JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 17
Jere | LinVB | 17:1 | Masumu ma ba-Yuda ma komami na ekomeli ya ebende, na nsonge ya libanga lya diama o etanda ya mitema mya bango mpe o maseke ma bitumbelo bya bango, | |
Jere | LinVB | 17:2 | mpo ’te bana ba bango bakanisa bitumbelo na makonzi ma bango penepene na nzete o nsonge ya ngomba, | |
Jere | LinVB | 17:3 | mpe o ngomba ya ngai o kati ya esobe. Nakokaba nkita mpe biloko bya yo binso na bayibi mpo ya masumu manso o ekolo ya yo mobimba. | |
Jere | LinVB | 17:4 | Okotika mabelé maye napesaki yo, nakokomisa yo moombo wa banguna ba yo o ekolo eyebani na yo te. Mpamba te, nkanda ya ngai epelisi móto, moye mokopela seko. | |
Jere | LinVB | 17:5 | Yawe alobi boye : Mawa na moto oyo atii motema na bato, oyo aluki bokasi bobele epai ya bato, oyo alongoli motema epai ya Yawe. | |
Jere | LinVB | 17:6 | Azali lokola nzube o esobe : ata o esika elamu ekoyoka esengo te, ekofanda bobele o bisika bitumbami na móto, ekopono se mabelé ma mongwa esika bato bazali te. | |
Jere | LinVB | 17:8 | Azali lokola nzete baloni mpembeni ya mai, etandi minsisa epai ya moluka, eyoki mpasi te o ntango ya moi makasi ; nkasa ya yango ikotikala ibesu, ebangi mpe elanga makasi te, ekobota mbuma ntango inso. | |
Jere | LinVB | 17:10 | Ngai Yawe nayebi makanisi ma bato, nayebi moto kin’o ntei ya motema. Nakopesa moto na moto lifuta likoki na ye engebene na mbuma ya misala mya ye. | |
Jere | LinVB | 17:11 | Esosolo ekokukamaka maki maye yango moko eboti te. Se bongo soko moto akomi na nkita na bosembo te : asengeli kotika mwango ata asilisi mikolo mya ye te, mpe o nsuka akotikala bobele zoba. | |
Jere | LinVB | 17:13 | Yo Yawe, ozali elikya ya bato ba Israel, baye banso bawangani yo, bakoyoka nsoni, banso baboyi yo, bakosila o ekolo, mpo batiki Yawe, liziba lya mai ma bomoi. | |
Jere | LinVB | 17:14 | Bikisa ngai, Yawe, nakobika ; sikola ngai, mpe nakosikwama, zambi yo ozali ntina ya lokumu la ngai. | |
Jere | LinVB | 17:15 | Yoka lolenge bato bakolobaka na ngai : « Wapi liloba lya Yawe ? Lisalema se bosalemi ! » | |
Jere | LinVB | 17:16 | Ngai nasengeki te ’te makama makwela bato, nalingaki mokolo mwa mpasi te : oyebi maloba mabimi o monoko mwa ngai, oyebi mango manso malamu. | |
Jere | LinVB | 17:18 | Banyokoli ba ngai basambwa, kasi ngai te ! Mokolo mwa mpasi mokwela se bango. nyata mpe silisa bango nye ! | |
Jere | LinVB | 17:19 | Yawe alobaki na ngai : Kende koteleme o ‘Ezibeli ya Bato’, esika bakonzi ba Yuda bakokotoko mpe bakobimaka ; kende mpe epai ya bizibeli binso bya Yeruzalem. | |
Jere | LinVB | 17:20 | Loba na bato : Bino bakonzi ba Yuda, bino bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem, bokolekaka o bizibeli biye, boyoka ! | |
Jere | LinVB | 17:21 | Yawe alobi boye : Bokeba ! Bomeme mikumba o mokolo mwa Sabato te ; bokotisa byango o bizibeli bya Yeruzalem te. | |
Jere | LinVB | 17:22 | Bobimisa mokumba moko o ndako ya bino te, mpe bosala mosala moko o mokolo mwa Sabato te. Bosantisa mokolo mwa Sabato lokola natindaki bankoko ba bino. | |
Jere | LinVB | 17:23 | Bango bayokaki te, batiaki matoi te, bakomaki motó makasi mpe bayambaki mateya ma ngai te. | |
Jere | LinVB | 17:24 | Yawe alobi boye : Soko bolingi kotosa ngai, boyingisa mokumba moko o bizibeli bya engumba eye o mokolo mwa Sabato te. Soko bosantisi mokolo mwa Sabato, mpe bosali mosala moko o mokolo mona te, | |
Jere | LinVB | 17:25 | bakonzi bakofandaka o ngwende ya Davidi bakoyingela o bizibeli bya engumba eye na makalo mpe na farasa, elongo na bayangeli, bankumu na bato banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem. Bongo bato bakofanda o engumba eye seko. | |
Jere | LinVB | 17:26 | Bato bakouta o bingumba bya Yuda mpe penepene na Yeruzalem, o mokili mwa Benyamin mpe o mokili mwa bisobe, ngomba to epai ya Negeb, bakoya kobonza mabonza ma kotumba, miboma, mabonza ma bolei na mpaka ya malasi, mpe ma kotondo Yawe o Tempelo eye. | |