Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 6
Luke LinVB 6:1  Mokolo mǒkó Yézu alekí o elanga ya mbuma ya mámpa. Ezalákí mokolo mwa sábato. Bayékoli babúkí mitó, babimísí mbuma na mabóko mpé baléí yangó.
Luke LinVB 6:2  Ba-Farizéo basúsu balobí : « Mpô níni bosálí maye mapekísámí o mokolo mwa sábato ? »
Luke LinVB 6:3  Yézu ayanólí bangó : « Bôngó botángí naíno té níni Davídi asálákí ntángo ayókákí nzala, yě na báníngá ba yě ?
Luke LinVB 6:4  Ayíngélí o ndáko ya Nzámbe, akamátí mámpa babonzí, aléí mangó mpé akabélí báníngá ba yě. Nzókandé bobélé banganga Nzámbe bakokákí kolía mámpa mâná. »
Luke LinVB 6:5  Mpé abakísí : « Sôló, Mwána wa Moto azalí mokonzi wa sábato. »
Luke LinVB 6:6  Mokolo mwa sábato mosúsu Yézu ayíngélí o sinagóga, abandí kotéya bato. Moto mǒ ko azalákí wâná, lobóko la yě la mobáli lokaúká.
Luke LinVB 6:7  Batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo bazalákí konóngo yě, bámóno sókó akobíkisa moto o mokolo mwa sábato, bôngó bázwa ntína ya kofúnda yě.
Luke LinVB 6:8  Kasi yě ayébí makanisi ma bangó, alobí na moto anyě lá lobóko : « Yáká kotéleme áwa o míso ma bato bánso. » Akeí kotéleme wâná.
Luke LinVB 6:9  Yézu alobí na bangó : « Natúní bínó : Bakokí kosála malámu o mokolo mwa sábato tǒ té ? Bábíkisa moto tǒ bátíka yě ákúfa ? »
Luke LinVB 6:10  Atálí bangó mǒkó mǒkó ; na nsima alobí na moto ôná : « Tandá lobóko. » Yě atandí lobóko, mpé lobóko lokómí malámu mpenzá.
Luke LinVB 6:11  Kasi bangó batokí na nkándá, bakeí koyókana, báluka níni bakokí kosála na Yézu.
Luke LinVB 6:12  O mikolo mîná akeí kosámbela o ngómbá. Butú mobimba asámbélí Nzámbe.
Luke LinVB 6:13  Etání ntóngó, abéngí bayékoli ba yě ; o káti ya bangó aponí bato zómi na bábalé, apésí bangó nkómbó bapóstolo :
Luke LinVB 6:14  Simóni, óyo apésí nkómbó Pétro, ndeko wa yě Andréa, Yakóbo na Yoáne, Filípo na Barteleméo,
Luke LinVB 6:15  Matéo na Tomá, Yakóbo mwána wa Alféo, na Simóni, óyo bakobéngaka ‘moto wa moléndé’,
Luke LinVB 6:16  Yudási, mwána wa Yakóbo, na Yudási Iskariote, óyo akokóma mosúli.
Luke LinVB 6:17  Akití ngómbá elongó na bangó, kasi atélémí o esíká ya patátálú. Bayékoli ba yě míngi bazalákí wâná, ná bato ebelé baútí o Yudéa mobimba, o Yerúzalem, o mokili mwa Tíro na Sidóni, penepene na mbú enéne.
Luke LinVB 6:18  Bayéí koyóka yě mpé koluka ’te bábíka o mpási ya bangó. Baye banyókwámákí na bilímo mbindo babíkí.
Luke LinVB 6:19  Bato bánso balukí kosímba yě, zambí ngúyá ezalákí kobima o nzóto ya yě mpé kobíkisa bangó bánso.
Luke LinVB 6:20  Yézu atómbólí míso, atálí bayékoli ba yě, alobí : « Esengo na bínó babóla, zambí bo­kozwa Bokonzi bwa Nzámbe.
Luke LinVB 6:21  Esengo na bínó bato bozalí koyóka nzala sikáwa, zambí bokotó­nda. Esengo na bínó bato bozalí kolela sikáwa, zambí bokosepela nsima.
Luke LinVB 6:22  Esengo na bínó sókó bato bakoyina bínó, sókó bakobengana bínó, sókó bakofínga bínó mpé bakobébísa lokúmu la bínó mpô ya Mwána wa Moto.
Luke LinVB 6:23  Mokolo bakosála bínó bôngó, bópimbwa na nsáí, zambí bokozwa lifúta linéne o likoló. Bankóko ba bangó basáláká na baproféta sé bôngó.
Luke LinVB 6:24  Kasi mawa na bínó, bato ba nkita, zambí bosílí kozwa biye bikosepelisaka bínó.
Luke LinVB 6:25  Mawa na bínó botóndí sikáwa, zambí bokoyóka nzala. Mawa na bínó bozalí kosepela sikáwa, zambí bokozala na mawa mpé bokolela.
Luke LinVB 6:26  Mawa na bínó sókó bato bánso bazalí kokúmisa bínó ! Bankóko ba bangó basáláká sé bôngó na baproféta ba lokutá.
Luke LinVB 6:27  Kasi nalobí na bínó bato bozalí koyóka ngáí : Bólinga bangúná ba bínó. Bósála malámu na bato bayiní bínó.
