi Yawe akozala mwinda mwa yo seko, mpe Nzambe wa yo akozala nkembo ya yo. | |
Isai | LinVB | 60:20 | Mwese mwa yo mokokita lisusu te, sanza ya yo ekolimwa lisusu te, zambi Yawe akozala mwinda mwa yo seko mpe mikolo mya lilaka lya yo mikosila. | |
Isai | LinVB | 60:21 | O ekolo ya yo okokuta se bato ba bosembo, bakozala bankolo ba mokili seko. Ngai nalonaki bango, bazali mosala mwa ngai, bakolakisaka nkembo ya ngai. | |