Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 59
Isai LinVB 59:1  Ya solo, loboko ya Yawe ezali ya kolembe te mpo ya ko­bi­ki­sa bino te, azali na matoi makoyokaka malamu.
Isai LinVB 59:2  Bobele masumu ma bino makaboli bino na Nzambe, masumu ma bino mabombeli bino elongi ya ye, mpe akoyoka bino te.
Isai LinVB 59:3  Maboko ma bino matondi na makila, mpe misapi mya bino mibebi na masumu, mbebu ya bino ikosakolaka makambo ma lokuta, lolemu la bino lokobimisaka makambo ma kokosa.
Isai LinVB 59:4  Bakofundaka baninga na bose­mbo te, bakosambaka makambo na bosolo te. Bakolandaka makambo ma mpa­mba, balingi se kokosa, batondi na mabe mpe bakobotaka masumu.
Isai LinVB 59:5  Bakolalelaka makei ma etupa, bakotongaka bobele monyama mwa limpulututu. Moto oyo akolia makei mana, ako­kufa na mango, soko likei lipaswani, ekobima wana mwana wa nyoka.
Isai LinVB 59:6  Na mampulututu bakoki kosala elamba te, maye bakosalaka bakoki kolata ma­ngo te. Misala mya bango mizangi bose­mbo, bakobimisaka se makambo makasi makasi.
Isai LinVB 59:7  Makolo ma bango makolandaka se nzela ebe, bakopotaka mbangu mpo ya koboma bato bazali na likambo te, bakokanaka se kosala mabe, bakolukaka se kobebisa mpe kosilisa.
Isai LinVB 59:8  Bayebi nzela ya boboto te, nzela ya bango inso izangi bose­mbo. Bakokomisaka nzela ya bango mabunu mabunu, oyo akolandaka yango, ayebi boboto te.
Isai LinVB 59:9  Yango wana bosolo bozali mosika na biso mpe bosembo bozali o mi­tema mya biso te. Tolukaki moi mpe tala, butu boyei, tolukaki mwinda, kasi totamboli o molili.
Isai LinVB 59:10  Lokola bato ba lolanda tokosi­mbaka efelo, tozali kolukaluka nzela lokola mo­to azali na miso te. Tokotutaka libaku na midi lokola na mpokwa. Biso bato ba nzoto kolongonu tou­lani na bawei.
Isai LinVB 59:11  Banso tokolelaka lokola ngombolo, mpe tokokimelaka lokola bikokoba. Tokotiaka elikya ’te tokozwa bosembo, kasi se mpamba, tokanisaki ’te tokobika, kasi libiki lizali mosika na biso.
Isai LinVB 59:12  Zambi, tosali mabe maike o miso ma yo, mpe masumu ma biso mazali kofunda biso. Tokomemeke masumu o mitema mya biso, mpe toyebi mabe ma biso :
Isai LinVB 59:13  tozali batomboki, tokowanganaka Yawe, tokolongwaka o nzela ya Nzambe wa biso, tokolobaka makambo ma bitu­mba mpe ma botomboki, o mitema mya biso tokokanisaka makambo ma lokuta.
Isai LinVB 59:14  Tokobenganaka bosolo, mpe bosembo bozali mosika na biso. O makita ma bato bosembo bozangi mpe bakoboyaka maloba ma bosolo.
Isai LinVB 59:15  Lobokó lozali lisusu te, mpe moto akimi mabe, bakobotolo ye biloko. Yawe amoni yango mpe ayoki mabe mpo bosembo bozali lisusu te.
Isai LinVB 59:16  Yawe amoni ’te moto moko afu­ndi likambo lyango te, mpe akamwi na yango mingi. Yango wana loboko la ye losalisi ye, mpe bosembo bwa ye bolendisi ye.
Isai LinVB 59:17  Alati Bosembo bo molato mwa etumba, mpe Libiki bo enkoti ya ebende o motó. Amizingi na Bobekoli bo monkoto mwa etumba, mpe na Zuwa bo elamba enene.
Isai LinVB 59:18  Akozongisela bato banso ndenge basalaki, akolakisa banguna nkanda ya ye, mpe akotumbola banyokoli, ata baye bakofandaka o bisanga.
Isai LinVB 59:19  Epai moi mokokitaka bakobanga nkombo ya Yawe, epai moi mokobimaka bakobanga nkembo ya ye : akoya lokola ebale ekotiyolaka makasi, eye mpema ya Yawe ekotiyolisaka.
Isai LinVB 59:20  Kasi akoya lokola Mosikoli wa Sion, wa bato ba Yakob, baye bakoboya mabe ma bango. Yawe alobi bongo.
Isai LinVB 59:21  Yawe alobi boye : Tala bondeko nakokata na bango. Elimo wa ngai, oyo azali na yo, na mpe maloba ma ngai maye natii o monoko mwa yo, makolo­ngwa o monoko mwa yo te, to mpe o monoko mwa bana ba yo te, makolongwa mpe o monoko mwa ba­nkoko ba bankoko ba yo te, lelo mpe o bileko binso seko. Yawe alobi bongo.