JOB
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
Chapter 3
Job | LinVB | 3:3 | Mawa na mokolo babotaki ngai mpe na butu bona moto alobaki : « Mama akweli zemi lya mwana mobali ! » | |
Job | LinVB | 3:4 | Mokolo mona mobongwana molili, o likolo Nzambe atanga mwango te, moi motanela mwango te ! | |
Job | LinVB | 3:5 | Molili mwa mboka ya bawa mokanga mwango, limpata liindo lizipa mwango, mwese motika kongengele mwango ! | |
Job | LinVB | 3:6 | Molili molia mokolo mona, mobima o molongo mwa mikolo mya mobu te, motangema mpe o kati ya mikolo mya sanza te ! | |
Job | LinVB | 3:9 | Minzoto mya ntongo ena mizipama mpo ’te butu bona bozila moi se mpamba mpe bomono botani bwa ntongo te ! | |
Job | LinVB | 3:10 | Zambi butu bona bokangaki libumu lya mama te, mpo ’te namono mpasi ya mokili na miso te. | |
Job | LinVB | 3:11 | Mpo nini nakufaki te o kati ya libumu lya mama ? To nakufaki noki te ntango nabimaki o libumu lya ye ? | |
Job | LinVB | 3:15 | esika yoko na bakonzi bazalaki na wolo mingi mpe batondisi malita ma bango na palata. | |
Job | LinVB | 3:16 | Malamu soko nakufaki o kati ya libumu lya mama, lokola bana bake bamonoki moi mokolo moko te. | |
Job | LinVB | 3:18 | Banso bakoti o boloko bakomi kopema lokola, bakoyoka makeléle ma bakengeli lisusu te. | |
Job | LinVB | 3:19 | Wana bato banene na bato bake bazali se lolenge loko, moombo akangemi na mibeko mya nkolo wa ye lisusu te. | |
Job | LinVB | 3:20 | Mpo nini moto wa mawa akobotama ? Mpo nini kopesa bomoi na bato batondi na mawa o motema ? | |
Job | LinVB | 3:21 | Baye baluli se liwa boluli, kasi liwa likoya te, balingi lyango lokola eloko ya motuya monene. | |
Job | LinVB | 3:23 | Mpo nini bakopesa bomoi na moto amoni nzela ya ye te, oyo Nzambemei akangi o lopango ? | |