Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 8
Isai LinVB 8:1  Yawe alobi na ngai : « Kamata libaya linene mpe koma wana nkoma na ekomeli ya ebende maloba maye : ‘Bobotoli boyei - Boyibi bobelemi’.
Isai LinVB 8:2  Mpe kamata banzeneneke ba solo : nganga Nzambe Uria mpe Zekaria, mwana wa Yeberikia. »
Isai LinVB 8:3  Na nsima nakei epai ya profeta mwasi ; akweli zemi mpe aboti mwana mobali. Yawe alobi na ngai : Pesa ye nkombo ‘Bobotoli boyei - Boyibi bobelemi’.
Isai LinVB 8:4  Mpo liboso ’te mwana ayeba koloba ‘tata’ to ‘mama’ bakoyela mokonzi wa Asur nkita ya Damasko mpe biloko ba-Samaria babotoli.
Isai LinVB 8:6  Awa bato ba ekolo eye bakinoli mai ma Silowe maye makotiolaka malembe, mpe balengi liboso lya Rason mpe mwana wa Remalia,
Isai LinVB 8:7  Mokonzi akoti­ndela bango mai ma Ebale makotiolaka makasi mpe ma bozindo : mokonzi wa Asur na nguya ya ye inso. Mai ma ebale eye makoleka mabongo mpe makosopana o mabelé ma mpembeni.
Isai LinVB 8:8  Mai mango makoleka tee o Yuda, makozindisa mokili mpe makokoma tee o nki­ngo, makotandema o ekolo ya yo mobimba, e Emanuel.
Isai LinVB 8:9  Bino bato ba bikolo, bobanga mpe boyoka nsomo, bofungola matoi, bino bato ba mikili mosika ! ata bomilengeli na etumba, bakolonga bino.
Isai LinVB 8:10  Mikano bokani mikosalema te, maye bokosakola makozala se mpamba, zambi ‘Nzambe azali na biso’.
Isai LinVB 8:11  Ntango Yawe akangi ngai na loboko mpe alobi bongo, akebisi ngai ’te nalanda nzela ya bato baye te :
Isai LinVB 8:12  « Botanga ‘boangeleli’ te maye bakotangaka mbala inso ‘boangeleli’ ; maye bango bakobangaka, boba­nga mango te ; boyoka nsomo te.
Isai LinVB 8:13  Bokotanga Yawe wa bokasi bonso mosantu, bobanga bobele ye, boyoka nsomo se mpo ya ye.
Isai LinVB 8:14  Ye akozalela mabota mabale ma Israel ndako esantu, libanga lya libaku liye bato bakotuta, libanga linene likokweisa bango ; akozalela bato ba Yeruzalem motambo mpe monyama.
Isai LinVB 8:15  Bato ebele bakotuta libaku, bako­kweya mpe bakozoka, bakokoto o motambo mpe bakokangema.
Isai LinVB 8:16  Oteya bayekoli ba ngai maloba maye, lokola mibombamo mya solo. »
Isai LinVB 8:17  Ngai nakozila Yawe oyo abombeli bato ba Yakobo elongi, mpe nakotia motema se na ye.
Isai LinVB 8:18  Tala ngai na mpe bana baye Nza­mbe apesi ngai, tokomi bile­mbo bya kokamwa o miso ma ba-Israel, biuti na Yawe wa bokasi bonso, oyo afandi o ngomba Sion.
Isai LinVB 8:19  Mpe soko bayebisi bino : « Boke­nde kotuna milimo mya bawa to bamoni-makambo baye bakolobaka na bonkutu, mpo bato banso bakotunaka banzambe ba bango, to bato bawa mpo ya kosalisa bato bazali na bomoi ! »
Isai LinVB 8:20  boyoka mpe bokeba na mateya mpe na malako ma ngai ! Mawa na moto akoloba bongo te, mpo bakoki koboya mateya mana te.
Isai LinVB 8:21  Bakoyengayenga o mokili mpe bakolembe na nzala. Mokolo bakokufa na nzala, bakosilika, bakotombela mokonzi wa ekolo na Nzambe bobe. Soko bakotala likolo
Isai LinVB 8:22  to bakotala o nse, bakomono bipai binso mpasi na molili, bakokangema na londende lokasi mpe na molili mwa nsomo.
Isai LinVB 8:23  Moto akokangema na molili moye, akokima wana te.
Isai LinVB 8:24  Kala Yawe asambwisaka mikili mya Zabulon na Neftali, kasi na nsima akobongisa nzela ya mbu na nkembo, kin’o ngambo ya Yordane mpe o bikolo bisusu.