NUMBERS
Chapter 10
Numb | LinVB | 10:2 | « Kamata palata mpe tula na yango mindule mibale, misalisa yo mpo ya kobenga bato mpe koyebisa bato ba nganda ’te elaka ya kokende ekoki. | |
Numb | LinVB | 10:3 | Esika bakobete mondule, bato banso baya kosangana penepene na yo o monoko mwa Ema ya Likita. | |
Numb | LinVB | 10:4 | Kasi soko babeti se mondule moko, bobele bankumu na bayangeli ba mabota ma Israel baya epai ya yo. | |
Numb | LinVB | 10:6 | Soko bobeti mondule mbala ya ibale boumeli, bato ba nganda eye ezali epai ya Sudi bakende. Bongo mpo ’te bato bakende, babete mindule mpe baganga ; | |
Numb | LinVB | 10:8 | Kobete mindule ezali mosala mwa bana ba Aron, banganga Nzambe : ezali mobeko mwa seko napesi bino mpe bana ba bino. | |
Numb | LinVB | 10:9 | Soko mokolo mosusu o mokili mwa bino bokei kobundisa monguna azali konyokolo bino, bobete mindule mpe boganga. Yawe Nzambe wa bino akokanisa bino mpe akobikisa bino o maboko ma banguna. | |
Numb | LinVB | 10:10 | O mikolo bokosepela biyenga bya bino o mikolo mya sanza ya sika, bobete mindule o ntango bokobonza mabonza to miboma mya bondeko. O ntango ena bokanisa Nzambe wa bino. Ngai nazali Yawe Nzambe wa bino. » | |
Numb | LinVB | 10:11 | O mobu mwa mibale, o sanza ya ibale, o mokolo mwa ntuku ibale, limpata lilongwi likolo lya Ema ya Likita. | |
Numb | LinVB | 10:12 | Bana ba Israel babandi kokende limpinga na limpinga mpe balongwi o eliki ya Sinai. Limpata litelemi o eliki ya Paran. | |
Numb | LinVB | 10:14 | Nsima ya bendele ya nganda ya bango bana ba Yuda bakei, lingomba na lingomba. Moto akambi limpinga lya Yuda, Nakason, mwana wa Aminadab. | |
Numb | LinVB | 10:17 | Balongoli Ndako esantu biteni biteni mpe bana ba Gerson na bana ba Merari bamemi Ndako esantu. | |
Numb | LinVB | 10:18 | Nsima ya bendele ya nganda ya bango bana ba Ruben bakei, lingomba na lingomba. Moto akambi limpinga lya Ruben, Elisur, mwana wa Sedeur. | |
Numb | LinVB | 10:21 | Na nsima bana ba Keat bakei na biloko bisantu, zambi basusu bazalaki kotonga Ndako esantu ntango bayei naino te. | |
Numb | LinVB | 10:22 | Nsima ya bendele ya nganda ya bango bana ba Efraim bakei, lingomba na lingomba. Moto akambi limpinga lya Efraim, Elisama, mwana wa Amiud. | |
Numb | LinVB | 10:25 | Na nsuka bana ba Dan bakei nsima ya bendele ya nganda ya bango, lingomba na lingomba. Moto akambi limpinga lya Dan, Akiezer, mwana wa Amisadai. | |
Numb | LinVB | 10:29 | Moze alobi na Obab, mwana wa Reuel, moto wa Madian, bokilo wa ye : « Sikawa tozali kokende o mokili moye Yawe alobaki ’te akopesa biso mwango. Yaka na biso elongo mpe tokosala yo se malamu, zambi Yawe alakeli Israel se bolamu. » | |
Numb | LinVB | 10:30 | Ye ayanoli : « Nakokende te, nakozonga o mokili mwa ngai epai ya bandeko ba ngai. » | |
Numb | LinVB | 10:31 | Moze akobi : « Otika biso bongo te, zambi yo moto oyebi bisika binso epai tolingi kopika nganda ya biso o eliki ; yo zala mokambi wa biso. | |
Numb | LinVB | 10:32 | Soko oyei na biso elongo, bolamu bonso Yawe alingi kopesa biso, tokopesa yo mpe bwango. » | |
Numb | LinVB | 10:33 | Balongwi o ngomba ya Yawe mpe batamboli mikolo misato. Sanduku ya Bondeko ekei liboso lya bango o mobembo mwa mikolo mina misato, mpo ya kolakisa bango esika ya kopema na butu. | |
Numb | LinVB | 10:34 | Elongwi bango o nganda, o ntango ya moi, limpata lya Yawe lizalaki likolo lya bango. | |
Numb | LinVB | 10:35 | O ntango bakei na sanduku, Moze alobi : « E Yawe, teleme, mpo ’te banguna ba yo bapanzana, mpe bato bakoyinaka yo bakima liboso lya yo. » | |