Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next
Chapter 34
Exod LinVB 34:1  Yawe alobi na Mose : « Kata mabanga mabale lokola maye ma liboso ; buta ngomba mpe nakokoma wana maloba nakomaka o mabanga ma liboso, maye obukaki.
Exod LinVB 34:2  Omilengele mpo ya lobi na ntongo ; buta ngomba Sinai na ntongo mpe zila ngai kuna o nsonge ya ngomba.
Exod LinVB 34:3  Moto moko abuta ngomba elongo na yo te, moto mosusu amonono o ngomba te. Ata ngombe ata mpata ikoki kolia matiti liboso lya ngomba te. »
Exod LinVB 34:4  Mose akati lisusu mabanga mabale, lokola mabanga ma liboso. Na ntongontongo abuti ngomba Sinai lokola Yawe atindi ye, mpe amemi mabanga mabale.
Exod LinVB 34:5  Yawe akiti o kati ya limpata, ayei koteleme penepene na ye mpe atangi nkombo Yawe.
Exod LinVB 34:6  Yawe aleki liboso lya ye mpe agangi : « Ngai Yawe ! Yawe azali Nzambe wa ngolu, nakoyokelaka bato mawa ! Nakoyokaka nkanda noki te, nazali motema bolamu mpe lobokó.
Exod LinVB 34:7  Nakolakisaka boboto na bato nkoto na nkoto. Nakolimbisaka baye babuki mobeko mpe basali masumu, kasi nakopesaka etumbu ; ata bana, batata, bankoko na bankokolo bakoswa etumbu mpo ya masumu ma bankoko ba bango. »
Exod LinVB 34:9  Alobi ape : « Mokonzi, soko ya solo nazwi bolamu o miso ma yo, ondima kokende na biso elongo. Solo, tosali ekolo ya bato ba mitó makasi, nzokande limbisa mabe na masumu ma biso, mpe komisa biso libota lya yo mpenza. »
Exod LinVB 34:10  Yawe alobi : « Nakokata na yo bondeko. O miso ma bato banso nakosala makamwisi lokola mamononi naino te o nse mobimba, ata o ekolo nini. Mpe bato banso bazali penepene na yo bakomono misala mya Yawe, zambi nakosala makambo ma nsomo na maboko ma yo.
Exod LinVB 34:11  Yoka malamu makambo nakotinda yo lelo. Nakobengana liboso lya yo ba-Amor, ba-Kanana, ba-Iti, ba-Perisi, ba-Ivi na ba-Yebus.
Exod LinVB 34:12  Okeba ’te okata bondeko te na bato ba mokili esika olingi kokoto, mpo ’te batiela yo motambo te.
Exod LinVB 34:13  Boma kuna bitumbelo bya bango, buka bikeko bya bango mpe kata makonzi ma nkisi ya bango.
Exod LinVB 34:14  Okumbamela nzambe mosusu te, nkombo esusu ya Yawe nde Zuwa ; azali Nzambe wa zuwa.
Exod LinVB 34:15  Okata bondeko te na bato ba ekolo ena, esika bakokumisa banzambe ba bango mpe bakobonzela bango mabonza, mbele bakobenga yo mpo ’te olia nyama ya libonza elongo na bango.
Exod LinVB 34:16  Soko okopono bilenge basi ba bango mpo ya kobalisa bana babali ba yo, bilenge basi ba bango bakokende kofukamela banzambe ba bango, bongo bakobenda bana babali ba yo mpo ’te bakumisa banzambe ba bango.
Exod LinVB 34:18  Omemya eyenga ya mampa mazangi nkisi. Mikolo nsambo olia mampa mana, lokola natindaki yo ; esalema o elaka natiaki, o sanza ya Abib, zambi o sanza ena obimaki o Ezipeti.
Exod LinVB 34:19  Bana ba yambo banso bazali ba ngai : bana babali ba yambo ba ngombe to ba mpata.
Exod LinVB 34:20  Soko mpunda eboti mwana mobali wa yambo, osikola yango na bofuti mpata ; soko osikoli yango te, buka yango nkingo. Osikola mpe bana babali ba yambo banso, moto moko te abima o miso ma ngai maboko mpamba.
Exod LinVB 34:21  Sala mosala mikolo motoba, kasi o mokolo mwa nsambo opema, ezala eleko ya kokata bilanga to ya kobuka mbuma.
Exod LinVB 34:22  Omemya eyenga ya Poso, eyenga ya kobonzela Yawe mbuma ya yambo ya masangu, na mpe eyenga ya kolokoto mbuma iye itikalaki o nsuka ya elanga.
Exod LinVB 34:23  Mbala isato o mobu, babali banso bakende komilakisa o boso bwa Mokonzi Yawe, Nzambe wa Israel.
Exod LinVB 34:24  Nakobotolo bikolo bisusu mabelé ma bango mpe nakokomisa ekolo ya yo enene ; moto moko te akolula mabelé ma yo o ntango okokende komilakisa o boso bwa Yawe Nzambe wa yo, mbala isato o mobu.
Exod LinVB 34:25  Ntango okobonzela ngai makila ma nyama, okoki kosangisa mango te na mampa malambami na nkisi ; okoki mpe kobomba Mpata ya Pasika tee ntongo te.
Exod LinVB 34:26  Oya o ndako ya Yawe Nzambe wa yo na mbuma ya yambo ya ela-nga ; pono mbuma iye ileki ilamu. Olamba mpe mwana ntaba te o mabéle ma mama wa ye. »
Exod LinVB 34:27  Yawe alobi na Mose : « Koma maloba maye o monkanda, zambi bobele na maloba maye nakati bondeko na yo mpe na Israel. »
Exod LinVB 34:28  Mose atikali elongo na Yawe mikolo ntuku inei, butu moi. Alei te, ameli mpe te ; akomi o etanda maloba ma Bondeko, mazali Mibeko zomi.
Exod LinVB 34:29  Mose akiti ngomba Sinai, amemi mabanga ma Bondeko o maboko. Ayebi te ’te elongi ya ye ezali kongenge, zambi asololaki na Nzambe.
Exod LinVB 34:30  Arone na bana ba Israel bamoni Mose mpe ndenge elongi ya ye ezali kongenge, babangi kobeleme na ye.
Exod LinVB 34:31  Mose abengi bango. Arone na bayangeli banso ba libota bayei epai ya ye mpe Mose asololi na bango.
Exod LinVB 34:32  Na nsima bana ba Israel banso bayei ; Mose ayebisi bango mibeko minso Yawe apesaki ye o ngomba Sinai.
Exod LinVB 34:33  Esilisi ye koloba, Mose azipi elongi ya ye na elamba.
Exod LinVB 34:34  Mbala inso abelemi na Yawe mpo ya kosolola na ye alongoli elamba kin’o ntango abimi. Ebimi ye wana, ayebisi bana ba Israel makambo manso Nzambe atindi.
Exod LinVB 34:35  Bana ba Israel bamoni ’te elongi ya Mose ezalaki kongenge. Bongo Mose azipi lisusu elongi ya ye na elamba kin’o ntango akoti o Ema ya Likita mpo ya kosolola na Yawe.