Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOB
Prev Up Next
Chapter 37
Job LinVB 37:1  Emoni ngai bongo, nakomi kolenge, mpe motema mokomi kobete makasi lokola molingi kobima.
Job LinVB 37:2  Boyoka naino mongongo makasi mwa Nzambe, boyoka makeléle makobimaka o monoko mwa ye.
Job LinVB 37:3  Akoyokisaka mango bipai binso o likolo, minkalali mya ye mikokendeke o nse mobimba.
Job LinVB 37:4  Na nsima, lokito lokoyokanaka makasi, ye mokonzi monene azali koloba na mongongo monene. Awa ayokisi mongongo mwa ye bongo, atambwisi mpe minkalali mya ye.
Job LinVB 37:5  Nzambe akosalaka makamwisi ma ye na mongongo makasi, bikela biye binene bileki mayele ma biso.
Job LinVB 37:6  Soko alobi na mbula ya mpembe : « Kweya o nse ! » mpe na mbula : « Bete makasi ! »,
Job LinVB 37:7  bato banso batiki mosala mwa bango mpo ’te bandima bikela bya ye.
Job LinVB 37:8  Nyama ya zamba ikei koluka esika ya kolala, mpe kobombama o kati ya mabulu.
Job LinVB 37:9  Na nsima ekumbaki ebimi o esika ezalaki, mpe mompepe moyokisi mpio makasi.
Job LinVB 37:10  Mpema ya Nzambe ekangisi mai mabongwana, makoma makasi lokola libanga.
Job LinVB 37:11  Ebimi moi, mampata manso makolongwa, mampata mayaki na nkake makopanzana.
Job LinVB 37:12  Ye moto akotambwisaka mango bipai binso mpo ’te masala mosala lokola ye alingi, o mokili mobimba, se lokola ye atindi.
Job LinVB 37:13  Apesa etumbu to bolamu, manso mazali se mosala mwa mampata ma ye.
Job LinVB 37:14  E Yob, yoka mango malamu, fanda nye mpe tala makamwisi ma Nzambe.
Job LinVB 37:15  Boniboni Nzambe akotindaka mango, oyebi ? Boniboni akongengisa monkalali o mampata, oyebi ?
Job LinVB 37:16  Botamboli bwa mampata o likolo, oyebi ? Oyebi makamwisi manso ma bwanya bwa ye ?
Job LinVB 37:17  Yo, soko bilamba bileki molunge mingi, o ntango mokili mokauki na moi makasi,
Job LinVB 37:18  ozalaki wana mpo ’te okomisa mampata makasi, lokola bakobeteke talatala ya bibende ?
Job LinVB 37:19  Yebisa ngai makambo nini tokoki koloba na ye, awa molili molekeli biso, toyebi yango te.
Job LinVB 37:20  Likambo nazali koloba, ayoki lyango te, solo ? Maye moto azali kotinda, ayebi mango te ?
Job LinVB 37:21  Ntango esusu moi mokomonono lisusu te, zambi mampata maindo mazipi mwango, kasi na nsima mompepe moyei kolongola mango ;
Job LinVB 37:22  mpe mwinda kitoko mobimi lokola wolo epai ya Nordi, Nzambe amizingi na nkembo enene mpenza.
Job LinVB 37:23  Ye azali nta bokasi, tokoki kokoma epai ya ye te, aleki binso na bokasi mpe na bosembo, akonyokoloko moto moko te.
Job LinVB 37:24  Yango wana bato banso basengeli kobanga ye, bato ba mayele banso elongo bazali se mpamba o miso ma ye.