Luke LinVB 6:28  Bato babétélí bínó mobondo, bótómbela bangó mambí malámu, mpé bósámbelela bato basálí bínó mabé.
Luke LinVB 6:29  Sókó moto abétí yǒ o litáma lyǒkó, pésá yě litáma lisúsu. Moto abótólí yǒ elambá, ópíma yě monkóto té.
Luke LinVB 6:30  Moto aséngí yǒ elóko, pésá yě yangó ; sókó moto akamátí yangó na makási, ósénge yě yangó té.
Luke LinVB 6:31  Maye bolingí bato básála bínó, bósála bangó sé bôngó.
Luke LinVB 6:32  Sókó bolingí bobélé bato baye bakolingaka bínó, ntína níni bátóndo bínó ? Atâ basúmuki bakolingaka bato baye balingí bangó.
Luke LinVB 6:33  Mpé sókó bosálí malámu na ba­ye basálí bínó malámu, ntína níni bátó­ndo bínó ? Atâ basúmuki bakosálaka bôngó.
Luke LinVB 6:34  Sókó bokodéfisa mosolo bobélé na baye bakokí kozó­ngisela bínó, ntína níni bátó­ndo bínó ? Atâ basúmuki bakodéfisaka báníngá mosolo na elíkyá ’te bázwa mwangó lisúsu.
Luke LinVB 6:35  Kasi bínó bólinga bangúná. Bósála bato bánso malámu. Bódéfisa mosolo, atâ elíkyá ’te bázóngisa mwangó ezalí té. Bobélé bôngó bokozwa lifúta linéne, mpé bokozala bána ba Ntá-Likoló, zambí yě akosálaka malámu na bato bakotóndoko yě té mpé na bato babé.
Luke LinVB 6:36  Bózala motéma ngolu, lokóla Tatá wa bínó azalí motéma ngolu.
Luke LinVB 6:37  Bósámbisa moto té, bôngó bakosámbisa bínó té. Bókitisa moto té, mpé bakokitisa bínó té. Bólímbisa báníngá mpé bakolímbisa bínó.
Luke LinVB 6:38  Bópésa báníngá bilóko mpé bakopésa bínó lokóla ; bakotóndisa bikoló bya bínó, bakofina mpé bakoningisa byangó mpô ’te bítónda meké ; zambí na emekeli bokomeka bato basúsu, bakomeka mpé bínó. »
Luke LinVB 6:39  Alobí na bangó naíno moúlání moye : « Moto wa lolandá akokí ndé kokamba moto musúsu wa lola­ndá ? Bánso bábalé bakokwâ o libúlú té ?
Luke LinVB 6:40  Moyékoli alekí molakisi wa yě té ; kasi sókó ayébí matéya mánso nyé, akokóma lokóla molakisi wa yě.
Luke LinVB 6:41  Mpô níni ozalí kotála mwâ litíti likótélí ndeko wa yǒ o líso, kasi libáyá likótélí yǒ mǒkó o líso ozalí komóno liye lyangó té ?
Luke LinVB 6:42  Bóníbóní okokí koloba na ndeko wa yǒ : ‘Ndeko, tíká nálongola litíti o líso lya yǒ’, kasi ozalí komóno libáyá o líso lya yǒ mǒkó té ? Mokíbisi, longólá libosó libáyá o líso lya yǒ mǒkó, na nsima okomóno malámu mpô ya kolongola litíti o líso lya ndeko wa yǒ.
Luke LinVB 6:43  Nzeté elámu ekobótaka mbuma ibé té, mpé nzeté ebé ekobótaka mbuma ilámu té.
Luke LinVB 6:44  Bakoyébaka nzeté na mbuma ya yangó. Bakobúkaka ndé fígi o káti ya nzúbe, mpé mbuma ya víno o káti ya nsé­ndé ?
Luke LinVB 6:45  Moto malámu azalí na makambo malámu o motéma, mpé akobimisaka makambo malámu. Moto mabé azalí na makambo mabé o motéma, mpé akobimisaka makambo mabé ; mpámba té, monoko mokolobaka maye matóndí o motéma.
Luke LinVB 6:46  Mpô níni bokotángaka ngáí ‘Mokonzi, mokonzi’, kasi bokotósaka maloba ma ngáí té ?
Luke LinVB 6:47  Moto nyónso akoyâ epái ya ngáí, akoyóka maloba ma ngáí mpé akokokisa mangó, azalí lokóla náni ? Nakoyébisa bínó !
Luke LinVB 6:48  Azalí lokóla moto ató­ngí ndáko : libosó atímólí mabelé téé akútí mabángá o nsé, likoló lya mangó atóngísí mabángá ma nsé ma ndáko. Ntángo mbúla enókí makási, ekumbaki eyéí koningisa ndáko êná, kasi ndáko ebúkání té, mpô etóngámí o mabángá.
Luke LinVB 6:49  Kasi moto ayókí maloba ma ngáí, nzókandé akokísí mangó té, azalí lokóla moto atóngí ndáko ya yě o zélo, atíákí mabángá té. Ntángo mái mayéí míngi mpé ekumbaki eyéí koningisa ndáko, ndáko ebúkání na mbala yǒkó mpé ebébí nyé. »