Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 36
Ezek LinVB 36:1  Yo mwana wa moto, sakola maloba ona ngomba ya Israel, okoloba : Bino ngomba ya Israel, boyoka maloba ma Yawe :
Ezek LinVB 36:2  Mokonzi Yawe alobi boye : Mo­nguna alobaki na yo : « A ! a ! Ngo­mba ina ya seko ikomi o maboko ma biso. »
Ezek LinVB 36:3  Yango wana sakola, oko­loba : Mokonzi Yawe alobi boye : Bato basusu babebisaki bino, bokomi mokili mwa bato ba bikolo bisusu. Bango na bango batongi mpe baseki bino mingi.
Ezek LinVB 36:4  Yango wana, bino ngomba ya Israel, boyoka maloba Mokonzi Yawe alobi na ngo­mba inene mpe ike, na miluka, na mabwaku, na mipotu mpe na mboka ikomi mpamba, na mboka inso bato ba bikolo bisusu bya penepene bapunzi mpe baseki.
Ezek LinVB 36:5  Mokonzi Yawe alobi boye : Mpo ya zuwa linene nalayi ndai, solo mpe­nza nazali kokanela bikolo bisusu na mpe Edom mobimba, zambi na motema esengo mpe na bokinoli babotoli mokili mwa ngai mpo bayiba biloko binso.
Ezek LinVB 36:6  Yango wana sakola ona ekolo ya Israel, loba na ngomba inene mpe ike, na miluka mpe na mabwaku ’te Mokonzi Yawe alobi boye : Ngai oyo, nalobi na zuwa mpe na nkanda o motema, mpo bato ba bikolo bisusu bayokisi bino nsoni mingi.
Ezek LinVB 36:7  Yango wana Mokonzi Yawe alobi boye : Nato­mboli loboko mpe nalayi : Nsoni bato ba bikolo bizali penepene bayokisi bino ekozongela bango.
Ezek LinVB 36:8  Bino ngomba ya Israel, bokokolisa nzete mpe bokobotela bato ba ekolo ya ngai Israel mbuma, zambi bakoumela lisusu te, balingi baya.
Ezek LinVB 36:9  So­lo, nazali koya epai ya bino, nakoya kotala bino, etikali moke baya kokata bilanga mpe kolona mbuma.
Ezek LinVB 36:10  Bato bakozala lisusu mingi o ekolo ya yo, libota mobimba lya Israel ; bingumba bikotonda na bato, ndako iye ibukani ikotongama lisusu.
Ezek LinVB 36:11  Nakopesa bino bato mpe nyama ebele, bakokola malamu mpe bakobota mingi. Nakosala ’te bokozala na bato mingi lokola kala, nakosala bino malamu, leka liboso. Bongo bokoyeba ’te ngai nazali Yawe.
Ezek LinVB 36:12  Bato ba ekolo ya ngai Israel bako­nyata mabelé ma bino, bakokoma lisusu bankolo ba mabelé ma bino, makozala ma bango mpe bokobotolo bango bana ba bango lisusu te.
Ezek LinVB 36:13  Mokonzi Yawe alobi boye : Awa basusu balobaki ’te : « Bozali ekolo ekoliaka bato, bosilisaki bana ba ekolo ya bino »,
Ezek LinVB 36:14  sikawa bokolia bato lisusu te, bokobotolo bango bana lisusu te, elobi bongo Moko­nzi Yawe.
Ezek LinVB 36:15  Nakoyokisa bino mafinga ma bikolo bisusu lisusu te, bakoseke bino lisusu te, mpe bokozanga bana lisusu te. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 36:17  Mwana wa moto : Ntango bato ba Israel bazalaki o mokili mwa bango, babebisaki mwango na ezalela mpe na misala mibe mya ba­ngo ; o miso ma ngai bazalaki na mbindo lokola mwasi azali komono sanza.
Ezek LinVB 36:18  Nakitiseli bango nkanda ya ngai, zambi bazalaki koboma ba­to mpe bazalaki kokomisa mokili mbindo na bikeko bya bango.
Ezek LinVB 36:19  Napanzi bango o bikolo bisusu, natindi ba­ngo o mikili misusu, nasali bango lokola ekokaki na ezalela mpe na misala mya bango.
