ACTS
Chapter 13
Acts | LinVB | 13:1 | O Eklézya ya Antiókia baproféta na batéyi bazalákí : Bárnaba, Simeó óyo bakobéngaka Níger, Lúsio wa Siréne, Manaén, óyo akólákí esíká yǒ kó na moyángeli wa Eróde, na Saul. | |
Acts | LinVB | 13:2 | Mokolo mosúsu, ntángo bazalákí kosámbela Mokonzi mpé kolála nzala, Elímo Sántu alobí : « Bótíkela ngáí Bárnaba na Saul básála mosálá naponélí bangó. » | |
Acts | LinVB | 13:3 | Bôngó balálí nzala mpé basámbélí ; na nsima batíélí bangó mabóko mpé batíkí bangó bákende. | |
Acts | LinVB | 13:4 | Awa Elímo Sántu atíndí bangó, bakeí o Selésia ; kúná bakwélí o masúwa mpé bakeí o Sípro. | |
Acts | LinVB | 13:5 | Ekómí bangó o Sálamis babandí kosakola Liloba lya Nzámbe o sinagóga ya ba-Yúda. Yoáne azalákí kosálisa bangó. | |
Acts | LinVB | 13:6 | Bakátísí esanga mobimba kín’o Páfos. Kúná bakútí mo-Yúda mǒkó, azalákí nganga mpé akomítángaka proféta, nkómbó ya yě Bar-Yézu. | |
Acts | LinVB | 13:7 | Azalákí kofánda epái ya Sérgio Pólo, moyángeli mpé moto wa mayéle. Sérgio óyo atíndí ’te bábênga Bárnaba na Saul, mpô azalákí na mpósá ya koyóka Liloba lya Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 13:8 | Kasi nganga Elimási (lokóla ba-Gréki bakobéngaka yě ) andimí bangó té, amekí mpé kopekisa moyángeli koyamba. | |
Acts | LinVB | 13:10 | alobí : « Ozalí mwána wa zábolo, otóndí na mayéle mabé mpé na bokósi, ozángí bosémbo. Okotíka té kobébisa nzelá sémba ya Mokonzi ? | |
Acts | LinVB | 13:11 | Tálá, sikasikáwa lobóko la Mokonzi lokobéte yǒ ; okokóma na lolandá, mpé mwâ mikolo okomóno mói lisúsu té. » Sé o ntángo êná molílí mokangí yě, amíbóngólí epái na epái, mpé alukí moto mǒkó ákamba yě. | |
Acts | LinVB | 13:12 | Awa moyángeli amóní bôngó, akómí koyamba, mpô matéya ma Mokonzi makotélí yě o motéma. | |
Acts | LinVB | 13:13 | Pólo na báníngá ba yě bakwélí o masúwa o Páfos, bakomí o libóngo lya Pérge ya Pamfília. Kasi Yoáne atíkí bangó mpé azóngí o Yerúzalem. | |
Acts | LinVB | 13:14 | Bangó balekí Pérge mpé bakómí o Antiókia ya Pisídia. O mokolo mwa sábato bayíngélí o sinagóga mpé bafándí wâná. | |
Acts | LinVB | 13:15 | Nsima ya botángi Minkandá mya Mobéko mpé mya baproféta, bakonzi ba sinagóga batíndélí bangó maloba maye : « Bandeko, sókó bozalí na mwâ liloba lya koléndisa bato, bóloba. » | |
Acts | LinVB | 13:16 | Pólo atélémí, ayébísí na lobóko mpé alobí : « Bato ba Israél mpé bínó bato bokomemyaka Nzámbe, bóyóka. | |
Acts | LinVB | 13:17 | Nzámbe wa ekólo eye, Nzámbe wa Israél, aponí bankóko ba bísó mpé akólísí ekólo eye, ntángo bazalákí baómbo o Ezípeti. Abimísí bangó kúná na bokási bwa lobóko la yě, | |
Acts | LinVB | 13:19 | Na nsima abomí bikólo nsambo o mokili mwa Kanána mpé akabélí bankóko ba bísó mabelé ma bangó : | |
Acts | LinVB | 13:20 | mibú sókí nkámá ínei na ntúkú ítáno asálísí bangó. Nsima ya yangó apésí bangó bazúzi kín’o eleko ya proféta Samuél. | |
Acts | LinVB | 13:21 | O ntángo êná baséngí ’te bákóma na mokonzi, mpé Nzámbe apésí bangó Saul, mwána wa Kis, wa libótá lya Benyamin : mibú ntúkú ínei azalákí mokonzi wa bangó. | |
Acts | LinVB | 13:22 | Awa Nzámbe alongólí yě, akómísí Davídi mokonzi wa bangó. Mpô ya yě alobákí : « Nazwí Davídi, mwána wa Yése, moto óyo ngáí nalingí míngi. Yě akokokisa mánso ngáí nalingí. » | |
Acts | LinVB | 13:24 | Kasi libosó naíno Yoáne aléngélákí boyéi bwa yě na bosangeli ba-Israél bánso batísimo ya bobóyi masúmu. | |
