Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 9
Jere LinVB 9:1  Nani akopesa ngai nganda o eliki, mpo ’te natika bato ba ngai mpe nakoma mosika na ba­ngo ? zambi banso bazali se bato ba bokali mpe basuli.
Jere LinVB 9:2  Lolemu la bango lozali lokola litimbo lilingi libete. Ekolo eye etondi na makambo ma lokuta mpe ma bokosi ; mabe ma bango mazali se kokola, bayebi ngai Yawe te.
Jere LinVB 9:3  Bokeba na baninga mpe na bandeko ba bino, zambi ndeko akolukaka kokosa nde­ko wa ye, banso bakotongoko baninga.
Jere LinVB 9:4  Moto na moto akokosaka moninga, bakolobaka makambo ma solo te. Lolemu la bango lomeseni na makambo ma lokuta, babebi nye mpe bakoki kozongela ngai te.
Jere LinVB 9:5  Mosala mwa bango se kobunda mpe kokosa, baboyi koyeba ngai. Maloba ma Yawe !
Jere LinVB 9:6  Yango wana Yawe wa bokasi bo­nso alobi : Nakopetola bango o móto mpe nakomeka bango ; nakoki kosala bobele bongo na ba­ngo, mpo bapusi kosala mabe.
Jere LinVB 9:7  Lolemu la bango lozali lokola likula likobomaka ; monoko mwa bango motondi na maloba ma bokosi. Na monoko bakotombelaka bani­nga boboto, kasi o kati ya motema bakotielaka bango mitambo.
Jere LinVB 9:8  Bongo natumbola bango na ntina ena te ? Maloba ma Yawe. Nazongisela ekolo ena mabe te ?
Jere LinVB 9:9  Nakolela na mawa manene likolo lya ngomba inso, nakoganga na mawa o eliki, za­mbi ndako inso itumbami, bato bakolekaka wana lisusu te, boleli bwa bibwele boyokani wana lisusu te ; ndeke na bibwele bikimi, binso bilimwi.
Jere LinVB 9:10  Nakokomisa Yeruzalem libondo lya mabanga, mobenga mwa minsole, nakokomisa bingumba bya Yuda mipotu, moto moko akofanda wana lisusu te.
Jere LinVB 9:11  Nani moto wa bwanya akoki koyeba ntina ya makambo maye ? Yawe atindi nani mpo asakola : Mpo nini ekolo ebebi nye, eziki lokola eliki eye bakokatisaka lisusu te ?
Jere LinVB 9:12  Yawe alobi boye : Baboyi kotosa Mobeko moye napesaki bango, baboyi kotosa mpe kolanda monoko mwa ngai.
Jere LinVB 9:13  Na motó makasi bali­ngi se kokangana na ba-Baal, baye bankoko ba bango balakisaki ba­ngo.
Jere LinVB 9:14  Yango wana Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi boye : Nakoleisa bango matiti ma bololo ; nakomelisa bango mai ma ngenge.
Jere LinVB 9:15  Nakopanza bango o bikolo binso biyebani na bango te, biyebanaki na bankoko ba bango mpe te ; nakotindela bango bato bakobengana bango na mopanga kina bakosila.
Jere LinVB 9:16  Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Boluka mpe bobenga basi bayebi kolela ! Bobenga mpe baye bazali na ntoki ena, baya noki !
Jere LinVB 9:17  Baya noki mpe bayembela biso nzembo ya mawa, mpo ’te miso ma biso matangisa mpizoli, mpo ’te nkongia ya biso itanga mai.
Jere LinVB 9:18  O Sion toyoki nzembo ya boleli : « Mawa, tobebi e, tokufi na nsoni ! Tosengeli kokima ekolo ya biso, babengani biso o ndako ya biso. »
Jere LinVB 9:19  Bino basi, boyoka liloba lya Yawe ! Botia matoi na maloba ma ye. Bolakisa bana basi ba bino nze­mbo ya lilaka, bolakisana nzembo ya boleli :
Jere LinVB 9:20  « Liwa likoti o ndako epai ya maninisa, liyingeli o ndako ya biso inzenga, likweli bana o nzela mpe bilenge o zando.
Jere LinVB 9:21  Bibembe bilali lokola bipolu o bilanga, lokola maboke ma matiti nsima ya mokati, mpe moto moko te alokoti ma­ngo. »
Jere LinVB 9:22  Yawe alobi boye : Moto wa bwanya amikumisa na bwanya bwa ye te, elombe amikumisa na mpiko ya ye te, moto wa nkita na mosolo mwa ye te.
Jere LinVB 9:23  Kasi oyo alingi komikumisa, asala yango na ntina eye : Azala na mayele ma koyeba ngai, zambi ngai Yawe nakopesaka bolamu, bosolo mpe bosembo o mokili. Solo, nakosepelaka yango. Maloba ma Yawe !
Jere LinVB 9:24  Yawe alobi boye : Mikolo mikoya, nakotumbola bato banso bakatemi se nzoto :
Jere LinVB 9:25  ba-Ezipeti, ba-Yuda, ba-Edom, ba-Amon, ba-Moab mpe bato banso bakokoli mitó, baye bakofandaka o eliki : bato ba bikolo bina binso bazali basutu, kasi ba-Israel banso bakatemi mitema te !