Ezek LinVB 36:20  O bikolo esika bapanzanaki basantolaki nkombo ya ngai mpe bato balobaki mpo ya bango : « Bazali ekolo ya Yawe, babimi o mokili mwa ye ! »
Ezek LinVB 36:21  Yango wana nakanisi nkombo ya ngai esantu, eye bato ba Israel basambwisi o bisika binso bakendeki.
Ezek LinVB 36:22  Bongo, loba na bato ba Israel boye : nakosalaka bongo mpo ya bino te, kasi mpo ya lokumu la nkombo ya ngai, eye bino bato ba Israel bosantolaki o bikolo biye bokendeki.
Ezek LinVB 36:23  Nakosantisa nkombo enene ya ngai, eye bino bosantolaki o bikolo bisusu. Bongo soko nasili nalakisi bosantu bwa ngai o ntei ya bino o miso ma bango, elobi bongo Mokonzi Yawe, bango bakoyeba ’te ngai nazali Yawe.
Ezek LinVB 36:24  Nakoke­nde kokamata bino o bikolo bisusu, nakosangisa bino ut’o mikili minso mpe nakokamba bino o mokili mwa bino moko.
Ezek LinVB 36:25  Nakosopela bino banso mai peto, mpe bokokoma peto. Na­kolongola mbindo inso ya nzoto mpe ya bikeko bya bino.
Ezek LinVB 36:26  Nakopesa bino mitema mya sika ; nakolongola o nzoto ya bino mitema mabanga, mpe nakopesa bino mitema mya nsuni.
Ezek LinVB 36:27  Nakopesa bino elimo ya ngai mpenza ; nakosala ’te bolanda nzela ya mitindo mya ngai mpe botosa mibeko mya ngai.
Ezek LinVB 36:28  Bokofanda o mokili napesaki bankoko ba bino. Bino bokozala bato ba ngai, mpe ngai nakozala Nzambe wa bino.
Ezek LinVB 36:29  Nakolongola mbindo ya bino inso. Nakotinda mbuma ya ma­mpa, nalingi izala mingi ; nakopesa bino etumbu ya nzala lisusu te.
Ezek LinVB 36:30  Nakotinda mbuma ya nzete ebele, nalingi bilanga bibota malamu mpo ’te bokufa na nzala lisusu te, mpe boyoka nsoni o miso ma bikolo lisu­su te.
Ezek LinVB 36:31  O ntango ena bokoku­ndola ezalela ebe ya bino mpe misala mya bino mibo­ngoki te. Bokomiyoka mpi mpo ya mabe mpe mpo ya makambo ma nsomo bosalaki.
Ezek LinVB 36:32  Nakosala bongo mpo ya bino te, malamu boyeba yango, elobi bongo Mokonzi Yawe. Boyoka nso­ni na mawa mpo ya ezalela ya bino, bato ba Israel.
Ezek LinVB 36:33  Mokonzi Yawe alobi boye : Mokolo nakopetola bino na masumu ma bino manso, nakosala ’te bato bafanda lisusu o bingumba bya bino, mpe nakotongisa ndako ya bino iye ibukanaki.
Ezek LinVB 36:34  O mabelé mabebi bokokata lisusu bilanga : bato bakoleka wana bakomono lisusu mabelé malali mpamba te.
Ezek LinVB 36:35  Bato bakoloba : « Mokili moye mobebaki nye, mokomi sikawa lokola lopa­ngo la Eden ; bingumba bikomaki mipotu, batongi byango lisusu, mpe bazingi byango na lopango. »
Ezek LinVB 36:36  Bato bakozala penepene na bino bakoyeba ’te ngai Yawe nabongisi biye bibebaki mpe naloni o bilanga mbuma bapikolaki. Ngai Yawe nakosala maye manso nalobi.
Ezek LinVB 36:37  Mokonzi Yawe alobi boye : Boyoka likambo lisusu nakosala : Nakondima ’te bato ba Israel bakoka koya kotala ngai. Nakokomisa ba­ngo ekolo ya bato baike, lokola eto­nga ya bibwele,
Ezek LinVB 36:38  lokola mpata izalaki kosangana o Yeruzalem o ntango ya biyenga binene ; nakoto­ndisa na bato bingumba biye bikufaki. Bongo bato banso bakoyeba ’te ngai nazali Yawe.