ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 38
Isai | LinVB | 38:1 | O mikolo mina Ezekia abeli makasi, bokono bwa liwa. Profeta Izaya, mwana wa Amos, akei kotala ye, alobi : « Yawe alobi boye : Bongisa makambo ma ndako ya yo, zambi okowa, okobika te. » | |
Isai | LinVB | 38:3 | « E Yawe, kanisa ’te natambolaki o miso ma yo na motema lobokó mpe semba, mpe nasalaki maye makosepelisaka yo. » Mpe Ezekia abandi kolela mingi. | |
Isai | LinVB | 38:5 | « Kende mpe loba na Ezekia boye : Yawe, Nzambe wa nkoko wa yo Davidi, alobi boye : Nayoki losambo la yo mpe namoni mpizoli ya yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na bomoi bwa yo. | |
Isai | LinVB | 38:8 | O ebuteli ya ndako ya Akaz elilingi ya mwese esili ekiti mabaya zomi. Bongo ngai nakosala ’te elilingi eye ebuta mabaya zomi. » Elilingi ya mwese ebuti mabaya zomi ya maye esilaki kokita liboso. | |
Isai | LinVB | 38:10 | Namilobeli : Nakomi bobele o kati ya mikolo mya bomoi bwa ngai, mpe nazali kokende o mboka ya bawa ; bakofandisa ngai wana mibu miye mitikali. | |
Isai | LinVB | 38:11 | Nakanisi : Nakomono Yawe lisusu te o mokili moye mwa bato, nakomono lisusu moto moko te wa bato bazali o mokili. | |
Isai | LinVB | 38:12 | Babuki ndako ya ngai, ebwakemi mosika na ngai, lokola ema ya bakengeli ba mpata. Ozingi nsinga ya bomoi bwa ngai lokola motongi akosalaka. Nsinga ya bomoi bwa ngai ekatani. Na mokolo moko osukisi ngai. | |
Isai | LinVB | 38:13 | Ekomi ntongo nasili nalembi, obuki ngai minkuwa lokola ntambwe, na mokolo moko osukisi ngai. | |
Isai | LinVB | 38:14 | Nazali kolela lokola nyampeke, nazali kokimela lokola ebenga. Miso malembi kotala likolo. Nanyokwami mingi, Mokonzi, bikisa ngai. | |
Isai | LinVB | 38:15 | Naloba nini, nayebisa ye nini, awa ye moto akosalaka maye manso ? Nakosukisa mikolo mya ngai, na boyoki mpasi mingi mpenza. | |
Isai | LinVB | 38:16 | Mokonzi azali penepene na bato ba ye, bakobika, elimo wa ye akopesa bango bomoi, yango wana okobikisa ngai, okobakisela ngai mikolo. | |
Isai | LinVB | 38:17 | Mpasi ya ngai esili, nakomi na boboto, mpo obikisi ngai o libulu lya liwa, obwaki masumu ma ngai manso mosika. | |
Isai | LinVB | 38:18 | O mboka ya bawa bakokumisaka yo te, bawei bakokembelaka nkembo ya yo te. Baye bakwei o libulu bakolikya lisusu na bolingi bwa yo te. | |
Isai | LinVB | 38:19 | Bobele moto azali na bomoi akoki kokumisa yo, lokola ngai nakumisi yo lelo. Bobele tata akoki koyebisa bana ba ye ’te bolingi bwa yo bokoumela seko. | |
Isai | LinVB | 38:20 | Yawe alingi abikisa ngai, tokoyembela yo na lokombe mikolo minso mya bomoi bwa biso o Tempelo ya yo, Yawe. | |
Isai | LinVB | 38:21 | Izaya alobi : « Baya na limpa lya figi mpe batia lyango na mpota. Mpe mokonzi akobika. » | |