Acts | LinVB | 13:25 | Esílísí Yoáne mosálá mwa yě, alobí : « Ngáí nazalí moto óyo té bínó bozalí kokanisa ; kasi tálá moto óyo akoyâ nsima ya ngáí, nabongí atâ kokangola nsinga ya sapátu ma yě té. » | |
Acts | LinVB | 13:26 | Bandeko, bínó bána ba libótá lya Abaráma, ná mpé bínó bato bokomemyaka Nzámbe, Nzámbe atíndélí bínó nsango ya libíkí. | |
Acts | LinVB | 13:27 | Ya sôló, bato ba Yerúzalem mpé bakonzi ba bangó bandimákí Yézu té, kasi bakitísí yě o liwá, bakokísí bôngó maloba ma baproféta, maye bakotángaka mikolo mínso mya sábato. | |
Acts | LinVB | 13:28 | Atâ bazwákí ntína yǒ kó té ya kokátela yě etúmbu ya liwá, bakitísí yě mpé baséngí Piláto ’te báboma yě. | |
Acts | LinVB | 13:29 | Awa bakokísí maye mánso makomámí mpô ya yě, babákólí yě o kurúse mpé bakundí yě o lilíta. | |
Acts | LinVB | 13:31 | mpé mikolo míngi abimélákí baye batámbólákí na yě elongó út’o Galiléa kín’o Yerúzalem ; bangó bazalí sikáwa banzénénéké ba yě o míso ma bato. | |
Acts | LinVB | 13:33 | Nzámbe akokísí yangó mpô ya bísó bána ba bangó : asékwísí Yézu. Ekomámí bôngó o nzémbo ya íbalé : « Ozalí mwána wa ngáí, ngáí mǒkó nabótí yǒ leló. » | |
Acts | LinVB | 13:34 | Nzámbe asékwísí yě o bawá mpô ’te ápolo lisúsu té, yě mǒkó ayébísákí yangó boye : « Nakokokisela bínó bilakó bisántu nalakélákí Davídi, bikosálema sôló. » | |
Acts | LinVB | 13:35 | Yangó wâná ekomámí mpé epái esúsu : Okolingisa té ’te nzóto ya mosántu wa yǒ épolo. | |
Acts | LinVB | 13:36 | O bomoi bwa yě Davídi asálélákí Nzámbe o maye Nzámbe alingákí ; na nsima awéí, bakundí yě esíká yǒ kó na bankóko ba yě, mpé nzóto ya yě epolí. | |
Acts | LinVB | 13:38 | Bôngó, bandeko, bóyéba ’te tokosangelaka bínó bolímbisi masúmu na nguya ya yě. Na botósi Mobéko mwa Móze bokokákí kozwa libíkí té, | |
Acts | LinVB | 13:41 | Bótála, bínó bato bokotiolaka, bókámwa mpé bólímwa ! Zambí o eleko ya bínó nakosála likambo liye bokondima té, atâ bayébísákí bínó lyangó. » | |
Acts | LinVB | 13:42 | Ntángo Pólo na Bárnaba babimí o sinagóga, bato baséngí bangó ’te báloba naíno makambo mâná o mokolo mwa sábato mokoyâ. | |
Acts | LinVB | 13:43 | Awa lisangá lipalángání, ba-Yúda baíké na bampaya bakokúmisaka Nzámbe balandí Pólo na Bárnaba ; bangó bábalé basolólí na bangó mpé baléndísí bangó ’te báyamba ngrásya ya Nzámbe na moléndé. | |
Acts | LinVB | 13:44 | O mokolo mwa sábato mwa nsima ebelé ya bato ba engumbá basangání mpô ya koyóka Liloba lya Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 13:45 | Awa ba-Yúda bamóní bato ebelé boye, batóndí na zúwa, babóyí maloba ma Pólo mpé bafíngí yě. | |
Acts | LinVB | 13:46 | Bôngó Pólo na Bárnaba baléndísí, balobí : « Esengélákí ’te básangela bínó libosó Liloba lya Nzámbe. Kasi, áwa bobóyí lyangó mpé bomóní ’te bobongí kozwa bomoi bwa lobíko té, tokokende epái ya bato ba bikólo bisúsu. | |
Acts | LinVB | 13:47 | Sôló, Mokonzi atíndákí bísó sé bôngó : Natíí yǒ ózala mwínda mwa bikólo bisúsu, mpô ’te óyéla bato libíkí téé nsúka ya mokili. » | |
Acts | LinVB | 13:48 | Eyókí bato ba bikólo bisúsu maloba maye, bayókí esengo enéne mpé bakúmísí Liloba lya Mokonzi ; baye bánso baponómí mpô ’te bázwa bomoi bwa lobíko, bakómí koyamba. | |
Acts | LinVB | 13:50 | Kasi ba-Yúda batombókísí ba-nkúmú ba engumbá ná básí ba lokúmu baye bakokúmisaka Nzámbe ; bôngó babandí konyókolo Pólo na Bárnaba, mpé babengání bangó o ekólo ya bangó. | |