Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 32
Isai LinVB 32:1  Soko mokonzi akoyangela bato na bosembo, mpe ba­nkumu bakolanda bosolo,
Isai LinVB 32:2  moto nyonso akozala lokola ebo-mbamelo o ntango ya mompepe, lokola esika ya kobombama o nta­ngo ya mbula makasi, lokola miluka mya mai o bisika mabelé makauki, lokola elilingi ya libanga linene o eliki.
Isai LinVB 32:3  Baye bazali na miso, bakomono malamu, baye bazali na matoi, bakoyokemela malamu.
Isai LinVB 32:4  Bato ba bibongolabongola bakobanda koyoka ntina, baye bazalaki kokekuma, bakoloba malamu.
Isai LinVB 32:5  Oyo azangi mayele, bakotanga ye lisusu nkumu te, mpe moyibi, bakobyanga ye moto wa lokumu te.
Isai LinVB 32:6  Mpamba te, zoba akolobaka se makambo mazangi ntina, akokanaka se kosala mabe, makambo ma ye mazangi bosembo ; na maloba ma ye akotukaka Yawe, akopimaka moto akufi na nzala bilei, akoboyaka komelisa moto akufi na mposa ya mai.
Isai LinVB 32:7  Mokosi akokanaka se kosala mabe, akolukaka nzela inso ya kokosa mobola, ata mobola oyo azali na likoki lya kosenge.
Isai LinVB 32:8  Kasi moto wa bosembo akolukaka se kosala malamu, makambo ma ye manso mabongi nye.
Isai LinVB 32:9  Bino basi ba lofundo, boyoka ngai, bino bilenge basi bokopa­nganaka na eloko te, botia matoi na maloba ma ngai.
Isai LinVB 32:10  Bino basi ba molumba bokokanisaka eloko te, etikali se mobu moko na mwa mikolo, bokolenge, mpamba te, bokobuka mbuma ya vino lisusu te, ntango ya kosangisa mbuma ekosila.
Isai LinVB 32:11  Boyoka nsomo, bino basi bokokanisaka eloko te, bolenge na nsomo, bino bopusi lolendo, bolongola bilamba kitoko mpe bokanga liputa o loketo.
Isai LinVB 32:12  Boyoka mitema mawa mpe bolela bilanga bya bino kitoko mpe nzete ya vino iye ikobotaka mbuma mingi.
Isai LinVB 32:13  Bolela mokili mwa bato ba ngai motondi na nzube, bolela ndako ya bisengo esika bato bakosepelaka.
Isai LinVB 32:14  Mpamba te, bato banso bakokima ndako ya lokumu, engumba ya makeléle mingi ekokoma mopotu, ndako ya Ofel na manongi makokoma mibenga seko ; mpunda ya zamba ikofanda mpe bibwele bikolia wana.
Isai LinVB 32:15  Ut’o likolo Elimo wa Nzambe ako­kitela biso, eliki ekobongwana elanga ya nzete, mpe elanga eye ekotonda na nzete lokola zamba.
Isai LinVB 32:16  Bosembo bokozala o eliki ena, mpe o elanga ya nzete bakosamba na bosembo.
Isai LinVB 32:17  Bosembo bona bokobota mbuma ya boboto, mpo ya bosembo bato bakofanda kimia libela.
Isai LinVB 32:18  Bato ba ngai bakofanda kuna na boboto, o ndako inene esika makeléle mazali te.
Isai LinVB 32:19  Kasi mbula ya matandala ekobebisa zamba lya banguna, mpe mboka ya bango ekokufa nye.
Isai LinVB 32:20  Bokoyoka esengo soko bokolona mboto penepene na mai, bokokoka koleisa ngombe na mpunda bipai binso.